Jeremiah 34 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango : 2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto. 3 Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni. 4 Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe ! Tala elaka oyo Yawe apesi yo : Okokufa na mopanga te, 5 kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › » 6 Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi, 7 wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te : Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda. 8 Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi 9 mpo ete moto nyonso apesa bawumbu na ye bonsomi, bawumbu oyo bazali Ba-Ebre, bazala mibali to basi ; mpe mpo ete moto moko te akoba kokanga ndeko na ye, Moyuda, kati na bowumbu. 10 Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu ; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi. 11 Kasi sima na tango, babongolaki makanisi na bango ; bakangaki lisusu na bowumbu mibali mpe basi oyo bango basilaki kopesa bonsomi, mpe bakomisaki bango lisusu bawumbu. 12 Boye, tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : 13 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki : 14 ‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te. 15 Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai. 16 Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino. 17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; 18 nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango. 19 Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali, 20 nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele. 21 Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino. 22 Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »

In Other Versions

Jeremiah 34 in the ANGEFD

Jeremiah 34 in the ANTPNG2D

Jeremiah 34 in the AS21

Jeremiah 34 in the BAGH

Jeremiah 34 in the BBPNG

Jeremiah 34 in the BBT1E

Jeremiah 34 in the BDS

Jeremiah 34 in the BEV

Jeremiah 34 in the BHAD

Jeremiah 34 in the BIB

Jeremiah 34 in the BLPT

Jeremiah 34 in the BNT

Jeremiah 34 in the BNTABOOT

Jeremiah 34 in the BNTLV

Jeremiah 34 in the BOATCB

Jeremiah 34 in the BOATCB2

Jeremiah 34 in the BOBCV

Jeremiah 34 in the BOCNT

Jeremiah 34 in the BOECS

Jeremiah 34 in the BOGWICC

Jeremiah 34 in the BOHCB

Jeremiah 34 in the BOHCV

Jeremiah 34 in the BOHLNT

Jeremiah 34 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 34 in the BOICB

Jeremiah 34 in the BOILNTAP

Jeremiah 34 in the BOITCV

Jeremiah 34 in the BOKCV

Jeremiah 34 in the BOKCV2

Jeremiah 34 in the BOKHWOG

Jeremiah 34 in the BOKSSV

Jeremiah 34 in the BOLCB

Jeremiah 34 in the BOMCV

Jeremiah 34 in the BONAV

Jeremiah 34 in the BONCB

Jeremiah 34 in the BONLT

Jeremiah 34 in the BONUT2

Jeremiah 34 in the BOPLNT

Jeremiah 34 in the BOSCB

Jeremiah 34 in the BOSNC

Jeremiah 34 in the BOTLNT

Jeremiah 34 in the BOVCB

Jeremiah 34 in the BOYCB

Jeremiah 34 in the BPBB

Jeremiah 34 in the BPH

Jeremiah 34 in the BSB

Jeremiah 34 in the CCB

Jeremiah 34 in the CUV

Jeremiah 34 in the CUVS

Jeremiah 34 in the DBT

Jeremiah 34 in the DGDNT

Jeremiah 34 in the DHNT

Jeremiah 34 in the DNT

Jeremiah 34 in the ELBE

Jeremiah 34 in the EMTV

Jeremiah 34 in the ESV

Jeremiah 34 in the FBV

Jeremiah 34 in the FEB

Jeremiah 34 in the GGMNT

Jeremiah 34 in the GNT

Jeremiah 34 in the HARY

Jeremiah 34 in the HNT

Jeremiah 34 in the IRVA

Jeremiah 34 in the IRVB

Jeremiah 34 in the IRVG

Jeremiah 34 in the IRVH

Jeremiah 34 in the IRVK

Jeremiah 34 in the IRVM

Jeremiah 34 in the IRVM2

Jeremiah 34 in the IRVO

Jeremiah 34 in the IRVP

Jeremiah 34 in the IRVT

Jeremiah 34 in the IRVT2

Jeremiah 34 in the IRVU

Jeremiah 34 in the ISVN

Jeremiah 34 in the JSNT

Jeremiah 34 in the KAPI

Jeremiah 34 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 34 in the KBV

Jeremiah 34 in the KJV

Jeremiah 34 in the KNFD

Jeremiah 34 in the LBA

Jeremiah 34 in the LBLA

Jeremiah 34 in the LNT

Jeremiah 34 in the LSV

Jeremiah 34 in the MAAL

Jeremiah 34 in the MBV

Jeremiah 34 in the MBV2

Jeremiah 34 in the MHNT

Jeremiah 34 in the MKNFD

Jeremiah 34 in the MNG

Jeremiah 34 in the MNT

Jeremiah 34 in the MNT2

Jeremiah 34 in the MRS1T

Jeremiah 34 in the NAA

Jeremiah 34 in the NASB

Jeremiah 34 in the NBLA

Jeremiah 34 in the NBS

Jeremiah 34 in the NBVTP

Jeremiah 34 in the NET2

Jeremiah 34 in the NIV11

Jeremiah 34 in the NNT

Jeremiah 34 in the NNT2

Jeremiah 34 in the NNT3

Jeremiah 34 in the PDDPT

Jeremiah 34 in the PFNT

Jeremiah 34 in the RMNT

Jeremiah 34 in the SBIAS

Jeremiah 34 in the SBIBS

Jeremiah 34 in the SBIBS2

Jeremiah 34 in the SBICS

Jeremiah 34 in the SBIDS

Jeremiah 34 in the SBIGS

Jeremiah 34 in the SBIHS

Jeremiah 34 in the SBIIS

Jeremiah 34 in the SBIIS2

Jeremiah 34 in the SBIIS3

Jeremiah 34 in the SBIKS

Jeremiah 34 in the SBIKS2

Jeremiah 34 in the SBIMS

Jeremiah 34 in the SBIOS

Jeremiah 34 in the SBIPS

Jeremiah 34 in the SBISS

Jeremiah 34 in the SBITS

Jeremiah 34 in the SBITS2

Jeremiah 34 in the SBITS3

Jeremiah 34 in the SBITS4

Jeremiah 34 in the SBIUS

Jeremiah 34 in the SBIVS

Jeremiah 34 in the SBT

Jeremiah 34 in the SBT1E

Jeremiah 34 in the SCHL

Jeremiah 34 in the SNT

Jeremiah 34 in the SUSU

Jeremiah 34 in the SUSU2

Jeremiah 34 in the SYNO

Jeremiah 34 in the TBIAOTANT

Jeremiah 34 in the TBT1E

Jeremiah 34 in the TBT1E2

Jeremiah 34 in the TFTIP

Jeremiah 34 in the TFTU

Jeremiah 34 in the TGNTATF3T

Jeremiah 34 in the THAI

Jeremiah 34 in the TNFD

Jeremiah 34 in the TNT

Jeremiah 34 in the TNTIK

Jeremiah 34 in the TNTIL

Jeremiah 34 in the TNTIN

Jeremiah 34 in the TNTIP

Jeremiah 34 in the TNTIZ

Jeremiah 34 in the TOMA

Jeremiah 34 in the TTENT

Jeremiah 34 in the UBG

Jeremiah 34 in the UGV

Jeremiah 34 in the UGV2

Jeremiah 34 in the UGV3

Jeremiah 34 in the VBL

Jeremiah 34 in the VDCC

Jeremiah 34 in the YALU

Jeremiah 34 in the YAPE

Jeremiah 34 in the YBVTP

Jeremiah 34 in the ZBP