Jeremiah 37 (BOLCB2)
1 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi. 2 Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi. 3 Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! » 4 Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te. 5 Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi. 6 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : 7 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ; 8 mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. › 9 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. › 10 Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. » 11 Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana, 12 Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna. 13 Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye :— Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ? 14 Jeremi azongisaki :— Te ! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te !Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi. 15 Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko. 16 Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi. 17 Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku :— Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ?Jeremi azongisaki :— Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni. 18 Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi :— Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo ? 19 Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ? 20 Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna ! 21 Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
In Other Versions
Jeremiah 37 in the ANGEFD
Jeremiah 37 in the ANTPNG2D
Jeremiah 37 in the AS21
Jeremiah 37 in the BAGH
Jeremiah 37 in the BBPNG
Jeremiah 37 in the BBT1E
Jeremiah 37 in the BDS
Jeremiah 37 in the BEV
Jeremiah 37 in the BHAD
Jeremiah 37 in the BIB
Jeremiah 37 in the BLPT
Jeremiah 37 in the BNT
Jeremiah 37 in the BNTABOOT
Jeremiah 37 in the BNTLV
Jeremiah 37 in the BOATCB
Jeremiah 37 in the BOATCB2
Jeremiah 37 in the BOBCV
Jeremiah 37 in the BOCNT
Jeremiah 37 in the BOECS
Jeremiah 37 in the BOGWICC
Jeremiah 37 in the BOHCB
Jeremiah 37 in the BOHCV
Jeremiah 37 in the BOHLNT
Jeremiah 37 in the BOHNTLTAL
Jeremiah 37 in the BOICB
Jeremiah 37 in the BOILNTAP
Jeremiah 37 in the BOITCV
Jeremiah 37 in the BOKCV
Jeremiah 37 in the BOKCV2
Jeremiah 37 in the BOKHWOG
Jeremiah 37 in the BOKSSV
Jeremiah 37 in the BOLCB
Jeremiah 37 in the BOMCV
Jeremiah 37 in the BONAV
Jeremiah 37 in the BONCB
Jeremiah 37 in the BONLT
Jeremiah 37 in the BONUT2
Jeremiah 37 in the BOPLNT
Jeremiah 37 in the BOSCB
Jeremiah 37 in the BOSNC
Jeremiah 37 in the BOTLNT
Jeremiah 37 in the BOVCB
Jeremiah 37 in the BOYCB
Jeremiah 37 in the BPBB
Jeremiah 37 in the BPH
Jeremiah 37 in the BSB
Jeremiah 37 in the CCB
Jeremiah 37 in the CUV
Jeremiah 37 in the CUVS
Jeremiah 37 in the DBT
Jeremiah 37 in the DGDNT
Jeremiah 37 in the DHNT
Jeremiah 37 in the DNT
Jeremiah 37 in the ELBE
Jeremiah 37 in the EMTV
Jeremiah 37 in the ESV
Jeremiah 37 in the FBV
Jeremiah 37 in the FEB
Jeremiah 37 in the GGMNT
Jeremiah 37 in the GNT
Jeremiah 37 in the HARY
Jeremiah 37 in the HNT
Jeremiah 37 in the IRVA
Jeremiah 37 in the IRVB
Jeremiah 37 in the IRVG
Jeremiah 37 in the IRVH
Jeremiah 37 in the IRVK
Jeremiah 37 in the IRVM
Jeremiah 37 in the IRVM2
Jeremiah 37 in the IRVO
Jeremiah 37 in the IRVP
Jeremiah 37 in the IRVT
Jeremiah 37 in the IRVT2
Jeremiah 37 in the IRVU
Jeremiah 37 in the ISVN
Jeremiah 37 in the JSNT
Jeremiah 37 in the KAPI
Jeremiah 37 in the KBT1ETNIK
Jeremiah 37 in the KBV
Jeremiah 37 in the KJV
Jeremiah 37 in the KNFD
Jeremiah 37 in the LBA
Jeremiah 37 in the LBLA
Jeremiah 37 in the LNT
Jeremiah 37 in the LSV
Jeremiah 37 in the MAAL
Jeremiah 37 in the MBV
Jeremiah 37 in the MBV2
Jeremiah 37 in the MHNT
Jeremiah 37 in the MKNFD
Jeremiah 37 in the MNG
Jeremiah 37 in the MNT
Jeremiah 37 in the MNT2
Jeremiah 37 in the MRS1T
Jeremiah 37 in the NAA
Jeremiah 37 in the NASB
Jeremiah 37 in the NBLA
Jeremiah 37 in the NBS
Jeremiah 37 in the NBVTP
Jeremiah 37 in the NET2
Jeremiah 37 in the NIV11
Jeremiah 37 in the NNT
Jeremiah 37 in the NNT2
Jeremiah 37 in the NNT3
Jeremiah 37 in the PDDPT
Jeremiah 37 in the PFNT
Jeremiah 37 in the RMNT
Jeremiah 37 in the SBIAS
Jeremiah 37 in the SBIBS
Jeremiah 37 in the SBIBS2
Jeremiah 37 in the SBICS
Jeremiah 37 in the SBIDS
Jeremiah 37 in the SBIGS
Jeremiah 37 in the SBIHS
Jeremiah 37 in the SBIIS
Jeremiah 37 in the SBIIS2
Jeremiah 37 in the SBIIS3
Jeremiah 37 in the SBIKS
Jeremiah 37 in the SBIKS2
Jeremiah 37 in the SBIMS
Jeremiah 37 in the SBIOS
Jeremiah 37 in the SBIPS
Jeremiah 37 in the SBISS
Jeremiah 37 in the SBITS
Jeremiah 37 in the SBITS2
Jeremiah 37 in the SBITS3
Jeremiah 37 in the SBITS4
Jeremiah 37 in the SBIUS
Jeremiah 37 in the SBIVS
Jeremiah 37 in the SBT
Jeremiah 37 in the SBT1E
Jeremiah 37 in the SCHL
Jeremiah 37 in the SNT
Jeremiah 37 in the SUSU
Jeremiah 37 in the SUSU2
Jeremiah 37 in the SYNO
Jeremiah 37 in the TBIAOTANT
Jeremiah 37 in the TBT1E
Jeremiah 37 in the TBT1E2
Jeremiah 37 in the TFTIP
Jeremiah 37 in the TFTU
Jeremiah 37 in the TGNTATF3T
Jeremiah 37 in the THAI
Jeremiah 37 in the TNFD
Jeremiah 37 in the TNT
Jeremiah 37 in the TNTIK
Jeremiah 37 in the TNTIL
Jeremiah 37 in the TNTIN
Jeremiah 37 in the TNTIP
Jeremiah 37 in the TNTIZ
Jeremiah 37 in the TOMA
Jeremiah 37 in the TTENT
Jeremiah 37 in the UBG
Jeremiah 37 in the UGV
Jeremiah 37 in the UGV2
Jeremiah 37 in the UGV3
Jeremiah 37 in the VBL
Jeremiah 37 in the VDCC
Jeremiah 37 in the YALU
Jeremiah 37 in the YAPE
Jeremiah 37 in the YBVTP
Jeremiah 37 in the ZBP