Joshua 24 (BOLCB2)

1 Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe. 2 Jozue alobaki na bato nyonso :— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu. 3 Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ; 4 mpe na nzela ya Izaki, napesaki ye Jakobi mpe Ezawu. Napesaki mokili ya bangomba Seiri epai ya Ezawu, kasi Jakobi elongo na bana na ye ya mibali, bakendeki na Ejipito. 5 Boye, natindaki Moyize mpe Aron ; nabetaki Ejipito kolanda makambo nyonso oyo nasalaki kuna mpe nabimisaki bino kuna. 6 Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane. 7 Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe. 8 Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango. 9 Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe. 10 Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye. 11 Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino. 12 Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te. 13 Boye, napesaki bino mokili oyo bino bomonelaki pasi te mpe bingumba oyo bino botongaki te. Bokomaki kovanda kuna, kolia bambuma ya bilanga ya vino mpe ya olive oyo bolonaki te. 14 Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe. 15 Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. » 16 Bato bazongisaki :— Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! 17 Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka. 18 Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso. 19 Jozue alobaki na bato :— Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino. 20 Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu. 21 Kasi bato balobaki na Jozue :— Te, tokosalela kaka Yawe ! 22 Jozue alobaki na bato :— Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe.Bazongisaki :— Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli. 23 Jozue alobaki :— Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. 24 Bato bazongiselaki Jozue :— Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye. 25 Na mokolo wana, Jozue asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele na Sishemi, mpe apesaki bango mibeko mpe bikateli. 26 Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe. 27 Jozue alobaki na bato nyonso :— Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te. 28 Boye, Jozue azongisaki bato, moto na moto kati na libula na ye. 29 Sima na makambo oyo, Jozue, mwana mobali ya Nuni, mowumbu na Yawe, akufaki na mibu nkama moko na zomi. 30 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi. 31 Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi. 32 Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi. 33 Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.

In Other Versions

Joshua 24 in the ANGEFD

Joshua 24 in the ANTPNG2D

Joshua 24 in the AS21

Joshua 24 in the BAGH

Joshua 24 in the BBPNG

Joshua 24 in the BBT1E

Joshua 24 in the BDS

Joshua 24 in the BEV

Joshua 24 in the BHAD

Joshua 24 in the BIB

Joshua 24 in the BLPT

Joshua 24 in the BNT

Joshua 24 in the BNTABOOT

Joshua 24 in the BNTLV

Joshua 24 in the BOATCB

Joshua 24 in the BOATCB2

Joshua 24 in the BOBCV

Joshua 24 in the BOCNT

Joshua 24 in the BOECS

Joshua 24 in the BOGWICC

Joshua 24 in the BOHCB

Joshua 24 in the BOHCV

Joshua 24 in the BOHLNT

Joshua 24 in the BOHNTLTAL

Joshua 24 in the BOICB

Joshua 24 in the BOILNTAP

Joshua 24 in the BOITCV

Joshua 24 in the BOKCV

Joshua 24 in the BOKCV2

Joshua 24 in the BOKHWOG

Joshua 24 in the BOKSSV

Joshua 24 in the BOLCB

Joshua 24 in the BOMCV

Joshua 24 in the BONAV

Joshua 24 in the BONCB

Joshua 24 in the BONLT

Joshua 24 in the BONUT2

Joshua 24 in the BOPLNT

Joshua 24 in the BOSCB

Joshua 24 in the BOSNC

Joshua 24 in the BOTLNT

Joshua 24 in the BOVCB

Joshua 24 in the BOYCB

Joshua 24 in the BPBB

Joshua 24 in the BPH

Joshua 24 in the BSB

Joshua 24 in the CCB

Joshua 24 in the CUV

Joshua 24 in the CUVS

Joshua 24 in the DBT

Joshua 24 in the DGDNT

Joshua 24 in the DHNT

Joshua 24 in the DNT

Joshua 24 in the ELBE

Joshua 24 in the EMTV

Joshua 24 in the ESV

Joshua 24 in the FBV

Joshua 24 in the FEB

Joshua 24 in the GGMNT

Joshua 24 in the GNT

Joshua 24 in the HARY

Joshua 24 in the HNT

Joshua 24 in the IRVA

Joshua 24 in the IRVB

Joshua 24 in the IRVG

Joshua 24 in the IRVH

Joshua 24 in the IRVK

Joshua 24 in the IRVM

Joshua 24 in the IRVM2

Joshua 24 in the IRVO

Joshua 24 in the IRVP

Joshua 24 in the IRVT

Joshua 24 in the IRVT2

Joshua 24 in the IRVU

Joshua 24 in the ISVN

Joshua 24 in the JSNT

Joshua 24 in the KAPI

Joshua 24 in the KBT1ETNIK

Joshua 24 in the KBV

Joshua 24 in the KJV

Joshua 24 in the KNFD

Joshua 24 in the LBA

Joshua 24 in the LBLA

Joshua 24 in the LNT

Joshua 24 in the LSV

Joshua 24 in the MAAL

Joshua 24 in the MBV

Joshua 24 in the MBV2

Joshua 24 in the MHNT

Joshua 24 in the MKNFD

Joshua 24 in the MNG

Joshua 24 in the MNT

Joshua 24 in the MNT2

Joshua 24 in the MRS1T

Joshua 24 in the NAA

Joshua 24 in the NASB

Joshua 24 in the NBLA

Joshua 24 in the NBS

Joshua 24 in the NBVTP

Joshua 24 in the NET2

Joshua 24 in the NIV11

Joshua 24 in the NNT

Joshua 24 in the NNT2

Joshua 24 in the NNT3

Joshua 24 in the PDDPT

Joshua 24 in the PFNT

Joshua 24 in the RMNT

Joshua 24 in the SBIAS

Joshua 24 in the SBIBS

Joshua 24 in the SBIBS2

Joshua 24 in the SBICS

Joshua 24 in the SBIDS

Joshua 24 in the SBIGS

Joshua 24 in the SBIHS

Joshua 24 in the SBIIS

Joshua 24 in the SBIIS2

Joshua 24 in the SBIIS3

Joshua 24 in the SBIKS

Joshua 24 in the SBIKS2

Joshua 24 in the SBIMS

Joshua 24 in the SBIOS

Joshua 24 in the SBIPS

Joshua 24 in the SBISS

Joshua 24 in the SBITS

Joshua 24 in the SBITS2

Joshua 24 in the SBITS3

Joshua 24 in the SBITS4

Joshua 24 in the SBIUS

Joshua 24 in the SBIVS

Joshua 24 in the SBT

Joshua 24 in the SBT1E

Joshua 24 in the SCHL

Joshua 24 in the SNT

Joshua 24 in the SUSU

Joshua 24 in the SUSU2

Joshua 24 in the SYNO

Joshua 24 in the TBIAOTANT

Joshua 24 in the TBT1E

Joshua 24 in the TBT1E2

Joshua 24 in the TFTIP

Joshua 24 in the TFTU

Joshua 24 in the TGNTATF3T

Joshua 24 in the THAI

Joshua 24 in the TNFD

Joshua 24 in the TNT

Joshua 24 in the TNTIK

Joshua 24 in the TNTIL

Joshua 24 in the TNTIN

Joshua 24 in the TNTIP

Joshua 24 in the TNTIZ

Joshua 24 in the TOMA

Joshua 24 in the TTENT

Joshua 24 in the UBG

Joshua 24 in the UGV

Joshua 24 in the UGV2

Joshua 24 in the UGV3

Joshua 24 in the VBL

Joshua 24 in the VDCC

Joshua 24 in the YALU

Joshua 24 in the YAPE

Joshua 24 in the YBVTP

Joshua 24 in the ZBP