Leviticus 5 (BOLCB2)

1 « Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo. 2 Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo. 3 Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango. 4 Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo. 5 Boye, soki amemi ngambo na moko kati na makambo oyo, asengeli kotubela masumu oyo asali 6 mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango. 7 Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba. 8 Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu : akokata yango kingo kasi akolongola moto te. 9 Akosopa ndambo ya makila na yango pembeni ya etumbelo ; mpe ndambo mosusu, na makolo ya etumbelo : ezali mbeka mpo na masumu. 10 Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. 11 Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu. 12 Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu. 13 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. » 14 Yawe alobaki na Moyize : 15 « Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. 16 Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama. 17 Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye. 18 Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama. 19 Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. » 20 Yawe alobaki na Moyize : 21 « Soki moto asali masumu mpe abuki mobeko ya Yawe na kokosa moninga na ye mpo na eloko oyo babombisaki epai na ye to oyo adefaki to oyo ayibaki to oyo abotolaki na makasi 22 to atako amoni eloko oyo ebungaki, kasi akosi mpe alapi ndayi ya lokuta na tina na moko kati na masumu oyo moto akoki kosala ; 23 moto oyo asali masumu ya boye mpe amemi ngambo, akozongisa eloko oyo ayibisaki to oyo abotolaki na makasi to oyo babombisaki epai na ye to oyo amonaki sima na kobungisa yango. 24 To lisusu, akozongisa eloko nyonso oyo na tina na yango ye alapaki ndayi ya lokuta mpe akobakisa eteni moko kati na biteni mitano. Akozongisa yango na nkolo eloko na mokolo oyo akobonza mbeka na ye mpo na masumu. 25 Mpe akomema epai ya Nganga-Nzambe mbeka na ye mpo na kozongisa boyokani elongo na Yawe. Akomema meme ya mobali oyo ezanga mbeba ; akozwa yango kati na bameme mpe bantaba na ye kolanda ndenge okokata. 26 Nganga-Nzambe akosala mpo na moto wana, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ; mpe moto yango akolimbisama. »

In Other Versions

Leviticus 5 in the ANGEFD

Leviticus 5 in the ANTPNG2D

Leviticus 5 in the AS21

Leviticus 5 in the BAGH

Leviticus 5 in the BBPNG

Leviticus 5 in the BBT1E

Leviticus 5 in the BDS

Leviticus 5 in the BEV

Leviticus 5 in the BHAD

Leviticus 5 in the BIB

Leviticus 5 in the BLPT

Leviticus 5 in the BNT

Leviticus 5 in the BNTABOOT

Leviticus 5 in the BNTLV

Leviticus 5 in the BOATCB

Leviticus 5 in the BOATCB2

Leviticus 5 in the BOBCV

Leviticus 5 in the BOCNT

Leviticus 5 in the BOECS

Leviticus 5 in the BOGWICC

Leviticus 5 in the BOHCB

Leviticus 5 in the BOHCV

Leviticus 5 in the BOHLNT

Leviticus 5 in the BOHNTLTAL

Leviticus 5 in the BOICB

Leviticus 5 in the BOILNTAP

Leviticus 5 in the BOITCV

Leviticus 5 in the BOKCV

Leviticus 5 in the BOKCV2

Leviticus 5 in the BOKHWOG

Leviticus 5 in the BOKSSV

Leviticus 5 in the BOLCB

Leviticus 5 in the BOMCV

Leviticus 5 in the BONAV

Leviticus 5 in the BONCB

Leviticus 5 in the BONLT

Leviticus 5 in the BONUT2

Leviticus 5 in the BOPLNT

Leviticus 5 in the BOSCB

Leviticus 5 in the BOSNC

Leviticus 5 in the BOTLNT

Leviticus 5 in the BOVCB

Leviticus 5 in the BOYCB

Leviticus 5 in the BPBB

Leviticus 5 in the BPH

Leviticus 5 in the BSB

Leviticus 5 in the CCB

Leviticus 5 in the CUV

Leviticus 5 in the CUVS

Leviticus 5 in the DBT

Leviticus 5 in the DGDNT

Leviticus 5 in the DHNT

Leviticus 5 in the DNT

Leviticus 5 in the ELBE

Leviticus 5 in the EMTV

Leviticus 5 in the ESV

Leviticus 5 in the FBV

Leviticus 5 in the FEB

Leviticus 5 in the GGMNT

Leviticus 5 in the GNT

Leviticus 5 in the HARY

Leviticus 5 in the HNT

Leviticus 5 in the IRVA

Leviticus 5 in the IRVB

Leviticus 5 in the IRVG

Leviticus 5 in the IRVH

Leviticus 5 in the IRVK

Leviticus 5 in the IRVM

Leviticus 5 in the IRVM2

Leviticus 5 in the IRVO

Leviticus 5 in the IRVP

Leviticus 5 in the IRVT

Leviticus 5 in the IRVT2

Leviticus 5 in the IRVU

Leviticus 5 in the ISVN

Leviticus 5 in the JSNT

Leviticus 5 in the KAPI

Leviticus 5 in the KBT1ETNIK

Leviticus 5 in the KBV

Leviticus 5 in the KJV

Leviticus 5 in the KNFD

Leviticus 5 in the LBA

Leviticus 5 in the LBLA

Leviticus 5 in the LNT

Leviticus 5 in the LSV

Leviticus 5 in the MAAL

Leviticus 5 in the MBV

Leviticus 5 in the MBV2

Leviticus 5 in the MHNT

Leviticus 5 in the MKNFD

Leviticus 5 in the MNG

Leviticus 5 in the MNT

Leviticus 5 in the MNT2

Leviticus 5 in the MRS1T

Leviticus 5 in the NAA

Leviticus 5 in the NASB

Leviticus 5 in the NBLA

Leviticus 5 in the NBS

Leviticus 5 in the NBVTP

Leviticus 5 in the NET2

Leviticus 5 in the NIV11

Leviticus 5 in the NNT

Leviticus 5 in the NNT2

Leviticus 5 in the NNT3

Leviticus 5 in the PDDPT

Leviticus 5 in the PFNT

Leviticus 5 in the RMNT

Leviticus 5 in the SBIAS

Leviticus 5 in the SBIBS

Leviticus 5 in the SBIBS2

Leviticus 5 in the SBICS

Leviticus 5 in the SBIDS

Leviticus 5 in the SBIGS

Leviticus 5 in the SBIHS

Leviticus 5 in the SBIIS

Leviticus 5 in the SBIIS2

Leviticus 5 in the SBIIS3

Leviticus 5 in the SBIKS

Leviticus 5 in the SBIKS2

Leviticus 5 in the SBIMS

Leviticus 5 in the SBIOS

Leviticus 5 in the SBIPS

Leviticus 5 in the SBISS

Leviticus 5 in the SBITS

Leviticus 5 in the SBITS2

Leviticus 5 in the SBITS3

Leviticus 5 in the SBITS4

Leviticus 5 in the SBIUS

Leviticus 5 in the SBIVS

Leviticus 5 in the SBT

Leviticus 5 in the SBT1E

Leviticus 5 in the SCHL

Leviticus 5 in the SNT

Leviticus 5 in the SUSU

Leviticus 5 in the SUSU2

Leviticus 5 in the SYNO

Leviticus 5 in the TBIAOTANT

Leviticus 5 in the TBT1E

Leviticus 5 in the TBT1E2

Leviticus 5 in the TFTIP

Leviticus 5 in the TFTU

Leviticus 5 in the TGNTATF3T

Leviticus 5 in the THAI

Leviticus 5 in the TNFD

Leviticus 5 in the TNT

Leviticus 5 in the TNTIK

Leviticus 5 in the TNTIL

Leviticus 5 in the TNTIN

Leviticus 5 in the TNTIP

Leviticus 5 in the TNTIZ

Leviticus 5 in the TOMA

Leviticus 5 in the TTENT

Leviticus 5 in the UBG

Leviticus 5 in the UGV

Leviticus 5 in the UGV2

Leviticus 5 in the UGV3

Leviticus 5 in the VBL

Leviticus 5 in the VDCC

Leviticus 5 in the YALU

Leviticus 5 in the YAPE

Leviticus 5 in the YBVTP

Leviticus 5 in the ZBP