Numbers 21 (BOLCB2)

1 Tango moto ya mboka Kanana, mokonzi ya Aradi, oyo azalaki kovanda na Negevi ayokaki ete Isalaele azali koya pembeni ya nzela ya Atarimi, abundisaki bana ya Isalaele mpe akangaki bamosusu kati na bango na boloko. 2 Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe : « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. » 3 Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama. 4 Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela. 5 Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! » 6 Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki. 7 Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. »Boye, Moyize abondelaki mpo na bato. 8 Yawe alobaki na Moyize :— Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika. 9 Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki. 10 Bana ya Isalaele balongwaki wana mpe bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. 11 Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka. 12 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi. 13 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori. 14 Yango wana, buku ya bitumba ya Yawe eloba :« Wahebi kati na Sufa mpe miluka na yango,Arinoni 15 mpe nzela ya miluka ya mabwakuoyo ekenda kino na engumba Arimpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. » 16 Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize : « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. » 17 Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo :« Oh libulu, bimisa mayi !Boyembela yango ! 18 Libulu oyo bana bakonzi batimola,oyo bato minene batobolana mangenda mpe banzete na bango. »Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana ; 19 kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti ; 20 mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe. 21 Bana ya Isalaele batindaki bantoma mpo na koyebisa Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori : 22 « Tika biso tolekela na mokili na yo. Tokokota te na elanga to na elanga ya vino moko, mpe tokomela te mayi ya mabulu na bino ; tokoleka kaka na nzela ya monene ya mokonzi kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. » 23 Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye ; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi. 24 Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi. 25 Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga. 26 Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni. 27 Yango wana balobaka na masese :« Boya na Eshiboni !Tika ete etelema lisusu !Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu ! 28 Moto ebimaki wuta na Eshiboni,ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni,etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni. 29 Oh Moabi, mawa na yo !Oh bato ya Kemoshi, bobebisami !Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ;mpe bana basi na ye, bakangamiya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori. 30 Kasi tolongi bango ;Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni,topanzi yango nyonso kino na Nofaki,mpe kino na Medeba. » 31 Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori. 32 Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna. 33 Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi. 34 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. » 35 Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.

In Other Versions

Numbers 21 in the ANGEFD

Numbers 21 in the ANTPNG2D

Numbers 21 in the AS21

Numbers 21 in the BAGH

Numbers 21 in the BBPNG

Numbers 21 in the BBT1E

Numbers 21 in the BDS

Numbers 21 in the BEV

Numbers 21 in the BHAD

Numbers 21 in the BIB

Numbers 21 in the BLPT

Numbers 21 in the BNT

Numbers 21 in the BNTABOOT

Numbers 21 in the BNTLV

Numbers 21 in the BOATCB

Numbers 21 in the BOATCB2

Numbers 21 in the BOBCV

Numbers 21 in the BOCNT

Numbers 21 in the BOECS

Numbers 21 in the BOGWICC

Numbers 21 in the BOHCB

Numbers 21 in the BOHCV

Numbers 21 in the BOHLNT

Numbers 21 in the BOHNTLTAL

Numbers 21 in the BOICB

Numbers 21 in the BOILNTAP

Numbers 21 in the BOITCV

Numbers 21 in the BOKCV

Numbers 21 in the BOKCV2

Numbers 21 in the BOKHWOG

Numbers 21 in the BOKSSV

Numbers 21 in the BOLCB

Numbers 21 in the BOMCV

Numbers 21 in the BONAV

Numbers 21 in the BONCB

Numbers 21 in the BONLT

Numbers 21 in the BONUT2

Numbers 21 in the BOPLNT

Numbers 21 in the BOSCB

Numbers 21 in the BOSNC

Numbers 21 in the BOTLNT

Numbers 21 in the BOVCB

Numbers 21 in the BOYCB

Numbers 21 in the BPBB

Numbers 21 in the BPH

Numbers 21 in the BSB

Numbers 21 in the CCB

Numbers 21 in the CUV

Numbers 21 in the CUVS

Numbers 21 in the DBT

Numbers 21 in the DGDNT

Numbers 21 in the DHNT

Numbers 21 in the DNT

Numbers 21 in the ELBE

Numbers 21 in the EMTV

Numbers 21 in the ESV

Numbers 21 in the FBV

Numbers 21 in the FEB

Numbers 21 in the GGMNT

Numbers 21 in the GNT

Numbers 21 in the HARY

Numbers 21 in the HNT

Numbers 21 in the IRVA

Numbers 21 in the IRVB

Numbers 21 in the IRVG

Numbers 21 in the IRVH

Numbers 21 in the IRVK

Numbers 21 in the IRVM

Numbers 21 in the IRVM2

Numbers 21 in the IRVO

Numbers 21 in the IRVP

Numbers 21 in the IRVT

Numbers 21 in the IRVT2

Numbers 21 in the IRVU

Numbers 21 in the ISVN

Numbers 21 in the JSNT

Numbers 21 in the KAPI

Numbers 21 in the KBT1ETNIK

Numbers 21 in the KBV

Numbers 21 in the KJV

Numbers 21 in the KNFD

Numbers 21 in the LBA

Numbers 21 in the LBLA

Numbers 21 in the LNT

Numbers 21 in the LSV

Numbers 21 in the MAAL

Numbers 21 in the MBV

Numbers 21 in the MBV2

Numbers 21 in the MHNT

Numbers 21 in the MKNFD

Numbers 21 in the MNG

Numbers 21 in the MNT

Numbers 21 in the MNT2

Numbers 21 in the MRS1T

Numbers 21 in the NAA

Numbers 21 in the NASB

Numbers 21 in the NBLA

Numbers 21 in the NBS

Numbers 21 in the NBVTP

Numbers 21 in the NET2

Numbers 21 in the NIV11

Numbers 21 in the NNT

Numbers 21 in the NNT2

Numbers 21 in the NNT3

Numbers 21 in the PDDPT

Numbers 21 in the PFNT

Numbers 21 in the RMNT

Numbers 21 in the SBIAS

Numbers 21 in the SBIBS

Numbers 21 in the SBIBS2

Numbers 21 in the SBICS

Numbers 21 in the SBIDS

Numbers 21 in the SBIGS

Numbers 21 in the SBIHS

Numbers 21 in the SBIIS

Numbers 21 in the SBIIS2

Numbers 21 in the SBIIS3

Numbers 21 in the SBIKS

Numbers 21 in the SBIKS2

Numbers 21 in the SBIMS

Numbers 21 in the SBIOS

Numbers 21 in the SBIPS

Numbers 21 in the SBISS

Numbers 21 in the SBITS

Numbers 21 in the SBITS2

Numbers 21 in the SBITS3

Numbers 21 in the SBITS4

Numbers 21 in the SBIUS

Numbers 21 in the SBIVS

Numbers 21 in the SBT

Numbers 21 in the SBT1E

Numbers 21 in the SCHL

Numbers 21 in the SNT

Numbers 21 in the SUSU

Numbers 21 in the SUSU2

Numbers 21 in the SYNO

Numbers 21 in the TBIAOTANT

Numbers 21 in the TBT1E

Numbers 21 in the TBT1E2

Numbers 21 in the TFTIP

Numbers 21 in the TFTU

Numbers 21 in the TGNTATF3T

Numbers 21 in the THAI

Numbers 21 in the TNFD

Numbers 21 in the TNT

Numbers 21 in the TNTIK

Numbers 21 in the TNTIL

Numbers 21 in the TNTIN

Numbers 21 in the TNTIP

Numbers 21 in the TNTIZ

Numbers 21 in the TOMA

Numbers 21 in the TTENT

Numbers 21 in the UBG

Numbers 21 in the UGV

Numbers 21 in the UGV2

Numbers 21 in the UGV3

Numbers 21 in the VBL

Numbers 21 in the VDCC

Numbers 21 in the YALU

Numbers 21 in the YAPE

Numbers 21 in the YBVTP

Numbers 21 in the ZBP