1 Corinthians 3 (BOLCB2)

1 Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto. 2 Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango, 3 pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ? 4 Tango moko azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo, » mpe mosusu : « Ngai nazali moto ya Apolosi, » boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ? 5 Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango. 6 Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa. 7 Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina. 8 Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye. 9 Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe. 10 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko. 11 Pamba te moko te akoki kotonga moboko mosusu, longola kaka oyo esili kotongama, oyo ezali Yesu-Klisto. 12 Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango, 13 mokolo ya kosambisama ekomonisa mosala na ye polele ; pamba te ekozala mokolo ya moto, mpe moto ekomeka mosala ya moto na moto. 14 Soki mosala ya moto oyo atongaki na likolo ya moboko eziki te, motongi yango akozwa lifuti. 15 Kasi soki eziki, motongi akozwa eloko te. Ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto. 16 Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ? 17 Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye ; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango. 18 Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya. 19 Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama : « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango ; » 20 mpe lisusu : « Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali na tina te, » 21 yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino : 22 ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino ; 23 kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.

In Other Versions

1 Corinthians 3 in the ANGEFD

1 Corinthians 3 in the ANTPNG2D

1 Corinthians 3 in the AS21

1 Corinthians 3 in the BAGH

1 Corinthians 3 in the BBPNG

1 Corinthians 3 in the BBT1E

1 Corinthians 3 in the BDS

1 Corinthians 3 in the BEV

1 Corinthians 3 in the BHAD

1 Corinthians 3 in the BIB

1 Corinthians 3 in the BLPT

1 Corinthians 3 in the BNT

1 Corinthians 3 in the BNTABOOT

1 Corinthians 3 in the BNTLV

1 Corinthians 3 in the BOATCB

1 Corinthians 3 in the BOATCB2

1 Corinthians 3 in the BOBCV

1 Corinthians 3 in the BOCNT

1 Corinthians 3 in the BOECS

1 Corinthians 3 in the BOGWICC

1 Corinthians 3 in the BOHCB

1 Corinthians 3 in the BOHCV

1 Corinthians 3 in the BOHLNT

1 Corinthians 3 in the BOHNTLTAL

1 Corinthians 3 in the BOICB

1 Corinthians 3 in the BOILNTAP

1 Corinthians 3 in the BOITCV

1 Corinthians 3 in the BOKCV

1 Corinthians 3 in the BOKCV2

1 Corinthians 3 in the BOKHWOG

1 Corinthians 3 in the BOKSSV

1 Corinthians 3 in the BOLCB

1 Corinthians 3 in the BOMCV

1 Corinthians 3 in the BONAV

1 Corinthians 3 in the BONCB

1 Corinthians 3 in the BONLT

1 Corinthians 3 in the BONUT2

1 Corinthians 3 in the BOPLNT

1 Corinthians 3 in the BOSCB

1 Corinthians 3 in the BOSNC

1 Corinthians 3 in the BOTLNT

1 Corinthians 3 in the BOVCB

1 Corinthians 3 in the BOYCB

1 Corinthians 3 in the BPBB

1 Corinthians 3 in the BPH

1 Corinthians 3 in the BSB

1 Corinthians 3 in the CCB

1 Corinthians 3 in the CUV

1 Corinthians 3 in the CUVS

1 Corinthians 3 in the DBT

1 Corinthians 3 in the DGDNT

1 Corinthians 3 in the DHNT

1 Corinthians 3 in the DNT

1 Corinthians 3 in the ELBE

1 Corinthians 3 in the EMTV

1 Corinthians 3 in the ESV

1 Corinthians 3 in the FBV

1 Corinthians 3 in the FEB

1 Corinthians 3 in the GGMNT

1 Corinthians 3 in the GNT

1 Corinthians 3 in the HARY

1 Corinthians 3 in the HNT

1 Corinthians 3 in the IRVA

1 Corinthians 3 in the IRVB

1 Corinthians 3 in the IRVG

1 Corinthians 3 in the IRVH

1 Corinthians 3 in the IRVK

1 Corinthians 3 in the IRVM

1 Corinthians 3 in the IRVM2

1 Corinthians 3 in the IRVO

1 Corinthians 3 in the IRVP

1 Corinthians 3 in the IRVT

1 Corinthians 3 in the IRVT2

1 Corinthians 3 in the IRVU

1 Corinthians 3 in the ISVN

1 Corinthians 3 in the JSNT

1 Corinthians 3 in the KAPI

1 Corinthians 3 in the KBT1ETNIK

1 Corinthians 3 in the KBV

1 Corinthians 3 in the KJV

1 Corinthians 3 in the KNFD

1 Corinthians 3 in the LBA

1 Corinthians 3 in the LBLA

1 Corinthians 3 in the LNT

1 Corinthians 3 in the LSV

1 Corinthians 3 in the MAAL

1 Corinthians 3 in the MBV

1 Corinthians 3 in the MBV2

1 Corinthians 3 in the MHNT

1 Corinthians 3 in the MKNFD

1 Corinthians 3 in the MNG

1 Corinthians 3 in the MNT

1 Corinthians 3 in the MNT2

1 Corinthians 3 in the MRS1T

1 Corinthians 3 in the NAA

1 Corinthians 3 in the NASB

1 Corinthians 3 in the NBLA

1 Corinthians 3 in the NBS

1 Corinthians 3 in the NBVTP

1 Corinthians 3 in the NET2

1 Corinthians 3 in the NIV11

1 Corinthians 3 in the NNT

1 Corinthians 3 in the NNT2

1 Corinthians 3 in the NNT3

1 Corinthians 3 in the PDDPT

1 Corinthians 3 in the PFNT

1 Corinthians 3 in the RMNT

1 Corinthians 3 in the SBIAS

1 Corinthians 3 in the SBIBS

1 Corinthians 3 in the SBIBS2

1 Corinthians 3 in the SBICS

1 Corinthians 3 in the SBIDS

1 Corinthians 3 in the SBIGS

1 Corinthians 3 in the SBIHS

1 Corinthians 3 in the SBIIS

1 Corinthians 3 in the SBIIS2

1 Corinthians 3 in the SBIIS3

1 Corinthians 3 in the SBIKS

1 Corinthians 3 in the SBIKS2

1 Corinthians 3 in the SBIMS

1 Corinthians 3 in the SBIOS

1 Corinthians 3 in the SBIPS

1 Corinthians 3 in the SBISS

1 Corinthians 3 in the SBITS

1 Corinthians 3 in the SBITS2

1 Corinthians 3 in the SBITS3

1 Corinthians 3 in the SBITS4

1 Corinthians 3 in the SBIUS

1 Corinthians 3 in the SBIVS

1 Corinthians 3 in the SBT

1 Corinthians 3 in the SBT1E

1 Corinthians 3 in the SCHL

1 Corinthians 3 in the SNT

1 Corinthians 3 in the SUSU

1 Corinthians 3 in the SUSU2

1 Corinthians 3 in the SYNO

1 Corinthians 3 in the TBIAOTANT

1 Corinthians 3 in the TBT1E

1 Corinthians 3 in the TBT1E2

1 Corinthians 3 in the TFTIP

1 Corinthians 3 in the TFTU

1 Corinthians 3 in the TGNTATF3T

1 Corinthians 3 in the THAI

1 Corinthians 3 in the TNFD

1 Corinthians 3 in the TNT

1 Corinthians 3 in the TNTIK

1 Corinthians 3 in the TNTIL

1 Corinthians 3 in the TNTIN

1 Corinthians 3 in the TNTIP

1 Corinthians 3 in the TNTIZ

1 Corinthians 3 in the TOMA

1 Corinthians 3 in the TTENT

1 Corinthians 3 in the UBG

1 Corinthians 3 in the UGV

1 Corinthians 3 in the UGV2

1 Corinthians 3 in the UGV3

1 Corinthians 3 in the VBL

1 Corinthians 3 in the VDCC

1 Corinthians 3 in the YALU

1 Corinthians 3 in the YAPE

1 Corinthians 3 in the YBVTP

1 Corinthians 3 in the ZBP