Jeremiah 38 (BOLCB2)

1 Shefatia, mwana mobali ya Matani ; Gedalia, mwana mobali ya Pashuri ; Yukali, mwana mobali ya Shelemia ; mpe Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, bayokaki makambo oyo Jeremi azalaki koyebisa bato nyonso. Azalaki koloba : 2 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. › 3 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › » 4 Bakalaka balobaki na mokonzi :— Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango. 5 Mokonzi Sedesiasi azongisaki :— Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te ! 6 Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango. 7 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame, 8 Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi : 9 — Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza ! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba ! 10 Mokonzi apesaki mitindo oyo epai ya Ebedi-Meleki, moto ya mokili ya Kushi :— Kamata awa mibali tuku misato elongo na yo, mpe bobimisa mosakoli Jeremi wuta na libulu liboso ete akufa. 11 Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo ; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu. 12 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi :— Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo.Jeremi asalaki se bongo. 13 Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli. 14 Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi :— Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te ! 15 Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi :— Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te ? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te. 16 Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi :— Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo ! 17 Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi :— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te. 18 Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. » 19 Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi :— Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai. 20 Jeremi azongisaki :— Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo. 21 Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai : 22 « Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba :‹ Baninga na yo ya motemabakosi yo mpe balongi yo.Matambe na yo ezindi na potopoto,baninga na yo bakimi yo ! › » 23 Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto. 24 Sedesiasi alobaki na Jeremi :— Tika ete moto moko te ayeba makambo oyo, mpe okokufa te. 25 Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo : « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. » 26 Loba bango : « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. » 27 Bakalaka nyonso bayaki epai ya Jeremi mpe batunaki ye mituna ; ye mpe ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge kaka mokonzi atindaki ye. Boye, lokola bazalaki lisusu na likambo ya koloba na ye te, pamba te moto moko te ayokaki masolo na ye na mokonzi, babendanaki na kimia. 28 Jeremi atikalaki kati na lopango ya bakengeli kino na mokolo oyo babotolaki engumba Yelusalemi.

In Other Versions

Jeremiah 38 in the ANGEFD

Jeremiah 38 in the ANTPNG2D

Jeremiah 38 in the AS21

Jeremiah 38 in the BAGH

Jeremiah 38 in the BBPNG

Jeremiah 38 in the BBT1E

Jeremiah 38 in the BDS

Jeremiah 38 in the BEV

Jeremiah 38 in the BHAD

Jeremiah 38 in the BIB

Jeremiah 38 in the BLPT

Jeremiah 38 in the BNT

Jeremiah 38 in the BNTABOOT

Jeremiah 38 in the BNTLV

Jeremiah 38 in the BOATCB

Jeremiah 38 in the BOATCB2

Jeremiah 38 in the BOBCV

Jeremiah 38 in the BOCNT

Jeremiah 38 in the BOECS

Jeremiah 38 in the BOGWICC

Jeremiah 38 in the BOHCB

Jeremiah 38 in the BOHCV

Jeremiah 38 in the BOHLNT

Jeremiah 38 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 38 in the BOICB

Jeremiah 38 in the BOILNTAP

Jeremiah 38 in the BOITCV

Jeremiah 38 in the BOKCV

Jeremiah 38 in the BOKCV2

Jeremiah 38 in the BOKHWOG

Jeremiah 38 in the BOKSSV

Jeremiah 38 in the BOLCB

Jeremiah 38 in the BOMCV

Jeremiah 38 in the BONAV

Jeremiah 38 in the BONCB

Jeremiah 38 in the BONLT

Jeremiah 38 in the BONUT2

Jeremiah 38 in the BOPLNT

Jeremiah 38 in the BOSCB

Jeremiah 38 in the BOSNC

Jeremiah 38 in the BOTLNT

Jeremiah 38 in the BOVCB

Jeremiah 38 in the BOYCB

Jeremiah 38 in the BPBB

Jeremiah 38 in the BPH

Jeremiah 38 in the BSB

Jeremiah 38 in the CCB

Jeremiah 38 in the CUV

Jeremiah 38 in the CUVS

Jeremiah 38 in the DBT

Jeremiah 38 in the DGDNT

Jeremiah 38 in the DHNT

Jeremiah 38 in the DNT

Jeremiah 38 in the ELBE

Jeremiah 38 in the EMTV

Jeremiah 38 in the ESV

Jeremiah 38 in the FBV

Jeremiah 38 in the FEB

Jeremiah 38 in the GGMNT

Jeremiah 38 in the GNT

Jeremiah 38 in the HARY

Jeremiah 38 in the HNT

Jeremiah 38 in the IRVA

Jeremiah 38 in the IRVB

Jeremiah 38 in the IRVG

Jeremiah 38 in the IRVH

Jeremiah 38 in the IRVK

Jeremiah 38 in the IRVM

Jeremiah 38 in the IRVM2

Jeremiah 38 in the IRVO

Jeremiah 38 in the IRVP

Jeremiah 38 in the IRVT

Jeremiah 38 in the IRVT2

Jeremiah 38 in the IRVU

Jeremiah 38 in the ISVN

Jeremiah 38 in the JSNT

Jeremiah 38 in the KAPI

Jeremiah 38 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 38 in the KBV

Jeremiah 38 in the KJV

Jeremiah 38 in the KNFD

Jeremiah 38 in the LBA

Jeremiah 38 in the LBLA

Jeremiah 38 in the LNT

Jeremiah 38 in the LSV

Jeremiah 38 in the MAAL

Jeremiah 38 in the MBV

Jeremiah 38 in the MBV2

Jeremiah 38 in the MHNT

Jeremiah 38 in the MKNFD

Jeremiah 38 in the MNG

Jeremiah 38 in the MNT

Jeremiah 38 in the MNT2

Jeremiah 38 in the MRS1T

Jeremiah 38 in the NAA

Jeremiah 38 in the NASB

Jeremiah 38 in the NBLA

Jeremiah 38 in the NBS

Jeremiah 38 in the NBVTP

Jeremiah 38 in the NET2

Jeremiah 38 in the NIV11

Jeremiah 38 in the NNT

Jeremiah 38 in the NNT2

Jeremiah 38 in the NNT3

Jeremiah 38 in the PDDPT

Jeremiah 38 in the PFNT

Jeremiah 38 in the RMNT

Jeremiah 38 in the SBIAS

Jeremiah 38 in the SBIBS

Jeremiah 38 in the SBIBS2

Jeremiah 38 in the SBICS

Jeremiah 38 in the SBIDS

Jeremiah 38 in the SBIGS

Jeremiah 38 in the SBIHS

Jeremiah 38 in the SBIIS

Jeremiah 38 in the SBIIS2

Jeremiah 38 in the SBIIS3

Jeremiah 38 in the SBIKS

Jeremiah 38 in the SBIKS2

Jeremiah 38 in the SBIMS

Jeremiah 38 in the SBIOS

Jeremiah 38 in the SBIPS

Jeremiah 38 in the SBISS

Jeremiah 38 in the SBITS

Jeremiah 38 in the SBITS2

Jeremiah 38 in the SBITS3

Jeremiah 38 in the SBITS4

Jeremiah 38 in the SBIUS

Jeremiah 38 in the SBIVS

Jeremiah 38 in the SBT

Jeremiah 38 in the SBT1E

Jeremiah 38 in the SCHL

Jeremiah 38 in the SNT

Jeremiah 38 in the SUSU

Jeremiah 38 in the SUSU2

Jeremiah 38 in the SYNO

Jeremiah 38 in the TBIAOTANT

Jeremiah 38 in the TBT1E

Jeremiah 38 in the TBT1E2

Jeremiah 38 in the TFTIP

Jeremiah 38 in the TFTU

Jeremiah 38 in the TGNTATF3T

Jeremiah 38 in the THAI

Jeremiah 38 in the TNFD

Jeremiah 38 in the TNT

Jeremiah 38 in the TNTIK

Jeremiah 38 in the TNTIL

Jeremiah 38 in the TNTIN

Jeremiah 38 in the TNTIP

Jeremiah 38 in the TNTIZ

Jeremiah 38 in the TOMA

Jeremiah 38 in the TTENT

Jeremiah 38 in the UBG

Jeremiah 38 in the UGV

Jeremiah 38 in the UGV2

Jeremiah 38 in the UGV3

Jeremiah 38 in the VBL

Jeremiah 38 in the VDCC

Jeremiah 38 in the YALU

Jeremiah 38 in the YAPE

Jeremiah 38 in the YBVTP

Jeremiah 38 in the ZBP