Proverbs 16 (BOLCB2)

1 Motema ya moto esalaka mabongisi,kasi eyano ewutaka epai na Yawe. 2 Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye,kasi Yawe nde amekaka mitema. 3 Pesa misala na yo epai na Yawe,mpe mabongisi na yo ekokokisama. 4 Yawe asalaka makambo nyonso na tina,ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi. 5 Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ;solo, akozanga te kozwa etumbu. 6 Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ;kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe. 7 Soki Yawe asepeli na nzela ya moto,akoyokanisa ye na banguna na ye. 8 Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamukoleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe. 9 Motema ya moto esalaka mabongisi,kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te. 10 Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe,ekweyaka te kati na kosambisama. 11 Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kiloezali ya Yawe,mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye. 12 Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe,pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo. 13 Bakonzi balingaka maloba ya solo,mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu. 14 Kanda ya mokonzi ememaka na kufa,kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango. 15 Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga,elingi koloba : bomoi.Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka. 16 Bwanya ezali malamu koleka wolo,mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata. 17 Bato ya sembo batambolakana nzela oyo epesaka mabe mokongo.Moto oyo abatelaka motema na yeabatelaka nde bomoi na ye. 18 Lolendo eyaka liboso ya kobebisama,mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama. 19 Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelelaezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumbaelongo na bato ya lolendo. 20 Moto oyo akanisaka na tina na makamboamonaka bolamu.Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe. 21 Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanyamoto ya mayele,mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi. 22 Mayele ezali etima ya bomoimpo na bato oyo bazali na yango,kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba. 23 Motema ya moto ya bwanya ekomisakamonoko na ye mayele,mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi. 24 Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi,epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa. 25 Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato,nzokande, na suka, ememaka na kufa. 26 Nzala etindaka mosali ete asala mosala,monoko na ye etindikaka ye na mosala. 27 Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe,mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka. 28 Moto mabe alonaka koswana,moto ya songisongi akabolaka baninga. 29 Moto ya mobulu abendaka moninga na yempe atambolisaka ye na nzela ya mabe. 30 Moto oyo akangi miso mpe bibebu na yempo na kosala mabongisi ya mabeasili kosala masumu. 31 Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ;bazwaka yango na nzela ya bosembo. 32 Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasikoleka moto oyo abotolaka bingumba. 33 Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe,kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.

In Other Versions

Proverbs 16 in the ANGEFD

Proverbs 16 in the ANTPNG2D

Proverbs 16 in the AS21

Proverbs 16 in the BAGH

Proverbs 16 in the BBPNG

Proverbs 16 in the BBT1E

Proverbs 16 in the BDS

Proverbs 16 in the BEV

Proverbs 16 in the BHAD

Proverbs 16 in the BIB

Proverbs 16 in the BLPT

Proverbs 16 in the BNT

Proverbs 16 in the BNTABOOT

Proverbs 16 in the BNTLV

Proverbs 16 in the BOATCB

Proverbs 16 in the BOATCB2

Proverbs 16 in the BOBCV

Proverbs 16 in the BOCNT

Proverbs 16 in the BOECS

Proverbs 16 in the BOGWICC

Proverbs 16 in the BOHCB

Proverbs 16 in the BOHCV

Proverbs 16 in the BOHLNT

Proverbs 16 in the BOHNTLTAL

Proverbs 16 in the BOICB

Proverbs 16 in the BOILNTAP

Proverbs 16 in the BOITCV

Proverbs 16 in the BOKCV

Proverbs 16 in the BOKCV2

Proverbs 16 in the BOKHWOG

Proverbs 16 in the BOKSSV

Proverbs 16 in the BOLCB

Proverbs 16 in the BOMCV

Proverbs 16 in the BONAV

Proverbs 16 in the BONCB

Proverbs 16 in the BONLT

Proverbs 16 in the BONUT2

Proverbs 16 in the BOPLNT

Proverbs 16 in the BOSCB

Proverbs 16 in the BOSNC

Proverbs 16 in the BOTLNT

Proverbs 16 in the BOVCB

Proverbs 16 in the BOYCB

Proverbs 16 in the BPBB

Proverbs 16 in the BPH

Proverbs 16 in the BSB

Proverbs 16 in the CCB

Proverbs 16 in the CUV

Proverbs 16 in the CUVS

Proverbs 16 in the DBT

Proverbs 16 in the DGDNT

Proverbs 16 in the DHNT

Proverbs 16 in the DNT

Proverbs 16 in the ELBE

Proverbs 16 in the EMTV

Proverbs 16 in the ESV

Proverbs 16 in the FBV

Proverbs 16 in the FEB

Proverbs 16 in the GGMNT

Proverbs 16 in the GNT

Proverbs 16 in the HARY

Proverbs 16 in the HNT

Proverbs 16 in the IRVA

Proverbs 16 in the IRVB

Proverbs 16 in the IRVG

Proverbs 16 in the IRVH

Proverbs 16 in the IRVK

Proverbs 16 in the IRVM

Proverbs 16 in the IRVM2

Proverbs 16 in the IRVO

Proverbs 16 in the IRVP

Proverbs 16 in the IRVT

Proverbs 16 in the IRVT2

Proverbs 16 in the IRVU

Proverbs 16 in the ISVN

Proverbs 16 in the JSNT

Proverbs 16 in the KAPI

Proverbs 16 in the KBT1ETNIK

Proverbs 16 in the KBV

Proverbs 16 in the KJV

Proverbs 16 in the KNFD

Proverbs 16 in the LBA

Proverbs 16 in the LBLA

Proverbs 16 in the LNT

Proverbs 16 in the LSV

Proverbs 16 in the MAAL

Proverbs 16 in the MBV

Proverbs 16 in the MBV2

Proverbs 16 in the MHNT

Proverbs 16 in the MKNFD

Proverbs 16 in the MNG

Proverbs 16 in the MNT

Proverbs 16 in the MNT2

Proverbs 16 in the MRS1T

Proverbs 16 in the NAA

Proverbs 16 in the NASB

Proverbs 16 in the NBLA

Proverbs 16 in the NBS

Proverbs 16 in the NBVTP

Proverbs 16 in the NET2

Proverbs 16 in the NIV11

Proverbs 16 in the NNT

Proverbs 16 in the NNT2

Proverbs 16 in the NNT3

Proverbs 16 in the PDDPT

Proverbs 16 in the PFNT

Proverbs 16 in the RMNT

Proverbs 16 in the SBIAS

Proverbs 16 in the SBIBS

Proverbs 16 in the SBIBS2

Proverbs 16 in the SBICS

Proverbs 16 in the SBIDS

Proverbs 16 in the SBIGS

Proverbs 16 in the SBIHS

Proverbs 16 in the SBIIS

Proverbs 16 in the SBIIS2

Proverbs 16 in the SBIIS3

Proverbs 16 in the SBIKS

Proverbs 16 in the SBIKS2

Proverbs 16 in the SBIMS

Proverbs 16 in the SBIOS

Proverbs 16 in the SBIPS

Proverbs 16 in the SBISS

Proverbs 16 in the SBITS

Proverbs 16 in the SBITS2

Proverbs 16 in the SBITS3

Proverbs 16 in the SBITS4

Proverbs 16 in the SBIUS

Proverbs 16 in the SBIVS

Proverbs 16 in the SBT

Proverbs 16 in the SBT1E

Proverbs 16 in the SCHL

Proverbs 16 in the SNT

Proverbs 16 in the SUSU

Proverbs 16 in the SUSU2

Proverbs 16 in the SYNO

Proverbs 16 in the TBIAOTANT

Proverbs 16 in the TBT1E

Proverbs 16 in the TBT1E2

Proverbs 16 in the TFTIP

Proverbs 16 in the TFTU

Proverbs 16 in the TGNTATF3T

Proverbs 16 in the THAI

Proverbs 16 in the TNFD

Proverbs 16 in the TNT

Proverbs 16 in the TNTIK

Proverbs 16 in the TNTIL

Proverbs 16 in the TNTIN

Proverbs 16 in the TNTIP

Proverbs 16 in the TNTIZ

Proverbs 16 in the TOMA

Proverbs 16 in the TTENT

Proverbs 16 in the UBG

Proverbs 16 in the UGV

Proverbs 16 in the UGV2

Proverbs 16 in the UGV3

Proverbs 16 in the VBL

Proverbs 16 in the VDCC

Proverbs 16 in the YALU

Proverbs 16 in the YAPE

Proverbs 16 in the YBVTP

Proverbs 16 in the ZBP