Numbers 28 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. › 3 Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela. 4 Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ; 5 elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. 6 Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 7 Bokobakisa lisusu likabo ya masanga : balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule. 8 Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 9 Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma. 10 Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga. 11 Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te. 12 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 13 mpo na mwana meme moko na moko, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na mafuta. Ezali mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. 14 Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali. 15 Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. 16 Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe. 17 Mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango kaka ekozala mokolo ya feti monene. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. 18 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. 19 Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko ; nyonso esengeli kozanga mbeba. 20 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bakobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 21 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. 22 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. 23 Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo. 24 Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto ; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga. 25 Na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bongo na mokolo yango, bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. 26 Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo. 27 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko. 28 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 29 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. 30 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. 31 Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »

In Other Versions

Numbers 28 in the ANGEFD

Numbers 28 in the ANTPNG2D

Numbers 28 in the AS21

Numbers 28 in the BAGH

Numbers 28 in the BBPNG

Numbers 28 in the BBT1E

Numbers 28 in the BDS

Numbers 28 in the BEV

Numbers 28 in the BHAD

Numbers 28 in the BIB

Numbers 28 in the BLPT

Numbers 28 in the BNT

Numbers 28 in the BNTABOOT

Numbers 28 in the BNTLV

Numbers 28 in the BOATCB

Numbers 28 in the BOATCB2

Numbers 28 in the BOBCV

Numbers 28 in the BOCNT

Numbers 28 in the BOECS

Numbers 28 in the BOGWICC

Numbers 28 in the BOHCB

Numbers 28 in the BOHCV

Numbers 28 in the BOHLNT

Numbers 28 in the BOHNTLTAL

Numbers 28 in the BOICB

Numbers 28 in the BOILNTAP

Numbers 28 in the BOITCV

Numbers 28 in the BOKCV

Numbers 28 in the BOKCV2

Numbers 28 in the BOKHWOG

Numbers 28 in the BOKSSV

Numbers 28 in the BOLCB

Numbers 28 in the BOMCV

Numbers 28 in the BONAV

Numbers 28 in the BONCB

Numbers 28 in the BONLT

Numbers 28 in the BONUT2

Numbers 28 in the BOPLNT

Numbers 28 in the BOSCB

Numbers 28 in the BOSNC

Numbers 28 in the BOTLNT

Numbers 28 in the BOVCB

Numbers 28 in the BOYCB

Numbers 28 in the BPBB

Numbers 28 in the BPH

Numbers 28 in the BSB

Numbers 28 in the CCB

Numbers 28 in the CUV

Numbers 28 in the CUVS

Numbers 28 in the DBT

Numbers 28 in the DGDNT

Numbers 28 in the DHNT

Numbers 28 in the DNT

Numbers 28 in the ELBE

Numbers 28 in the EMTV

Numbers 28 in the ESV

Numbers 28 in the FBV

Numbers 28 in the FEB

Numbers 28 in the GGMNT

Numbers 28 in the GNT

Numbers 28 in the HARY

Numbers 28 in the HNT

Numbers 28 in the IRVA

Numbers 28 in the IRVB

Numbers 28 in the IRVG

Numbers 28 in the IRVH

Numbers 28 in the IRVK

Numbers 28 in the IRVM

Numbers 28 in the IRVM2

Numbers 28 in the IRVO

Numbers 28 in the IRVP

Numbers 28 in the IRVT

Numbers 28 in the IRVT2

Numbers 28 in the IRVU

Numbers 28 in the ISVN

Numbers 28 in the JSNT

Numbers 28 in the KAPI

Numbers 28 in the KBT1ETNIK

Numbers 28 in the KBV

Numbers 28 in the KJV

Numbers 28 in the KNFD

Numbers 28 in the LBA

Numbers 28 in the LBLA

Numbers 28 in the LNT

Numbers 28 in the LSV

Numbers 28 in the MAAL

Numbers 28 in the MBV

Numbers 28 in the MBV2

Numbers 28 in the MHNT

Numbers 28 in the MKNFD

Numbers 28 in the MNG

Numbers 28 in the MNT

Numbers 28 in the MNT2

Numbers 28 in the MRS1T

Numbers 28 in the NAA

Numbers 28 in the NASB

Numbers 28 in the NBLA

Numbers 28 in the NBS

Numbers 28 in the NBVTP

Numbers 28 in the NET2

Numbers 28 in the NIV11

Numbers 28 in the NNT

Numbers 28 in the NNT2

Numbers 28 in the NNT3

Numbers 28 in the PDDPT

Numbers 28 in the PFNT

Numbers 28 in the RMNT

Numbers 28 in the SBIAS

Numbers 28 in the SBIBS

Numbers 28 in the SBIBS2

Numbers 28 in the SBICS

Numbers 28 in the SBIDS

Numbers 28 in the SBIGS

Numbers 28 in the SBIHS

Numbers 28 in the SBIIS

Numbers 28 in the SBIIS2

Numbers 28 in the SBIIS3

Numbers 28 in the SBIKS

Numbers 28 in the SBIKS2

Numbers 28 in the SBIMS

Numbers 28 in the SBIOS

Numbers 28 in the SBIPS

Numbers 28 in the SBISS

Numbers 28 in the SBITS

Numbers 28 in the SBITS2

Numbers 28 in the SBITS3

Numbers 28 in the SBITS4

Numbers 28 in the SBIUS

Numbers 28 in the SBIVS

Numbers 28 in the SBT

Numbers 28 in the SBT1E

Numbers 28 in the SCHL

Numbers 28 in the SNT

Numbers 28 in the SUSU

Numbers 28 in the SUSU2

Numbers 28 in the SYNO

Numbers 28 in the TBIAOTANT

Numbers 28 in the TBT1E

Numbers 28 in the TBT1E2

Numbers 28 in the TFTIP

Numbers 28 in the TFTU

Numbers 28 in the TGNTATF3T

Numbers 28 in the THAI

Numbers 28 in the TNFD

Numbers 28 in the TNT

Numbers 28 in the TNTIK

Numbers 28 in the TNTIL

Numbers 28 in the TNTIN

Numbers 28 in the TNTIP

Numbers 28 in the TNTIZ

Numbers 28 in the TOMA

Numbers 28 in the TTENT

Numbers 28 in the UBG

Numbers 28 in the UGV

Numbers 28 in the UGV2

Numbers 28 in the UGV3

Numbers 28 in the VBL

Numbers 28 in the VDCC

Numbers 28 in the YALU

Numbers 28 in the YAPE

Numbers 28 in the YBVTP

Numbers 28 in the ZBP