Jeremiah 22 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo : 2 ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo, 3 tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te. 4 Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango. 5 Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › » 6 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda :« Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai,lokola songe ya ngomba ya Libani ;solo, nakokomisa yo lokola esobe,lokola engumba oyo bato bavandaka te. 7 Nakotinda bato ete baya kobebisa yo,moto na moto na bibundeli na ye ;bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitokompe bakobwaka yango na moto. 8 Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? › 9 Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › » 10 Bolela te mpo na kufa ya mokonzito bosala matanga te mpo na kufa na ye !Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu,mpo ete akozonga lisusu tempe akomona lisusu te mboka epai babota ye. 11 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te. 12 Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. » 13 « Mawa na moto oyo atongaka ndako na yena nzela ya bosembo te,mpe bashambre na ye ya etaje,na nzela ya lokuta ;oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pambampe afutaka bango eloko te ; 14 oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako moneneoyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! ›Boye atiaka yango maninisa minene,mabaya ya sedele na bamir na yango ya katimpe akopakolaka yango langi ya motane. 15 Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedelende ekolendisa bokonzi na yo ?Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te,kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ;boye alongaki na makambo nyonso. 16 Alongisaki babola mpe bato bakelela,mpe alongaki na makambo nyonso.Boni, yango te koyeba Ngai, »elobi Yawe ? 17 « Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kakabomengo mpo na bolamu na yo moko kaka,na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te,na nzela ya konyokola batompe na nzela ya kobotola bango biloko. » 18 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :« Bakosalela ye matanga te na koloba :‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali !Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! ›Bakosalela ye matanga te na koloba :‹ Mawa, nkolo na ngai !Mawa, mokonzi na ngai ! › 19 Bakokunda ye ndenge bakundaka ane,bakobenda ye mpe bakobwaka yelibanda ya bikuke ya Yelusalemi. » 20 « Mata na Libani mpe ganga makasi !Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani !Ganga wuta na Abarimi,pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa ! 21 Nakebisaki yo tango ozalaki na kimiakasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! ›Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo,otosaka na yo Ngai te ! 22 Mopepe ekomema bakambi na yo nyonsompe baninga na yo bakokende na bowumbu.Okoyoka soni mpe okosambwalikolo ya mabe na yo nyonso. 23 Yo oyo ovandaka na Libani,yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele,yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo,pasi oyo ekokani na pasi ya mwasioyo azali na pasi ya kobota ! 24 Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka. 25 Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni. 26 Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa. 27 Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. » 28 Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasukaoyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ?Mpo na nini babengana ye elongo na bana na yempe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ? 29 Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai !Yoka Liloba na Yawe ! 30 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Koma kombo ya moto oyolokola moto oyo abota te,lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye,pamba te moko te kati na bana na ye akolonga,moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidito akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »

In Other Versions

Jeremiah 22 in the ANGEFD

Jeremiah 22 in the ANTPNG2D

Jeremiah 22 in the AS21

Jeremiah 22 in the BAGH

Jeremiah 22 in the BBPNG

Jeremiah 22 in the BBT1E

Jeremiah 22 in the BDS

Jeremiah 22 in the BEV

Jeremiah 22 in the BHAD

Jeremiah 22 in the BIB

Jeremiah 22 in the BLPT

Jeremiah 22 in the BNT

Jeremiah 22 in the BNTABOOT

Jeremiah 22 in the BNTLV

Jeremiah 22 in the BOATCB

Jeremiah 22 in the BOATCB2

Jeremiah 22 in the BOBCV

Jeremiah 22 in the BOCNT

Jeremiah 22 in the BOECS

Jeremiah 22 in the BOGWICC

Jeremiah 22 in the BOHCB

Jeremiah 22 in the BOHCV

Jeremiah 22 in the BOHLNT

Jeremiah 22 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 22 in the BOICB

Jeremiah 22 in the BOILNTAP

Jeremiah 22 in the BOITCV

Jeremiah 22 in the BOKCV

Jeremiah 22 in the BOKCV2

Jeremiah 22 in the BOKHWOG

Jeremiah 22 in the BOKSSV

Jeremiah 22 in the BOLCB

Jeremiah 22 in the BOMCV

Jeremiah 22 in the BONAV

Jeremiah 22 in the BONCB

Jeremiah 22 in the BONLT

Jeremiah 22 in the BONUT2

Jeremiah 22 in the BOPLNT

Jeremiah 22 in the BOSCB

Jeremiah 22 in the BOSNC

Jeremiah 22 in the BOTLNT

Jeremiah 22 in the BOVCB

Jeremiah 22 in the BOYCB

Jeremiah 22 in the BPBB

Jeremiah 22 in the BPH

Jeremiah 22 in the BSB

Jeremiah 22 in the CCB

Jeremiah 22 in the CUV

Jeremiah 22 in the CUVS

Jeremiah 22 in the DBT

Jeremiah 22 in the DGDNT

Jeremiah 22 in the DHNT

Jeremiah 22 in the DNT

Jeremiah 22 in the ELBE

Jeremiah 22 in the EMTV

Jeremiah 22 in the ESV

Jeremiah 22 in the FBV

Jeremiah 22 in the FEB

Jeremiah 22 in the GGMNT

Jeremiah 22 in the GNT

Jeremiah 22 in the HARY

Jeremiah 22 in the HNT

Jeremiah 22 in the IRVA

Jeremiah 22 in the IRVB

Jeremiah 22 in the IRVG

Jeremiah 22 in the IRVH

Jeremiah 22 in the IRVK

Jeremiah 22 in the IRVM

Jeremiah 22 in the IRVM2

Jeremiah 22 in the IRVO

Jeremiah 22 in the IRVP

Jeremiah 22 in the IRVT

Jeremiah 22 in the IRVT2

Jeremiah 22 in the IRVU

Jeremiah 22 in the ISVN

Jeremiah 22 in the JSNT

Jeremiah 22 in the KAPI

Jeremiah 22 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 22 in the KBV

Jeremiah 22 in the KJV

Jeremiah 22 in the KNFD

Jeremiah 22 in the LBA

Jeremiah 22 in the LBLA

Jeremiah 22 in the LNT

Jeremiah 22 in the LSV

Jeremiah 22 in the MAAL

Jeremiah 22 in the MBV

Jeremiah 22 in the MBV2

Jeremiah 22 in the MHNT

Jeremiah 22 in the MKNFD

Jeremiah 22 in the MNG

Jeremiah 22 in the MNT

Jeremiah 22 in the MNT2

Jeremiah 22 in the MRS1T

Jeremiah 22 in the NAA

Jeremiah 22 in the NASB

Jeremiah 22 in the NBLA

Jeremiah 22 in the NBS

Jeremiah 22 in the NBVTP

Jeremiah 22 in the NET2

Jeremiah 22 in the NIV11

Jeremiah 22 in the NNT

Jeremiah 22 in the NNT2

Jeremiah 22 in the NNT3

Jeremiah 22 in the PDDPT

Jeremiah 22 in the PFNT

Jeremiah 22 in the RMNT

Jeremiah 22 in the SBIAS

Jeremiah 22 in the SBIBS

Jeremiah 22 in the SBIBS2

Jeremiah 22 in the SBICS

Jeremiah 22 in the SBIDS

Jeremiah 22 in the SBIGS

Jeremiah 22 in the SBIHS

Jeremiah 22 in the SBIIS

Jeremiah 22 in the SBIIS2

Jeremiah 22 in the SBIIS3

Jeremiah 22 in the SBIKS

Jeremiah 22 in the SBIKS2

Jeremiah 22 in the SBIMS

Jeremiah 22 in the SBIOS

Jeremiah 22 in the SBIPS

Jeremiah 22 in the SBISS

Jeremiah 22 in the SBITS

Jeremiah 22 in the SBITS2

Jeremiah 22 in the SBITS3

Jeremiah 22 in the SBITS4

Jeremiah 22 in the SBIUS

Jeremiah 22 in the SBIVS

Jeremiah 22 in the SBT

Jeremiah 22 in the SBT1E

Jeremiah 22 in the SCHL

Jeremiah 22 in the SNT

Jeremiah 22 in the SUSU

Jeremiah 22 in the SUSU2

Jeremiah 22 in the SYNO

Jeremiah 22 in the TBIAOTANT

Jeremiah 22 in the TBT1E

Jeremiah 22 in the TBT1E2

Jeremiah 22 in the TFTIP

Jeremiah 22 in the TFTU

Jeremiah 22 in the TGNTATF3T

Jeremiah 22 in the THAI

Jeremiah 22 in the TNFD

Jeremiah 22 in the TNT

Jeremiah 22 in the TNTIK

Jeremiah 22 in the TNTIL

Jeremiah 22 in the TNTIN

Jeremiah 22 in the TNTIP

Jeremiah 22 in the TNTIZ

Jeremiah 22 in the TOMA

Jeremiah 22 in the TTENT

Jeremiah 22 in the UBG

Jeremiah 22 in the UGV

Jeremiah 22 in the UGV2

Jeremiah 22 in the UGV3

Jeremiah 22 in the VBL

Jeremiah 22 in the VDCC

Jeremiah 22 in the YALU

Jeremiah 22 in the YAPE

Jeremiah 22 in the YBVTP

Jeremiah 22 in the ZBP