Psalms 15 (BOLCB2)
1 Nzembo ya Davidi.Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ?Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ? 2 Ezali moto oyo azangi pamela,oyo asalaka makambo ya sembompe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ; 3 oyo akoselaka moninga makambo te,asalaka ye mabe te,mpe ayokisaka ye pasi te ; 4 asanganaka te na moto oyo asalaka mabe,kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ;akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi,mpe abongolaka mokano na ye te ; 5 asengaka mileki te soki adefisi mbongo,andimaka kanyaka tempo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongoakotikala kopengwa te.