Psalms 29 (BOLCB2)
1 Nzembo ya Davidi.Bopesa Yawe, bino ba-anjelu ya Nzambe,bopesa Yawe nkembo mpe makasi. 2 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ;bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye. 3 Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi,Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito,Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene. 4 Mongongo ya Yawe ezali na nguya ;mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi. 5 Mongongo ya Yawe ebukaka banzete ya sedele ;Yawe abukaka banzete ya sedele ya Libani. 6 Apumbwisaka Libani lokola mwana ngombe,apumbwisaka Sirioni lokola mwana ya mpakasa. 7 Mongongo ya Yawe ebimakaelongo na bakake ya moto. 8 Mongongo ya Yawe elengisaka esobe ;Yawe alengisaka Esobe ya Kadeshi. 9 Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota,esalaka mpe ete zamba etikala pamba.Kati na Tempelo ya Yawe,nyonso egangaka : « Nkembo ! » 10 Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzina likolo ya mpela ;Yawe avandi na Kiti ya Bokonzilokola Mokonzi mpo na libela. 11 Yawe apesaka bato na Ye makasi ;Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.