Joshua 6 (BOLCB2)

1 Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima. 2 Yawe alobaki na Jozue :— Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba. 3 Botambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, yo elongo na bato nyonso ya etumba. Bosala bongo mikolo motoba. 4 Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo. 5 Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala. 6 Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango :— Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe. 7 Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :— Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe. 8 Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima. 9 Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta. 10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele :— Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi. 11 Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu. 12 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe. 13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta. 14 Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba. 15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba. 16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato :— Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino ! 17 Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki. 18 Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu. 19 Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe. 20 Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango. 21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane. 22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko :— Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye. 23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele. 24 Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe. 25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo. 26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo :« Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jerikoalakelama mabe liboso ya Yawe !Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali,tango akotonga miboko na yango ;mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka,tango akotia bikuke na yango. » 27 Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.

In Other Versions

Joshua 6 in the ANGEFD

Joshua 6 in the ANTPNG2D

Joshua 6 in the AS21

Joshua 6 in the BAGH

Joshua 6 in the BBPNG

Joshua 6 in the BBT1E

Joshua 6 in the BDS

Joshua 6 in the BEV

Joshua 6 in the BHAD

Joshua 6 in the BIB

Joshua 6 in the BLPT

Joshua 6 in the BNT

Joshua 6 in the BNTABOOT

Joshua 6 in the BNTLV

Joshua 6 in the BOATCB

Joshua 6 in the BOATCB2

Joshua 6 in the BOBCV

Joshua 6 in the BOCNT

Joshua 6 in the BOECS

Joshua 6 in the BOGWICC

Joshua 6 in the BOHCB

Joshua 6 in the BOHCV

Joshua 6 in the BOHLNT

Joshua 6 in the BOHNTLTAL

Joshua 6 in the BOICB

Joshua 6 in the BOILNTAP

Joshua 6 in the BOITCV

Joshua 6 in the BOKCV

Joshua 6 in the BOKCV2

Joshua 6 in the BOKHWOG

Joshua 6 in the BOKSSV

Joshua 6 in the BOLCB

Joshua 6 in the BOMCV

Joshua 6 in the BONAV

Joshua 6 in the BONCB

Joshua 6 in the BONLT

Joshua 6 in the BONUT2

Joshua 6 in the BOPLNT

Joshua 6 in the BOSCB

Joshua 6 in the BOSNC

Joshua 6 in the BOTLNT

Joshua 6 in the BOVCB

Joshua 6 in the BOYCB

Joshua 6 in the BPBB

Joshua 6 in the BPH

Joshua 6 in the BSB

Joshua 6 in the CCB

Joshua 6 in the CUV

Joshua 6 in the CUVS

Joshua 6 in the DBT

Joshua 6 in the DGDNT

Joshua 6 in the DHNT

Joshua 6 in the DNT

Joshua 6 in the ELBE

Joshua 6 in the EMTV

Joshua 6 in the ESV

Joshua 6 in the FBV

Joshua 6 in the FEB

Joshua 6 in the GGMNT

Joshua 6 in the GNT

Joshua 6 in the HARY

Joshua 6 in the HNT

Joshua 6 in the IRVA

Joshua 6 in the IRVB

Joshua 6 in the IRVG

Joshua 6 in the IRVH

Joshua 6 in the IRVK

Joshua 6 in the IRVM

Joshua 6 in the IRVM2

Joshua 6 in the IRVO

Joshua 6 in the IRVP

Joshua 6 in the IRVT

Joshua 6 in the IRVT2

Joshua 6 in the IRVU

Joshua 6 in the ISVN

Joshua 6 in the JSNT

Joshua 6 in the KAPI

Joshua 6 in the KBT1ETNIK

Joshua 6 in the KBV

Joshua 6 in the KJV

Joshua 6 in the KNFD

Joshua 6 in the LBA

Joshua 6 in the LBLA

Joshua 6 in the LNT

Joshua 6 in the LSV

Joshua 6 in the MAAL

Joshua 6 in the MBV

Joshua 6 in the MBV2

Joshua 6 in the MHNT

Joshua 6 in the MKNFD

Joshua 6 in the MNG

Joshua 6 in the MNT

Joshua 6 in the MNT2

Joshua 6 in the MRS1T

Joshua 6 in the NAA

Joshua 6 in the NASB

Joshua 6 in the NBLA

Joshua 6 in the NBS

Joshua 6 in the NBVTP

Joshua 6 in the NET2

Joshua 6 in the NIV11

Joshua 6 in the NNT

Joshua 6 in the NNT2

Joshua 6 in the NNT3

Joshua 6 in the PDDPT

Joshua 6 in the PFNT

Joshua 6 in the RMNT

Joshua 6 in the SBIAS

Joshua 6 in the SBIBS

Joshua 6 in the SBIBS2

Joshua 6 in the SBICS

Joshua 6 in the SBIDS

Joshua 6 in the SBIGS

Joshua 6 in the SBIHS

Joshua 6 in the SBIIS

Joshua 6 in the SBIIS2

Joshua 6 in the SBIIS3

Joshua 6 in the SBIKS

Joshua 6 in the SBIKS2

Joshua 6 in the SBIMS

Joshua 6 in the SBIOS

Joshua 6 in the SBIPS

Joshua 6 in the SBISS

Joshua 6 in the SBITS

Joshua 6 in the SBITS2

Joshua 6 in the SBITS3

Joshua 6 in the SBITS4

Joshua 6 in the SBIUS

Joshua 6 in the SBIVS

Joshua 6 in the SBT

Joshua 6 in the SBT1E

Joshua 6 in the SCHL

Joshua 6 in the SNT

Joshua 6 in the SUSU

Joshua 6 in the SUSU2

Joshua 6 in the SYNO

Joshua 6 in the TBIAOTANT

Joshua 6 in the TBT1E

Joshua 6 in the TBT1E2

Joshua 6 in the TFTIP

Joshua 6 in the TFTU

Joshua 6 in the TGNTATF3T

Joshua 6 in the THAI

Joshua 6 in the TNFD

Joshua 6 in the TNT

Joshua 6 in the TNTIK

Joshua 6 in the TNTIL

Joshua 6 in the TNTIN

Joshua 6 in the TNTIP

Joshua 6 in the TNTIZ

Joshua 6 in the TOMA

Joshua 6 in the TTENT

Joshua 6 in the UBG

Joshua 6 in the UGV

Joshua 6 in the UGV2

Joshua 6 in the UGV3

Joshua 6 in the VBL

Joshua 6 in the VDCC

Joshua 6 in the YALU

Joshua 6 in the YAPE

Joshua 6 in the YBVTP

Joshua 6 in the ZBP