Titus 3 (BOLCB2)

1 Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu, 2 komipekisa kotiola bato, kozala bato na kimia, na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso. 3 Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso. 4 Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato, 5 abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale. 6 Nzambe asopelaki biso Molimo Mosantu na bofuluki penza na nzela ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, 7 mpo ete, wana akomisi biso bato ya sembo na nzela ya ngolu na Ye, tokoma bakitani ya libula kolanda elikya ya bomoi ya seko. 8 Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato. 9 Kasi kima tembe ya bozoba, masolo ya milongo ya mbotama, koswana mpe bitumba na tina na mibeko : ezali na litomba te mpe ezali na tina te. 10 Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ; 11 pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu ; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu. 12 Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi. 13 Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga mobembo ya Zenasi, molakisi ya Mobeko, mpe Apolosi mpo ete bazanga eloko moko te na nzela. 14 Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma. 15 Bato nyonso oyo bazali elongo na ngai batindeli yo mbote.Pesa mbote na bato oyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na biso nyonso !

In Other Versions

Titus 3 in the ANGEFD

Titus 3 in the ANTPNG2D

Titus 3 in the AS21

Titus 3 in the BAGH

Titus 3 in the BBPNG

Titus 3 in the BBT1E

Titus 3 in the BDS

Titus 3 in the BEV

Titus 3 in the BHAD

Titus 3 in the BIB

Titus 3 in the BLPT

Titus 3 in the BNT

Titus 3 in the BNTABOOT

Titus 3 in the BNTLV

Titus 3 in the BOATCB

Titus 3 in the BOATCB2

Titus 3 in the BOBCV

Titus 3 in the BOCNT

Titus 3 in the BOECS

Titus 3 in the BOGWICC

Titus 3 in the BOHCB

Titus 3 in the BOHCV

Titus 3 in the BOHLNT

Titus 3 in the BOHNTLTAL

Titus 3 in the BOICB

Titus 3 in the BOILNTAP

Titus 3 in the BOITCV

Titus 3 in the BOKCV

Titus 3 in the BOKCV2

Titus 3 in the BOKHWOG

Titus 3 in the BOKSSV

Titus 3 in the BOLCB

Titus 3 in the BOMCV

Titus 3 in the BONAV

Titus 3 in the BONCB

Titus 3 in the BONLT

Titus 3 in the BONUT2

Titus 3 in the BOPLNT

Titus 3 in the BOSCB

Titus 3 in the BOSNC

Titus 3 in the BOTLNT

Titus 3 in the BOVCB

Titus 3 in the BOYCB

Titus 3 in the BPBB

Titus 3 in the BPH

Titus 3 in the BSB

Titus 3 in the CCB

Titus 3 in the CUV

Titus 3 in the CUVS

Titus 3 in the DBT

Titus 3 in the DGDNT

Titus 3 in the DHNT

Titus 3 in the DNT

Titus 3 in the ELBE

Titus 3 in the EMTV

Titus 3 in the ESV

Titus 3 in the FBV

Titus 3 in the FEB

Titus 3 in the GGMNT

Titus 3 in the GNT

Titus 3 in the HARY

Titus 3 in the HNT

Titus 3 in the IRVA

Titus 3 in the IRVB

Titus 3 in the IRVG

Titus 3 in the IRVH

Titus 3 in the IRVK

Titus 3 in the IRVM

Titus 3 in the IRVM2

Titus 3 in the IRVO

Titus 3 in the IRVP

Titus 3 in the IRVT

Titus 3 in the IRVT2

Titus 3 in the IRVU

Titus 3 in the ISVN

Titus 3 in the JSNT

Titus 3 in the KAPI

Titus 3 in the KBT1ETNIK

Titus 3 in the KBV

Titus 3 in the KJV

Titus 3 in the KNFD

Titus 3 in the LBA

Titus 3 in the LBLA

Titus 3 in the LNT

Titus 3 in the LSV

Titus 3 in the MAAL

Titus 3 in the MBV

Titus 3 in the MBV2

Titus 3 in the MHNT

Titus 3 in the MKNFD

Titus 3 in the MNG

Titus 3 in the MNT

Titus 3 in the MNT2

Titus 3 in the MRS1T

Titus 3 in the NAA

Titus 3 in the NASB

Titus 3 in the NBLA

Titus 3 in the NBS

Titus 3 in the NBVTP

Titus 3 in the NET2

Titus 3 in the NIV11

Titus 3 in the NNT

Titus 3 in the NNT2

Titus 3 in the NNT3

Titus 3 in the PDDPT

Titus 3 in the PFNT

Titus 3 in the RMNT

Titus 3 in the SBIAS

Titus 3 in the SBIBS

Titus 3 in the SBIBS2

Titus 3 in the SBICS

Titus 3 in the SBIDS

Titus 3 in the SBIGS

Titus 3 in the SBIHS

Titus 3 in the SBIIS

Titus 3 in the SBIIS2

Titus 3 in the SBIIS3

Titus 3 in the SBIKS

Titus 3 in the SBIKS2

Titus 3 in the SBIMS

Titus 3 in the SBIOS

Titus 3 in the SBIPS

Titus 3 in the SBISS

Titus 3 in the SBITS

Titus 3 in the SBITS2

Titus 3 in the SBITS3

Titus 3 in the SBITS4

Titus 3 in the SBIUS

Titus 3 in the SBIVS

Titus 3 in the SBT

Titus 3 in the SBT1E

Titus 3 in the SCHL

Titus 3 in the SNT

Titus 3 in the SUSU

Titus 3 in the SUSU2

Titus 3 in the SYNO

Titus 3 in the TBIAOTANT

Titus 3 in the TBT1E

Titus 3 in the TBT1E2

Titus 3 in the TFTIP

Titus 3 in the TFTU

Titus 3 in the TGNTATF3T

Titus 3 in the THAI

Titus 3 in the TNFD

Titus 3 in the TNT

Titus 3 in the TNTIK

Titus 3 in the TNTIL

Titus 3 in the TNTIN

Titus 3 in the TNTIP

Titus 3 in the TNTIZ

Titus 3 in the TOMA

Titus 3 in the TTENT

Titus 3 in the UBG

Titus 3 in the UGV

Titus 3 in the UGV2

Titus 3 in the UGV3

Titus 3 in the VBL

Titus 3 in the VDCC

Titus 3 in the YALU

Titus 3 in the YAPE

Titus 3 in the YBVTP

Titus 3 in the ZBP