1 Chronicles 5 (BOLCB2)

1 Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso. 2 Yuda alekaki bandeko na ye nyonso ya mibali na makasi, mpe moto oyo akomaki mokonzi abimaki na nzela na ye. Kasi atako bongo, makoki ya bomwana ya liboso epesamaki kaka epai ya Jozefi. 3 Tala bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. 4 Bakitani ya Joeli :Shemaya, mwana mobali ya Joeli~; Gogi, mwana mobali ya Shemaya~;Shimei, mwana mobali ya Gogi~; 5 Mishe, mwana mobali ya Shimei ;Reaya, mwana mobali ya Mishe~; Bala, mwana mobali ya Reaya~; 6 Beera, mwana mobali ya Bala mpe mokambi ya bato ya Ribeni, oyo Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, amemaki na bowumbu. 7 Tala bandeko ya Beera kolanda etuka na bango ndenge bakomami na molongo ya botata na bango :mokambi Yeyeli, Zakari~; 8 Bela, mwana mobali ya Azazi, koko ya Shema, mwana mobali ya Joeli. Bazalaki kovanda na mboka Aroeri mpe na etuka oyo ekenda kino na ngomba Nebo mpe na Bala-Meoni. 9 Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi. 10 Na tango Saulo azalaki mokonzi, babundisaki bato ya Agari mpe balongaki bango. Bavandaki na bandako na bango ya kapo oyo ezalaki na etuka mobimba ya ngambo ya Galadi. 11 Bakitani ya Gadi bazalaki kovanda pembeni ya bakitani ya Ribeni, na mokili ya Bashani kino na Salika. 12 Etuka ya Joeli nde elekaki monene, elandamaki na etuka ya Shafami, mpe bituka ya Yaenayi mpe Shafati esukisaki, kati na Bashani. 13 Bandeko na bango ya mibali kolanda mabota na bango bazalaki :Mikaeli, Meshulami, Sheba, Yorayi, Yaekani, Ziya mpe Eberi.Bango nyonso bazalaki sambo. 14 Bazalaki bana ya Abiyaili, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Yaroa, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali Mikaeli, mwana mobali ya Yeshishai, mwana mobali ya Yado, mwana mobali ya Buzi. 15 Ayi, mwana mobali ya Abidieli, mwana mobali ya Guni, azalaki mokambi ya bituka na bango. 16 Bango nyonso bazalaki kovanda na Galadi, na Bashani, na bamboka na yango ya zingazinga mpe na bilanga nyonso ya Saroni kino na suka na yango. 17 Batangaki bato nyonso oyo tango Yotami azalaki mokonzi ya Yuda mpe Jeroboami, mokonzi ya Isalaele. 18 Bakitani ya mabota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazalaki bango nyonso nkoto tuku minei na minei na nkama sambo na tuku motoba. Babongamaki mpo na mosala ya soda. Bazalaki bilombe mibali oyo bayebi kosalela nguba, mopanga, tolotolo ; mpe bamilengela mpo na bitumba. 19 Babundisaki bato ya Agari, ya Yeturi, ya Nafishi mpe ya Nodabi. 20 Nzambe asungaki bango mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya Agari mpe baninga na bango nyonso oyo bayaki kosunga bango, pamba te babelelaki Yawe na tango ya bitumba. Yawe ayanolaki bango, pamba te batielaki Ye motema. 21 Bazwaki bibwele ya bato ya Agari : bashamo nkoto tuku mitano, bameme nkoto nkama mibale na tuku mitano, mpe ba-ane nkoto mibale. Bazwaki mpe bakangami nkoto nkama moko : 22 mingi bakufaki, pamba te bitumba ezalaki na maboko ya Nzambe. Bavandaki na mokili yango kino na tango ya bowumbu. 23 Bakitani ya ndambo ya libota ya Manase bavandaki na mokili oyo ezalaki longwa na Bashani kino na Bala-Erimoni, Seniri mpe ngomba Erimoni. 24 Tala bakambi ya bituka na bango : Eferi, Yisheyi, Elieli, Azirieli, Jeremi, Odavia mpe Yadiele. Bazalaki bilombe ya bitumba, bato bayebana mpe bakambi ya mabota na bango. 25 Kasi lokola batosaki te Nzambe ya bakoko na bango mpe bakomaki kosalela banzambe ya bato ya mokili oyo Nzambe abebisaki liboso na bango. 26 Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo. 27 Bana mibali ya Levi :Gerishoni, Keati mpe Merari. 28 Bana mibali ya Keati :Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli. 29 Bana ya Amirami :Aron, Moyize mpe Miriami.Bana mibali ya Aron~:Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari. 30 Eleazari abotaki Pineasi ;Pineasi abotaki Abishuwa~; 31 Abishuwa abotaki Buki ;Buki abotaki Uzi~; 32 Uzi abotaki Zerakia ;Zerakia abotaki Merayoti~; 33 Merayoti abotaki Amaria ;Amaria abotaki Ayitubi~; 34 Ayitubi abotaki Tsadoki ;Tsadoki abotaki Ayimaatsi~; 35 Ayimaatsi abotaki Azaria ;Azaria abotaki Yoanani~; 36 Yoanani abotaki Azaria oyo azalaki Nganga-Nzambe kati na Tempelo oyo Salomo atongaki na Yelusalemi. 37 Azaria abotaki Amaria ;Amaria abotaki Ayitubi~; 38 Ayitubi abotaki Tsadoki,mpe Tsadoki abotaki Shalumi~; 39 Shalumi abotaki Ilikia ;Ilikia abotaki Azaria~; 40 Azaria abotaki Seraya ;Seraya abotaki Yeotsadaki. 41 Yeotsadaki akendeki na bowumbu tango Yawe akabaki Yelusalemi mpe Yuda na maboko ya Nabukodonozori.

In Other Versions

1 Chronicles 5 in the ANGEFD

1 Chronicles 5 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 5 in the AS21

1 Chronicles 5 in the BAGH

1 Chronicles 5 in the BBPNG

1 Chronicles 5 in the BBT1E

1 Chronicles 5 in the BDS

1 Chronicles 5 in the BEV

1 Chronicles 5 in the BHAD

1 Chronicles 5 in the BIB

1 Chronicles 5 in the BLPT

1 Chronicles 5 in the BNT

1 Chronicles 5 in the BNTABOOT

1 Chronicles 5 in the BNTLV

1 Chronicles 5 in the BOATCB

1 Chronicles 5 in the BOATCB2

1 Chronicles 5 in the BOBCV

1 Chronicles 5 in the BOCNT

1 Chronicles 5 in the BOECS

1 Chronicles 5 in the BOGWICC

1 Chronicles 5 in the BOHCB

1 Chronicles 5 in the BOHCV

1 Chronicles 5 in the BOHLNT

1 Chronicles 5 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 5 in the BOICB

1 Chronicles 5 in the BOILNTAP

1 Chronicles 5 in the BOITCV

1 Chronicles 5 in the BOKCV

1 Chronicles 5 in the BOKCV2

1 Chronicles 5 in the BOKHWOG

1 Chronicles 5 in the BOKSSV

1 Chronicles 5 in the BOLCB

1 Chronicles 5 in the BOMCV

1 Chronicles 5 in the BONAV

1 Chronicles 5 in the BONCB

1 Chronicles 5 in the BONLT

1 Chronicles 5 in the BONUT2

1 Chronicles 5 in the BOPLNT

1 Chronicles 5 in the BOSCB

1 Chronicles 5 in the BOSNC

1 Chronicles 5 in the BOTLNT

1 Chronicles 5 in the BOVCB

1 Chronicles 5 in the BOYCB

1 Chronicles 5 in the BPBB

1 Chronicles 5 in the BPH

1 Chronicles 5 in the BSB

1 Chronicles 5 in the CCB

1 Chronicles 5 in the CUV

1 Chronicles 5 in the CUVS

1 Chronicles 5 in the DBT

1 Chronicles 5 in the DGDNT

1 Chronicles 5 in the DHNT

1 Chronicles 5 in the DNT

1 Chronicles 5 in the ELBE

1 Chronicles 5 in the EMTV

1 Chronicles 5 in the ESV

1 Chronicles 5 in the FBV

1 Chronicles 5 in the FEB

1 Chronicles 5 in the GGMNT

1 Chronicles 5 in the GNT

1 Chronicles 5 in the HARY

1 Chronicles 5 in the HNT

1 Chronicles 5 in the IRVA

1 Chronicles 5 in the IRVB

1 Chronicles 5 in the IRVG

1 Chronicles 5 in the IRVH

1 Chronicles 5 in the IRVK

1 Chronicles 5 in the IRVM

1 Chronicles 5 in the IRVM2

1 Chronicles 5 in the IRVO

1 Chronicles 5 in the IRVP

1 Chronicles 5 in the IRVT

1 Chronicles 5 in the IRVT2

1 Chronicles 5 in the IRVU

1 Chronicles 5 in the ISVN

1 Chronicles 5 in the JSNT

1 Chronicles 5 in the KAPI

1 Chronicles 5 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 5 in the KBV

1 Chronicles 5 in the KJV

1 Chronicles 5 in the KNFD

1 Chronicles 5 in the LBA

1 Chronicles 5 in the LBLA

1 Chronicles 5 in the LNT

1 Chronicles 5 in the LSV

1 Chronicles 5 in the MAAL

1 Chronicles 5 in the MBV

1 Chronicles 5 in the MBV2

1 Chronicles 5 in the MHNT

1 Chronicles 5 in the MKNFD

1 Chronicles 5 in the MNG

1 Chronicles 5 in the MNT

1 Chronicles 5 in the MNT2

1 Chronicles 5 in the MRS1T

1 Chronicles 5 in the NAA

1 Chronicles 5 in the NASB

1 Chronicles 5 in the NBLA

1 Chronicles 5 in the NBS

1 Chronicles 5 in the NBVTP

1 Chronicles 5 in the NET2

1 Chronicles 5 in the NIV11

1 Chronicles 5 in the NNT

1 Chronicles 5 in the NNT2

1 Chronicles 5 in the NNT3

1 Chronicles 5 in the PDDPT

1 Chronicles 5 in the PFNT

1 Chronicles 5 in the RMNT

1 Chronicles 5 in the SBIAS

1 Chronicles 5 in the SBIBS

1 Chronicles 5 in the SBIBS2

1 Chronicles 5 in the SBICS

1 Chronicles 5 in the SBIDS

1 Chronicles 5 in the SBIGS

1 Chronicles 5 in the SBIHS

1 Chronicles 5 in the SBIIS

1 Chronicles 5 in the SBIIS2

1 Chronicles 5 in the SBIIS3

1 Chronicles 5 in the SBIKS

1 Chronicles 5 in the SBIKS2

1 Chronicles 5 in the SBIMS

1 Chronicles 5 in the SBIOS

1 Chronicles 5 in the SBIPS

1 Chronicles 5 in the SBISS

1 Chronicles 5 in the SBITS

1 Chronicles 5 in the SBITS2

1 Chronicles 5 in the SBITS3

1 Chronicles 5 in the SBITS4

1 Chronicles 5 in the SBIUS

1 Chronicles 5 in the SBIVS

1 Chronicles 5 in the SBT

1 Chronicles 5 in the SBT1E

1 Chronicles 5 in the SCHL

1 Chronicles 5 in the SNT

1 Chronicles 5 in the SUSU

1 Chronicles 5 in the SUSU2

1 Chronicles 5 in the SYNO

1 Chronicles 5 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 5 in the TBT1E

1 Chronicles 5 in the TBT1E2

1 Chronicles 5 in the TFTIP

1 Chronicles 5 in the TFTU

1 Chronicles 5 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 5 in the THAI

1 Chronicles 5 in the TNFD

1 Chronicles 5 in the TNT

1 Chronicles 5 in the TNTIK

1 Chronicles 5 in the TNTIL

1 Chronicles 5 in the TNTIN

1 Chronicles 5 in the TNTIP

1 Chronicles 5 in the TNTIZ

1 Chronicles 5 in the TOMA

1 Chronicles 5 in the TTENT

1 Chronicles 5 in the UBG

1 Chronicles 5 in the UGV

1 Chronicles 5 in the UGV2

1 Chronicles 5 in the UGV3

1 Chronicles 5 in the VBL

1 Chronicles 5 in the VDCC

1 Chronicles 5 in the YALU

1 Chronicles 5 in the YAPE

1 Chronicles 5 in the YBVTP

1 Chronicles 5 in the ZBP