John 21 (BOLCB2)

1 Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango : 2 Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ; 3 Simona Petelo alobaki na bango :— Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi !Balobaki na ye :— Biso mpe tokende elongo na yo !Bakendeki mpe bamataki na bwato ; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te. 4 Na tongo makasi, Yesu atelemaki na libongo, kasi bayekoli bayebaki te ete ezali Ye. 5 Yesu abengaki bango : — Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ?Bazongisaki :— Te ! 6 Alobaki na bango : — Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi.Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele. 7 Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo :— Bandeko, ezali Nkolo !Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi. 8 Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili : bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki. 9 Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi. 10 Yesu alobaki na bango : — Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa. 11 Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te. 12 Bongo Yesu alobaki na bango : — Boya kolia.Lokola bayekoli bayebaki ete ezali Nkolo, moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali nani ? » 13 Yesu apusanaki, azwaki mapa mpe akabolaki yango kati na bango ; asalaki mpe bongo mpo na mbisi. 14 Ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na Ye sima na kosekwa na Ye kati na bakufi. 15 Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ?Azongisaki :— Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo.Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai. 16 Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?Azongisaki :— Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka yo !Yesu alobaki na ye : — Batela bampate na Ngai. 17 Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu :— Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo !Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai. 18 Nazali koloba na yo penza ya solo : tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga yo moko mokaba na yo mpe ozalaki kokende na esika nyonso oyo olingi. Kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe ekozala moto mosusu nde akokanga yo mokaba mpe akomema yo na esika oyo yo okolinga kutu kokende te. 19 Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo : — Landa Ngai ! 20 Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango. 21 Tango Petelo amonaki ye, atunaki Yesu :— Nkolo, okanisi nini mpo na ye ? 22 Yesu azongisaki : — Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? Kasi yo, landa Ngai. 23 Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde : « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? » 24 Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo. 25 Yesu asalaki lisusu makambo mosusu ebele ; soki bakomaki yango na mikanda moko sima na mosusu, nakanisi ete mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kobomba babuku oyo balingaki kokoma.

In Other Versions

John 21 in the ANGEFD

John 21 in the ANTPNG2D

John 21 in the AS21

John 21 in the BAGH

John 21 in the BBPNG

John 21 in the BBT1E

John 21 in the BDS

John 21 in the BEV

John 21 in the BHAD

John 21 in the BIB

John 21 in the BLPT

John 21 in the BNT

John 21 in the BNTABOOT

John 21 in the BNTLV

John 21 in the BOATCB

John 21 in the BOATCB2

John 21 in the BOBCV

John 21 in the BOCNT

John 21 in the BOECS

John 21 in the BOGWICC

John 21 in the BOHCB

John 21 in the BOHCV

John 21 in the BOHLNT

John 21 in the BOHNTLTAL

John 21 in the BOICB

John 21 in the BOILNTAP

John 21 in the BOITCV

John 21 in the BOKCV

John 21 in the BOKCV2

John 21 in the BOKHWOG

John 21 in the BOKSSV

John 21 in the BOLCB

John 21 in the BOMCV

John 21 in the BONAV

John 21 in the BONCB

John 21 in the BONLT

John 21 in the BONUT2

John 21 in the BOPLNT

John 21 in the BOSCB

John 21 in the BOSNC

John 21 in the BOTLNT

John 21 in the BOVCB

John 21 in the BOYCB

John 21 in the BPBB

John 21 in the BPH

John 21 in the BSB

John 21 in the CCB

John 21 in the CUV

John 21 in the CUVS

John 21 in the DBT

John 21 in the DGDNT

John 21 in the DHNT

John 21 in the DNT

John 21 in the ELBE

John 21 in the EMTV

John 21 in the ESV

John 21 in the FBV

John 21 in the FEB

John 21 in the GGMNT

John 21 in the GNT

John 21 in the HARY

John 21 in the HNT

John 21 in the IRVA

John 21 in the IRVB

John 21 in the IRVG

John 21 in the IRVH

John 21 in the IRVK

John 21 in the IRVM

John 21 in the IRVM2

John 21 in the IRVO

John 21 in the IRVP

John 21 in the IRVT

John 21 in the IRVT2

John 21 in the IRVU

John 21 in the ISVN

John 21 in the JSNT

John 21 in the KAPI

John 21 in the KBT1ETNIK

John 21 in the KBV

John 21 in the KJV

John 21 in the KNFD

John 21 in the LBA

John 21 in the LBLA

John 21 in the LNT

John 21 in the LSV

John 21 in the MAAL

John 21 in the MBV

John 21 in the MBV2

John 21 in the MHNT

John 21 in the MKNFD

John 21 in the MNG

John 21 in the MNT

John 21 in the MNT2

John 21 in the MRS1T

John 21 in the NAA

John 21 in the NASB

John 21 in the NBLA

John 21 in the NBS

John 21 in the NBVTP

John 21 in the NET2

John 21 in the NIV11

John 21 in the NNT

John 21 in the NNT2

John 21 in the NNT3

John 21 in the PDDPT

John 21 in the PFNT

John 21 in the RMNT

John 21 in the SBIAS

John 21 in the SBIBS

John 21 in the SBIBS2

John 21 in the SBICS

John 21 in the SBIDS

John 21 in the SBIGS

John 21 in the SBIHS

John 21 in the SBIIS

John 21 in the SBIIS2

John 21 in the SBIIS3

John 21 in the SBIKS

John 21 in the SBIKS2

John 21 in the SBIMS

John 21 in the SBIOS

John 21 in the SBIPS

John 21 in the SBISS

John 21 in the SBITS

John 21 in the SBITS2

John 21 in the SBITS3

John 21 in the SBITS4

John 21 in the SBIUS

John 21 in the SBIVS

John 21 in the SBT

John 21 in the SBT1E

John 21 in the SCHL

John 21 in the SNT

John 21 in the SUSU

John 21 in the SUSU2

John 21 in the SYNO

John 21 in the TBIAOTANT

John 21 in the TBT1E

John 21 in the TBT1E2

John 21 in the TFTIP

John 21 in the TFTU

John 21 in the TGNTATF3T

John 21 in the THAI

John 21 in the TNFD

John 21 in the TNT

John 21 in the TNTIK

John 21 in the TNTIL

John 21 in the TNTIN

John 21 in the TNTIP

John 21 in the TNTIZ

John 21 in the TOMA

John 21 in the TTENT

John 21 in the UBG

John 21 in the UGV

John 21 in the UGV2

John 21 in the UGV3

John 21 in the VBL

John 21 in the VDCC

John 21 in the YALU

John 21 in the YAPE

John 21 in the YBVTP

John 21 in the ZBP