Psalms 70 (BOLCB2)
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. 2 Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai !Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai ! 3 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngaibakufa soni mpe basambwa !Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngaibazonga sima mpe bayokisama soni ! 4 Tika ete bato oyo balobaka na ngai :« Ah ! Ah ! » bazonga mpo na soni ! 5 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yobatonda na esengo mpe basepela kati na Yo !Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yobalobaka tango nyonso :« Nzambe azali monene ! » 6 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela,Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai.Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai,kowumela te !