Joshua 9 (BOLCB2)

1 Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango, 2 basanganaki mpo na kobundisa Jozue mpe Isalaele. 3 Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi, 4 basalelaki mayele mabe : babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba. 5 Balataki basapato ya kala oyo babamba-bamba mpe bilamba ya kala ; mapa na bango ya kolia ezalaki biteni-biteni mpe ya kokawuka. 6 Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele :— Towuti na mokili moko ya mosika ; bosala boyokani elongo na biso. 7 Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi :— Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso ! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino ? 8 Bazongiselaki Jozue :— Tozali basali na yo.Kasi Jozue atunaki bango :— Bozali banani mpe bowuti wapi ? 9 Bazongiselaki ye :— Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito 10 mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti. 11 Bampaka na biso mpe bavandi nyonso ya mokili na biso balobaki na biso : « Bokamata biloko ya kolia na nzela, bokende kokutana na bango mpe boyebisa bango : ‹ Tozali basali na bino, bosala boyokani elongo na biso. › » 12 Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni. 13 Mpe lisusu, totondisaki bambeki oyo na vino tango ezalaki nanu ya sika, kasi tala sik’oyo ndenge nini esili kopasuka-pasuka mpe tala ndenge nini bilamba mpe basapato na biso esili kokufa mpo ete nzela ya mobembo eleki molayi. 14 Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te. 15 Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi. 16 Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango. 17 Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi. 18 Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi. 19 Kasi bakambi nyonso balobaki na lisanga mobimba : « Solo, tolapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, tokoki kosala bango mabe te. 20 Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango : Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. » 21 Bakambi babakisaki lisusu : « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki. 22 Jozue abengisaki bato ya Gabaoni mpe atunaki bango :— Mpo na nini bokosaki biso na koloba : « Tovandaka mosika na bino, » nzokande bovandi kaka pene na biso awa ? 23 Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai. 24 Bazongiselaki Jozue :— Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo. 25 Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo ; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango. 26 Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te. 27 Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.

In Other Versions

Joshua 9 in the ANGEFD

Joshua 9 in the ANTPNG2D

Joshua 9 in the AS21

Joshua 9 in the BAGH

Joshua 9 in the BBPNG

Joshua 9 in the BBT1E

Joshua 9 in the BDS

Joshua 9 in the BEV

Joshua 9 in the BHAD

Joshua 9 in the BIB

Joshua 9 in the BLPT

Joshua 9 in the BNT

Joshua 9 in the BNTABOOT

Joshua 9 in the BNTLV

Joshua 9 in the BOATCB

Joshua 9 in the BOATCB2

Joshua 9 in the BOBCV

Joshua 9 in the BOCNT

Joshua 9 in the BOECS

Joshua 9 in the BOGWICC

Joshua 9 in the BOHCB

Joshua 9 in the BOHCV

Joshua 9 in the BOHLNT

Joshua 9 in the BOHNTLTAL

Joshua 9 in the BOICB

Joshua 9 in the BOILNTAP

Joshua 9 in the BOITCV

Joshua 9 in the BOKCV

Joshua 9 in the BOKCV2

Joshua 9 in the BOKHWOG

Joshua 9 in the BOKSSV

Joshua 9 in the BOLCB

Joshua 9 in the BOMCV

Joshua 9 in the BONAV

Joshua 9 in the BONCB

Joshua 9 in the BONLT

Joshua 9 in the BONUT2

Joshua 9 in the BOPLNT

Joshua 9 in the BOSCB

Joshua 9 in the BOSNC

Joshua 9 in the BOTLNT

Joshua 9 in the BOVCB

Joshua 9 in the BOYCB

Joshua 9 in the BPBB

Joshua 9 in the BPH

Joshua 9 in the BSB

Joshua 9 in the CCB

Joshua 9 in the CUV

Joshua 9 in the CUVS

Joshua 9 in the DBT

Joshua 9 in the DGDNT

Joshua 9 in the DHNT

Joshua 9 in the DNT

Joshua 9 in the ELBE

Joshua 9 in the EMTV

Joshua 9 in the ESV

Joshua 9 in the FBV

Joshua 9 in the FEB

Joshua 9 in the GGMNT

Joshua 9 in the GNT

Joshua 9 in the HARY

Joshua 9 in the HNT

Joshua 9 in the IRVA

Joshua 9 in the IRVB

Joshua 9 in the IRVG

Joshua 9 in the IRVH

Joshua 9 in the IRVK

Joshua 9 in the IRVM

Joshua 9 in the IRVM2

Joshua 9 in the IRVO

Joshua 9 in the IRVP

Joshua 9 in the IRVT

Joshua 9 in the IRVT2

Joshua 9 in the IRVU

Joshua 9 in the ISVN

Joshua 9 in the JSNT

Joshua 9 in the KAPI

Joshua 9 in the KBT1ETNIK

Joshua 9 in the KBV

Joshua 9 in the KJV

Joshua 9 in the KNFD

Joshua 9 in the LBA

Joshua 9 in the LBLA

Joshua 9 in the LNT

Joshua 9 in the LSV

Joshua 9 in the MAAL

Joshua 9 in the MBV

Joshua 9 in the MBV2

Joshua 9 in the MHNT

Joshua 9 in the MKNFD

Joshua 9 in the MNG

Joshua 9 in the MNT

Joshua 9 in the MNT2

Joshua 9 in the MRS1T

Joshua 9 in the NAA

Joshua 9 in the NASB

Joshua 9 in the NBLA

Joshua 9 in the NBS

Joshua 9 in the NBVTP

Joshua 9 in the NET2

Joshua 9 in the NIV11

Joshua 9 in the NNT

Joshua 9 in the NNT2

Joshua 9 in the NNT3

Joshua 9 in the PDDPT

Joshua 9 in the PFNT

Joshua 9 in the RMNT

Joshua 9 in the SBIAS

Joshua 9 in the SBIBS

Joshua 9 in the SBIBS2

Joshua 9 in the SBICS

Joshua 9 in the SBIDS

Joshua 9 in the SBIGS

Joshua 9 in the SBIHS

Joshua 9 in the SBIIS

Joshua 9 in the SBIIS2

Joshua 9 in the SBIIS3

Joshua 9 in the SBIKS

Joshua 9 in the SBIKS2

Joshua 9 in the SBIMS

Joshua 9 in the SBIOS

Joshua 9 in the SBIPS

Joshua 9 in the SBISS

Joshua 9 in the SBITS

Joshua 9 in the SBITS2

Joshua 9 in the SBITS3

Joshua 9 in the SBITS4

Joshua 9 in the SBIUS

Joshua 9 in the SBIVS

Joshua 9 in the SBT

Joshua 9 in the SBT1E

Joshua 9 in the SCHL

Joshua 9 in the SNT

Joshua 9 in the SUSU

Joshua 9 in the SUSU2

Joshua 9 in the SYNO

Joshua 9 in the TBIAOTANT

Joshua 9 in the TBT1E

Joshua 9 in the TBT1E2

Joshua 9 in the TFTIP

Joshua 9 in the TFTU

Joshua 9 in the TGNTATF3T

Joshua 9 in the THAI

Joshua 9 in the TNFD

Joshua 9 in the TNT

Joshua 9 in the TNTIK

Joshua 9 in the TNTIL

Joshua 9 in the TNTIN

Joshua 9 in the TNTIP

Joshua 9 in the TNTIZ

Joshua 9 in the TOMA

Joshua 9 in the TTENT

Joshua 9 in the UBG

Joshua 9 in the UGV

Joshua 9 in the UGV2

Joshua 9 in the UGV3

Joshua 9 in the VBL

Joshua 9 in the VDCC

Joshua 9 in the YALU

Joshua 9 in the YAPE

Joshua 9 in the YBVTP

Joshua 9 in the ZBP