Joshua 14 (BOLCB2)

1 Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango. 2 Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota. 3 Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ; 4 pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango. 5 Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. 6 Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue : « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai. 7 Nazalaki nanu na mibu tuku minei tango Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki ngai wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kononga mokili. Mpe napesaki ye sango kolanda ndenge motema na ngai ezalaki kondima. 8 Bandeko na ngai, oyo tomataki na bango elongo balembisaki bato nzoto ; nzokande ngai nalandaki bobele Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. 9 Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. › 10 Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama, 11 mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai ; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala. 12 Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. » 13 Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula. 14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba. 15 Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.

In Other Versions

Joshua 14 in the ANGEFD

Joshua 14 in the ANTPNG2D

Joshua 14 in the AS21

Joshua 14 in the BAGH

Joshua 14 in the BBPNG

Joshua 14 in the BBT1E

Joshua 14 in the BDS

Joshua 14 in the BEV

Joshua 14 in the BHAD

Joshua 14 in the BIB

Joshua 14 in the BLPT

Joshua 14 in the BNT

Joshua 14 in the BNTABOOT

Joshua 14 in the BNTLV

Joshua 14 in the BOATCB

Joshua 14 in the BOATCB2

Joshua 14 in the BOBCV

Joshua 14 in the BOCNT

Joshua 14 in the BOECS

Joshua 14 in the BOGWICC

Joshua 14 in the BOHCB

Joshua 14 in the BOHCV

Joshua 14 in the BOHLNT

Joshua 14 in the BOHNTLTAL

Joshua 14 in the BOICB

Joshua 14 in the BOILNTAP

Joshua 14 in the BOITCV

Joshua 14 in the BOKCV

Joshua 14 in the BOKCV2

Joshua 14 in the BOKHWOG

Joshua 14 in the BOKSSV

Joshua 14 in the BOLCB

Joshua 14 in the BOMCV

Joshua 14 in the BONAV

Joshua 14 in the BONCB

Joshua 14 in the BONLT

Joshua 14 in the BONUT2

Joshua 14 in the BOPLNT

Joshua 14 in the BOSCB

Joshua 14 in the BOSNC

Joshua 14 in the BOTLNT

Joshua 14 in the BOVCB

Joshua 14 in the BOYCB

Joshua 14 in the BPBB

Joshua 14 in the BPH

Joshua 14 in the BSB

Joshua 14 in the CCB

Joshua 14 in the CUV

Joshua 14 in the CUVS

Joshua 14 in the DBT

Joshua 14 in the DGDNT

Joshua 14 in the DHNT

Joshua 14 in the DNT

Joshua 14 in the ELBE

Joshua 14 in the EMTV

Joshua 14 in the ESV

Joshua 14 in the FBV

Joshua 14 in the FEB

Joshua 14 in the GGMNT

Joshua 14 in the GNT

Joshua 14 in the HARY

Joshua 14 in the HNT

Joshua 14 in the IRVA

Joshua 14 in the IRVB

Joshua 14 in the IRVG

Joshua 14 in the IRVH

Joshua 14 in the IRVK

Joshua 14 in the IRVM

Joshua 14 in the IRVM2

Joshua 14 in the IRVO

Joshua 14 in the IRVP

Joshua 14 in the IRVT

Joshua 14 in the IRVT2

Joshua 14 in the IRVU

Joshua 14 in the ISVN

Joshua 14 in the JSNT

Joshua 14 in the KAPI

Joshua 14 in the KBT1ETNIK

Joshua 14 in the KBV

Joshua 14 in the KJV

Joshua 14 in the KNFD

Joshua 14 in the LBA

Joshua 14 in the LBLA

Joshua 14 in the LNT

Joshua 14 in the LSV

Joshua 14 in the MAAL

Joshua 14 in the MBV

Joshua 14 in the MBV2

Joshua 14 in the MHNT

Joshua 14 in the MKNFD

Joshua 14 in the MNG

Joshua 14 in the MNT

Joshua 14 in the MNT2

Joshua 14 in the MRS1T

Joshua 14 in the NAA

Joshua 14 in the NASB

Joshua 14 in the NBLA

Joshua 14 in the NBS

Joshua 14 in the NBVTP

Joshua 14 in the NET2

Joshua 14 in the NIV11

Joshua 14 in the NNT

Joshua 14 in the NNT2

Joshua 14 in the NNT3

Joshua 14 in the PDDPT

Joshua 14 in the PFNT

Joshua 14 in the RMNT

Joshua 14 in the SBIAS

Joshua 14 in the SBIBS

Joshua 14 in the SBIBS2

Joshua 14 in the SBICS

Joshua 14 in the SBIDS

Joshua 14 in the SBIGS

Joshua 14 in the SBIHS

Joshua 14 in the SBIIS

Joshua 14 in the SBIIS2

Joshua 14 in the SBIIS3

Joshua 14 in the SBIKS

Joshua 14 in the SBIKS2

Joshua 14 in the SBIMS

Joshua 14 in the SBIOS

Joshua 14 in the SBIPS

Joshua 14 in the SBISS

Joshua 14 in the SBITS

Joshua 14 in the SBITS2

Joshua 14 in the SBITS3

Joshua 14 in the SBITS4

Joshua 14 in the SBIUS

Joshua 14 in the SBIVS

Joshua 14 in the SBT

Joshua 14 in the SBT1E

Joshua 14 in the SCHL

Joshua 14 in the SNT

Joshua 14 in the SUSU

Joshua 14 in the SUSU2

Joshua 14 in the SYNO

Joshua 14 in the TBIAOTANT

Joshua 14 in the TBT1E

Joshua 14 in the TBT1E2

Joshua 14 in the TFTIP

Joshua 14 in the TFTU

Joshua 14 in the TGNTATF3T

Joshua 14 in the THAI

Joshua 14 in the TNFD

Joshua 14 in the TNT

Joshua 14 in the TNTIK

Joshua 14 in the TNTIL

Joshua 14 in the TNTIN

Joshua 14 in the TNTIP

Joshua 14 in the TNTIZ

Joshua 14 in the TOMA

Joshua 14 in the TTENT

Joshua 14 in the UBG

Joshua 14 in the UGV

Joshua 14 in the UGV2

Joshua 14 in the UGV3

Joshua 14 in the VBL

Joshua 14 in the VDCC

Joshua 14 in the YALU

Joshua 14 in the YAPE

Joshua 14 in the YBVTP

Joshua 14 in the ZBP