Jeremiah 42 (BOLCB2)

1 Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki 2 pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye :— Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke. 3 Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpo ete ayebisa biso esika nini tosengeli kokende mpe makambo nini tosengeli kosala. » 4 Mosakoli Jeremi alobaki na bango :— Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te. 5 Balobaki na Jeremi :— Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso. 6 Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso. 7 Sima na mikolo zomi, Yawe alobaki na Jeremi ; 8 mpe Jeremi abengaki Yoanani, mwana mobali ya Karea ; bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene. 9 Alobaki na bango :— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi, Ye oyo epai ya nani botindaki ngai mpo na kokomisa libondeli na bino : 10 « Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema. 11 Bobanga lisusu te mokonzi ya Babiloni, oyo bozali kobanga lelo ; bobanga ye te, » elobi Yawe, « pamba te nazali elongo na bino mpo na kobikisa bino mpe mpo na kokangola bino na maboko na ye. 12 Nakotalisa bino ngolu mpo ete ayokela bino mawa mpe azongisa bino na mokili na bino. » 13 Nzokande, soki bolobi : « Tokovanda na biso kati na mokili oyo te, » soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, 14 mpe soki bolobi : « Te ! Tokokende nde kovanda na Ejipito epai wapi tokomona lisusu bitumba te, tokoyoka lisusu lolaka ya kelelo te mpe tokokufa lisusu nzala te ; » 15 wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna, 16 mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito ; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa. 17 Solo, bato nyonso oyo bakotingama kokende kaka kovanda na Ejipito bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; moko te kati na bango akotikala na bomoi mpe akobika na pasi oyo nakotindela bango. › 18 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. › 19 Oh bino batikali ya Yuda, Yawe azali koloba na bino : ‹ Bokende na Ejipito te ! › Bososola malamu likambo oyo : ngai nazali nde kokebisa bino lelo 20 ete bozali kosala libunga monene tango bozali kotinda ngai epai na Yawe, Nzambe na bino, na maloba oyo : ‹ Bondela mpo na biso Yawe, Nzambe na biso, mpe yebisa biso makambo nyonso oyo Yawe akoloba ; tokosalela yango. › 21 Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino. 22 Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »

In Other Versions

Jeremiah 42 in the ANGEFD

Jeremiah 42 in the ANTPNG2D

Jeremiah 42 in the AS21

Jeremiah 42 in the BAGH

Jeremiah 42 in the BBPNG

Jeremiah 42 in the BBT1E

Jeremiah 42 in the BDS

Jeremiah 42 in the BEV

Jeremiah 42 in the BHAD

Jeremiah 42 in the BIB

Jeremiah 42 in the BLPT

Jeremiah 42 in the BNT

Jeremiah 42 in the BNTABOOT

Jeremiah 42 in the BNTLV

Jeremiah 42 in the BOATCB

Jeremiah 42 in the BOATCB2

Jeremiah 42 in the BOBCV

Jeremiah 42 in the BOCNT

Jeremiah 42 in the BOECS

Jeremiah 42 in the BOGWICC

Jeremiah 42 in the BOHCB

Jeremiah 42 in the BOHCV

Jeremiah 42 in the BOHLNT

Jeremiah 42 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 42 in the BOICB

Jeremiah 42 in the BOILNTAP

Jeremiah 42 in the BOITCV

Jeremiah 42 in the BOKCV

Jeremiah 42 in the BOKCV2

Jeremiah 42 in the BOKHWOG

Jeremiah 42 in the BOKSSV

Jeremiah 42 in the BOLCB

Jeremiah 42 in the BOMCV

Jeremiah 42 in the BONAV

Jeremiah 42 in the BONCB

Jeremiah 42 in the BONLT

Jeremiah 42 in the BONUT2

Jeremiah 42 in the BOPLNT

Jeremiah 42 in the BOSCB

Jeremiah 42 in the BOSNC

Jeremiah 42 in the BOTLNT

Jeremiah 42 in the BOVCB

Jeremiah 42 in the BOYCB

Jeremiah 42 in the BPBB

Jeremiah 42 in the BPH

Jeremiah 42 in the BSB

Jeremiah 42 in the CCB

Jeremiah 42 in the CUV

Jeremiah 42 in the CUVS

Jeremiah 42 in the DBT

Jeremiah 42 in the DGDNT

Jeremiah 42 in the DHNT

Jeremiah 42 in the DNT

Jeremiah 42 in the ELBE

Jeremiah 42 in the EMTV

Jeremiah 42 in the ESV

Jeremiah 42 in the FBV

Jeremiah 42 in the FEB

Jeremiah 42 in the GGMNT

Jeremiah 42 in the GNT

Jeremiah 42 in the HARY

Jeremiah 42 in the HNT

Jeremiah 42 in the IRVA

Jeremiah 42 in the IRVB

Jeremiah 42 in the IRVG

Jeremiah 42 in the IRVH

Jeremiah 42 in the IRVK

Jeremiah 42 in the IRVM

Jeremiah 42 in the IRVM2

Jeremiah 42 in the IRVO

Jeremiah 42 in the IRVP

Jeremiah 42 in the IRVT

Jeremiah 42 in the IRVT2

Jeremiah 42 in the IRVU

Jeremiah 42 in the ISVN

Jeremiah 42 in the JSNT

Jeremiah 42 in the KAPI

Jeremiah 42 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 42 in the KBV

Jeremiah 42 in the KJV

Jeremiah 42 in the KNFD

Jeremiah 42 in the LBA

Jeremiah 42 in the LBLA

Jeremiah 42 in the LNT

Jeremiah 42 in the LSV

Jeremiah 42 in the MAAL

Jeremiah 42 in the MBV

Jeremiah 42 in the MBV2

Jeremiah 42 in the MHNT

Jeremiah 42 in the MKNFD

Jeremiah 42 in the MNG

Jeremiah 42 in the MNT

Jeremiah 42 in the MNT2

Jeremiah 42 in the MRS1T

Jeremiah 42 in the NAA

Jeremiah 42 in the NASB

Jeremiah 42 in the NBLA

Jeremiah 42 in the NBS

Jeremiah 42 in the NBVTP

Jeremiah 42 in the NET2

Jeremiah 42 in the NIV11

Jeremiah 42 in the NNT

Jeremiah 42 in the NNT2

Jeremiah 42 in the NNT3

Jeremiah 42 in the PDDPT

Jeremiah 42 in the PFNT

Jeremiah 42 in the RMNT

Jeremiah 42 in the SBIAS

Jeremiah 42 in the SBIBS

Jeremiah 42 in the SBIBS2

Jeremiah 42 in the SBICS

Jeremiah 42 in the SBIDS

Jeremiah 42 in the SBIGS

Jeremiah 42 in the SBIHS

Jeremiah 42 in the SBIIS

Jeremiah 42 in the SBIIS2

Jeremiah 42 in the SBIIS3

Jeremiah 42 in the SBIKS

Jeremiah 42 in the SBIKS2

Jeremiah 42 in the SBIMS

Jeremiah 42 in the SBIOS

Jeremiah 42 in the SBIPS

Jeremiah 42 in the SBISS

Jeremiah 42 in the SBITS

Jeremiah 42 in the SBITS2

Jeremiah 42 in the SBITS3

Jeremiah 42 in the SBITS4

Jeremiah 42 in the SBIUS

Jeremiah 42 in the SBIVS

Jeremiah 42 in the SBT

Jeremiah 42 in the SBT1E

Jeremiah 42 in the SCHL

Jeremiah 42 in the SNT

Jeremiah 42 in the SUSU

Jeremiah 42 in the SUSU2

Jeremiah 42 in the SYNO

Jeremiah 42 in the TBIAOTANT

Jeremiah 42 in the TBT1E

Jeremiah 42 in the TBT1E2

Jeremiah 42 in the TFTIP

Jeremiah 42 in the TFTU

Jeremiah 42 in the TGNTATF3T

Jeremiah 42 in the THAI

Jeremiah 42 in the TNFD

Jeremiah 42 in the TNT

Jeremiah 42 in the TNTIK

Jeremiah 42 in the TNTIL

Jeremiah 42 in the TNTIN

Jeremiah 42 in the TNTIP

Jeremiah 42 in the TNTIZ

Jeremiah 42 in the TOMA

Jeremiah 42 in the TTENT

Jeremiah 42 in the UBG

Jeremiah 42 in the UGV

Jeremiah 42 in the UGV2

Jeremiah 42 in the UGV3

Jeremiah 42 in the VBL

Jeremiah 42 in the VDCC

Jeremiah 42 in the YALU

Jeremiah 42 in the YAPE

Jeremiah 42 in the YBVTP

Jeremiah 42 in the ZBP