Joshua 22 (BOLCB2)

1 Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase ; 2 mpe alobaki na bango : « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino. 3 Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino. 4 Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani. 5 Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. » 6 Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango. 7 Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango. 8 Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. » 9 Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. 10 Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani. 11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele, 12 lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango. 13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. 14 Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele. 15 Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango : 16 — Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ? 17 Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe ! 18 Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo ? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele. 19 Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso. 20 Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. » 21 Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele : 22 — Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo ! 23 Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso ! 24 Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ? 25 Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe. 26 Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu. 27 Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › » 28 Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › » 29 Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye. 30 Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo. 31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase :— Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe. 32 Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki. 33 Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda. 34 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba : Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe.

In Other Versions

Joshua 22 in the ANGEFD

Joshua 22 in the ANTPNG2D

Joshua 22 in the AS21

Joshua 22 in the BAGH

Joshua 22 in the BBPNG

Joshua 22 in the BBT1E

Joshua 22 in the BDS

Joshua 22 in the BEV

Joshua 22 in the BHAD

Joshua 22 in the BIB

Joshua 22 in the BLPT

Joshua 22 in the BNT

Joshua 22 in the BNTABOOT

Joshua 22 in the BNTLV

Joshua 22 in the BOATCB

Joshua 22 in the BOATCB2

Joshua 22 in the BOBCV

Joshua 22 in the BOCNT

Joshua 22 in the BOECS

Joshua 22 in the BOGWICC

Joshua 22 in the BOHCB

Joshua 22 in the BOHCV

Joshua 22 in the BOHLNT

Joshua 22 in the BOHNTLTAL

Joshua 22 in the BOICB

Joshua 22 in the BOILNTAP

Joshua 22 in the BOITCV

Joshua 22 in the BOKCV

Joshua 22 in the BOKCV2

Joshua 22 in the BOKHWOG

Joshua 22 in the BOKSSV

Joshua 22 in the BOLCB

Joshua 22 in the BOMCV

Joshua 22 in the BONAV

Joshua 22 in the BONCB

Joshua 22 in the BONLT

Joshua 22 in the BONUT2

Joshua 22 in the BOPLNT

Joshua 22 in the BOSCB

Joshua 22 in the BOSNC

Joshua 22 in the BOTLNT

Joshua 22 in the BOVCB

Joshua 22 in the BOYCB

Joshua 22 in the BPBB

Joshua 22 in the BPH

Joshua 22 in the BSB

Joshua 22 in the CCB

Joshua 22 in the CUV

Joshua 22 in the CUVS

Joshua 22 in the DBT

Joshua 22 in the DGDNT

Joshua 22 in the DHNT

Joshua 22 in the DNT

Joshua 22 in the ELBE

Joshua 22 in the EMTV

Joshua 22 in the ESV

Joshua 22 in the FBV

Joshua 22 in the FEB

Joshua 22 in the GGMNT

Joshua 22 in the GNT

Joshua 22 in the HARY

Joshua 22 in the HNT

Joshua 22 in the IRVA

Joshua 22 in the IRVB

Joshua 22 in the IRVG

Joshua 22 in the IRVH

Joshua 22 in the IRVK

Joshua 22 in the IRVM

Joshua 22 in the IRVM2

Joshua 22 in the IRVO

Joshua 22 in the IRVP

Joshua 22 in the IRVT

Joshua 22 in the IRVT2

Joshua 22 in the IRVU

Joshua 22 in the ISVN

Joshua 22 in the JSNT

Joshua 22 in the KAPI

Joshua 22 in the KBT1ETNIK

Joshua 22 in the KBV

Joshua 22 in the KJV

Joshua 22 in the KNFD

Joshua 22 in the LBA

Joshua 22 in the LBLA

Joshua 22 in the LNT

Joshua 22 in the LSV

Joshua 22 in the MAAL

Joshua 22 in the MBV

Joshua 22 in the MBV2

Joshua 22 in the MHNT

Joshua 22 in the MKNFD

Joshua 22 in the MNG

Joshua 22 in the MNT

Joshua 22 in the MNT2

Joshua 22 in the MRS1T

Joshua 22 in the NAA

Joshua 22 in the NASB

Joshua 22 in the NBLA

Joshua 22 in the NBS

Joshua 22 in the NBVTP

Joshua 22 in the NET2

Joshua 22 in the NIV11

Joshua 22 in the NNT

Joshua 22 in the NNT2

Joshua 22 in the NNT3

Joshua 22 in the PDDPT

Joshua 22 in the PFNT

Joshua 22 in the RMNT

Joshua 22 in the SBIAS

Joshua 22 in the SBIBS

Joshua 22 in the SBIBS2

Joshua 22 in the SBICS

Joshua 22 in the SBIDS

Joshua 22 in the SBIGS

Joshua 22 in the SBIHS

Joshua 22 in the SBIIS

Joshua 22 in the SBIIS2

Joshua 22 in the SBIIS3

Joshua 22 in the SBIKS

Joshua 22 in the SBIKS2

Joshua 22 in the SBIMS

Joshua 22 in the SBIOS

Joshua 22 in the SBIPS

Joshua 22 in the SBISS

Joshua 22 in the SBITS

Joshua 22 in the SBITS2

Joshua 22 in the SBITS3

Joshua 22 in the SBITS4

Joshua 22 in the SBIUS

Joshua 22 in the SBIVS

Joshua 22 in the SBT

Joshua 22 in the SBT1E

Joshua 22 in the SCHL

Joshua 22 in the SNT

Joshua 22 in the SUSU

Joshua 22 in the SUSU2

Joshua 22 in the SYNO

Joshua 22 in the TBIAOTANT

Joshua 22 in the TBT1E

Joshua 22 in the TBT1E2

Joshua 22 in the TFTIP

Joshua 22 in the TFTU

Joshua 22 in the TGNTATF3T

Joshua 22 in the THAI

Joshua 22 in the TNFD

Joshua 22 in the TNT

Joshua 22 in the TNTIK

Joshua 22 in the TNTIL

Joshua 22 in the TNTIN

Joshua 22 in the TNTIP

Joshua 22 in the TNTIZ

Joshua 22 in the TOMA

Joshua 22 in the TTENT

Joshua 22 in the UBG

Joshua 22 in the UGV

Joshua 22 in the UGV2

Joshua 22 in the UGV3

Joshua 22 in the VBL

Joshua 22 in the VDCC

Joshua 22 in the YALU

Joshua 22 in the YAPE

Joshua 22 in the YBVTP

Joshua 22 in the ZBP