Leviticus 11 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 2 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia : 3 banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu. 4 Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; 5 mpanya ya zamba, pamba te ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; 6 mpanya ya matoyi milayi, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; 7 ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu : ezali mbindo mpo na bino. 8 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino. 9 Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku. 10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino. 11 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino. 12 Bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi kasi ezangi binyanyeli mpe biteku, ezali mbindo mpo na bino. 13 Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, 14 nzengo mpe bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, 15 bayanganga ya lolenge nyonso ; 16 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso, 17 esulungutu, libata ya mayi, esulungutu ya monene, 18 esulungutu ya pembe, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, 19 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema. 20 Bokolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu mpe etambolaka na makolo minei ; ezali mbindo mpo na bino. 21 Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele : 22 lolenge nyonso ya mabanki, mankoko, makelele mpe mayoyo. 23 Kasi banyama mike nyonso oyo ezali na mapapu mpe na makolo minei ezali mbindo mpo na bino. 24 Soki te, ekokomisa bino mbindo ; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. 25 Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. 26 Tala banyama mosusu oyo bokomona lokola mbindo : nyama oyo ezali na litindi epasuka te mpe ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Moto nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo. 27 Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. 28 Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo. 29 Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo : mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete, 30 moselekete ya ndako, moselekete ya zelo, moselekete ya zamba, moselekete ya langi ya pondu, mongungu. 31 Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa. 32 Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto. 33 Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango. 34 Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo ; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka : soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini. 35 Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango ; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo. 36 Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo. 37 Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto ; 38 kasi soki basilaki kosopela nkona yango mayi, bongo eteni ya ebembe ya nyama ya mbindo ekweyi lisusu likolo na yango, bokomona nkona yango mbindo. 39 Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ; 40 mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. 41 Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango. 42 Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu ; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo. 43 Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te. 44 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu. 45 Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. 46 Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu. 47 Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › »

In Other Versions

Leviticus 11 in the ANGEFD

Leviticus 11 in the ANTPNG2D

Leviticus 11 in the AS21

Leviticus 11 in the BAGH

Leviticus 11 in the BBPNG

Leviticus 11 in the BBT1E

Leviticus 11 in the BDS

Leviticus 11 in the BEV

Leviticus 11 in the BHAD

Leviticus 11 in the BIB

Leviticus 11 in the BLPT

Leviticus 11 in the BNT

Leviticus 11 in the BNTABOOT

Leviticus 11 in the BNTLV

Leviticus 11 in the BOATCB

Leviticus 11 in the BOATCB2

Leviticus 11 in the BOBCV

Leviticus 11 in the BOCNT

Leviticus 11 in the BOECS

Leviticus 11 in the BOGWICC

Leviticus 11 in the BOHCB

Leviticus 11 in the BOHCV

Leviticus 11 in the BOHLNT

Leviticus 11 in the BOHNTLTAL

Leviticus 11 in the BOICB

Leviticus 11 in the BOILNTAP

Leviticus 11 in the BOITCV

Leviticus 11 in the BOKCV

Leviticus 11 in the BOKCV2

Leviticus 11 in the BOKHWOG

Leviticus 11 in the BOKSSV

Leviticus 11 in the BOLCB

Leviticus 11 in the BOMCV

Leviticus 11 in the BONAV

Leviticus 11 in the BONCB

Leviticus 11 in the BONLT

Leviticus 11 in the BONUT2

Leviticus 11 in the BOPLNT

Leviticus 11 in the BOSCB

Leviticus 11 in the BOSNC

Leviticus 11 in the BOTLNT

Leviticus 11 in the BOVCB

Leviticus 11 in the BOYCB

Leviticus 11 in the BPBB

Leviticus 11 in the BPH

Leviticus 11 in the BSB

Leviticus 11 in the CCB

Leviticus 11 in the CUV

Leviticus 11 in the CUVS

Leviticus 11 in the DBT

Leviticus 11 in the DGDNT

Leviticus 11 in the DHNT

Leviticus 11 in the DNT

Leviticus 11 in the ELBE

Leviticus 11 in the EMTV

Leviticus 11 in the ESV

Leviticus 11 in the FBV

Leviticus 11 in the FEB

Leviticus 11 in the GGMNT

Leviticus 11 in the GNT

Leviticus 11 in the HARY

Leviticus 11 in the HNT

Leviticus 11 in the IRVA

Leviticus 11 in the IRVB

Leviticus 11 in the IRVG

Leviticus 11 in the IRVH

Leviticus 11 in the IRVK

Leviticus 11 in the IRVM

Leviticus 11 in the IRVM2

Leviticus 11 in the IRVO

Leviticus 11 in the IRVP

Leviticus 11 in the IRVT

Leviticus 11 in the IRVT2

Leviticus 11 in the IRVU

Leviticus 11 in the ISVN

Leviticus 11 in the JSNT

Leviticus 11 in the KAPI

Leviticus 11 in the KBT1ETNIK

Leviticus 11 in the KBV

Leviticus 11 in the KJV

Leviticus 11 in the KNFD

Leviticus 11 in the LBA

Leviticus 11 in the LBLA

Leviticus 11 in the LNT

Leviticus 11 in the LSV

Leviticus 11 in the MAAL

Leviticus 11 in the MBV

Leviticus 11 in the MBV2

Leviticus 11 in the MHNT

Leviticus 11 in the MKNFD

Leviticus 11 in the MNG

Leviticus 11 in the MNT

Leviticus 11 in the MNT2

Leviticus 11 in the MRS1T

Leviticus 11 in the NAA

Leviticus 11 in the NASB

Leviticus 11 in the NBLA

Leviticus 11 in the NBS

Leviticus 11 in the NBVTP

Leviticus 11 in the NET2

Leviticus 11 in the NIV11

Leviticus 11 in the NNT

Leviticus 11 in the NNT2

Leviticus 11 in the NNT3

Leviticus 11 in the PDDPT

Leviticus 11 in the PFNT

Leviticus 11 in the RMNT

Leviticus 11 in the SBIAS

Leviticus 11 in the SBIBS

Leviticus 11 in the SBIBS2

Leviticus 11 in the SBICS

Leviticus 11 in the SBIDS

Leviticus 11 in the SBIGS

Leviticus 11 in the SBIHS

Leviticus 11 in the SBIIS

Leviticus 11 in the SBIIS2

Leviticus 11 in the SBIIS3

Leviticus 11 in the SBIKS

Leviticus 11 in the SBIKS2

Leviticus 11 in the SBIMS

Leviticus 11 in the SBIOS

Leviticus 11 in the SBIPS

Leviticus 11 in the SBISS

Leviticus 11 in the SBITS

Leviticus 11 in the SBITS2

Leviticus 11 in the SBITS3

Leviticus 11 in the SBITS4

Leviticus 11 in the SBIUS

Leviticus 11 in the SBIVS

Leviticus 11 in the SBT

Leviticus 11 in the SBT1E

Leviticus 11 in the SCHL

Leviticus 11 in the SNT

Leviticus 11 in the SUSU

Leviticus 11 in the SUSU2

Leviticus 11 in the SYNO

Leviticus 11 in the TBIAOTANT

Leviticus 11 in the TBT1E

Leviticus 11 in the TBT1E2

Leviticus 11 in the TFTIP

Leviticus 11 in the TFTU

Leviticus 11 in the TGNTATF3T

Leviticus 11 in the THAI

Leviticus 11 in the TNFD

Leviticus 11 in the TNT

Leviticus 11 in the TNTIK

Leviticus 11 in the TNTIL

Leviticus 11 in the TNTIN

Leviticus 11 in the TNTIP

Leviticus 11 in the TNTIZ

Leviticus 11 in the TOMA

Leviticus 11 in the TTENT

Leviticus 11 in the UBG

Leviticus 11 in the UGV

Leviticus 11 in the UGV2

Leviticus 11 in the UGV3

Leviticus 11 in the VBL

Leviticus 11 in the VDCC

Leviticus 11 in the YALU

Leviticus 11 in the YAPE

Leviticus 11 in the YBVTP

Leviticus 11 in the ZBP