1 Kings 5 (BOLCB2)

1 Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye. 2 Tala bilei ya Salomo ya mokolo na mokolo : bakilo nkoto libwa ya semule mpe bakilo nkoto zomi na mwambe ya farine, 3 bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta. 4 Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango ; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga. 5 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi. 6 Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. 7 Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga. 8 Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango. 9 Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene. 10 Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito. 11 Azalaki na bwanya koleka bato nyonso ; koleka ata Etani, moto ya Ezera ; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga. 12 Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano. 13 Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir ; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi. 14 Bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili, oyo bazalaki koyoka sango ya bwanya ya Salomo, bazalaki kotinda bato, wuta na bikolo na bango, mpo na kokende koyoka bwanya na ye. 15 Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi. 16 Salomo azongiselaki Irami maloba oyo : 17 — Oyebi malamu ete Davidi, tata na ngai, alongaki te kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na ye, likolo ya bitumba oyo azalaki na yango na bikolo oyo ezingelaki ye, kino tango Yawe atiaki bikolo yango na se ya matambe na ye. 18 Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai. 19 Sik’oyo, nazwi mokano ya kotonga Ndako mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na ngai, ndenge Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Ezali mwana na yo ya mobali oyo nakovandisa na kiti na yo ya bokonzi mpo na kokitana na yo nde akotonga Ndako mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. » 20 Boye, pesa mitindo ete bakatela ngai banzete ya sedele ya Libani. Basali na ngai bakosunga basali na yo, mpe ngai nakofuta yo lifuti oyo okokata mpo na basali na yo, pamba te oyebi malamu ete ezali na bato te kati na biso oyo bayebi kokata banzete lokola bino, bato ya Sidoni. 21 Tango Irami ayokaki maloba ya Salomo, asepelaki na yango makasi mpe alobaki :— Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo apesaki Davidi mwana oyo atondi na bwanya mpo na kokamba ekolo monene oyo ! 22 Irami atindelaki Salomo eyano oyo :— Nayambaki maloba oyo otindelaki ngai mpe nakosala nyonso oyo ozali na yango posa : banzete ya sedele mpe ya sipele. 23 Basali na ngai bakomema banzete yango wuta na Libani kino na ebale monene, bakokangisa yango na basinga mpo na kotinda yango na nzela ya ebale monene ; mpe nakosala ete ekoma kino na esika oyo okoyebisa ngai. Kuna nde nakofungola yango basinga ; mpe yo, okoki kozwa mpe komema yango. Kasi yo, okokokisa posa na ngai oyo : okobanda kopesa basali ya ndako na ngai bilei. 24 Irami apesaki epai ya Salomo banzete ya sedele mpe ya sipele nyonso oyo azalaki na yango na bosenga. 25 Salomo mpe, na ngambo na ye, azalaki kopesa mobu na mobu epai ya Irami batone nkoto motoba ya ble, balitele nkoto libwa ya mafuta ya olive ya kitoko koleka, mpo na ndako ya mokonzi. 26 Yawe apesaki Salomo bwanya kolanda elaka oyo apesaki ye. Boye, kimia ezalaki kati na Irami mpe Salomo, mpe bango mibale basalaki boyokani. 27 Mokonzi Salomo azwaki kati na Isalaele mobimba bato nkoto tuku misato mpo na kosala misala makasi. 28 Akabolaki bango na masanga misato ya bato nkoto zomi : babandaki kosala sanza moko, na Libani, mpe basanza mibale na ndako ; lisanga moko sima na mosusu. Adonirami azalaki mokambi ya bato ya misala makasi. 29 Salomo azwaki lisusu na mosala bato nkoto tuku sambo mpo na komema mikumba, bato nkoto tuku mwambe mpo na kopasola mabanga kati na ngomba ; 30 mpe bakambi ya misala, nkoto misato na nkama misato, bazalaki kolandela misala na bokambami ya bakonzi ya misala ya Salomo. 31 Mokonzi apesaki mitindo ete bapasola mabanga minene mpe ya kitoko mpo na kosalela yango moboko ya Tempelo. 32 Basali ya Salomo mpe ya Irami, elongo na basali oyo bawutaki na engumba Biblosi, bamikotisaki na mosala ya kokata yango, kopasola mabaya mpe kobongisa mabanga mpo na kotonga Tempelo.

In Other Versions

1 Kings 5 in the ANGEFD

1 Kings 5 in the ANTPNG2D

1 Kings 5 in the AS21

1 Kings 5 in the BAGH

1 Kings 5 in the BBPNG

1 Kings 5 in the BBT1E

1 Kings 5 in the BDS

1 Kings 5 in the BEV

1 Kings 5 in the BHAD

1 Kings 5 in the BIB

1 Kings 5 in the BLPT

1 Kings 5 in the BNT

1 Kings 5 in the BNTABOOT

1 Kings 5 in the BNTLV

1 Kings 5 in the BOATCB

1 Kings 5 in the BOATCB2

1 Kings 5 in the BOBCV

1 Kings 5 in the BOCNT

1 Kings 5 in the BOECS

1 Kings 5 in the BOGWICC

1 Kings 5 in the BOHCB

1 Kings 5 in the BOHCV

1 Kings 5 in the BOHLNT

1 Kings 5 in the BOHNTLTAL

1 Kings 5 in the BOICB

1 Kings 5 in the BOILNTAP

1 Kings 5 in the BOITCV

1 Kings 5 in the BOKCV

1 Kings 5 in the BOKCV2

1 Kings 5 in the BOKHWOG

1 Kings 5 in the BOKSSV

1 Kings 5 in the BOLCB

1 Kings 5 in the BOMCV

1 Kings 5 in the BONAV

1 Kings 5 in the BONCB

1 Kings 5 in the BONLT

1 Kings 5 in the BONUT2

1 Kings 5 in the BOPLNT

1 Kings 5 in the BOSCB

1 Kings 5 in the BOSNC

1 Kings 5 in the BOTLNT

1 Kings 5 in the BOVCB

1 Kings 5 in the BOYCB

1 Kings 5 in the BPBB

1 Kings 5 in the BPH

1 Kings 5 in the BSB

1 Kings 5 in the CCB

1 Kings 5 in the CUV

1 Kings 5 in the CUVS

1 Kings 5 in the DBT

1 Kings 5 in the DGDNT

1 Kings 5 in the DHNT

1 Kings 5 in the DNT

1 Kings 5 in the ELBE

1 Kings 5 in the EMTV

1 Kings 5 in the ESV

1 Kings 5 in the FBV

1 Kings 5 in the FEB

1 Kings 5 in the GGMNT

1 Kings 5 in the GNT

1 Kings 5 in the HARY

1 Kings 5 in the HNT

1 Kings 5 in the IRVA

1 Kings 5 in the IRVB

1 Kings 5 in the IRVG

1 Kings 5 in the IRVH

1 Kings 5 in the IRVK

1 Kings 5 in the IRVM

1 Kings 5 in the IRVM2

1 Kings 5 in the IRVO

1 Kings 5 in the IRVP

1 Kings 5 in the IRVT

1 Kings 5 in the IRVT2

1 Kings 5 in the IRVU

1 Kings 5 in the ISVN

1 Kings 5 in the JSNT

1 Kings 5 in the KAPI

1 Kings 5 in the KBT1ETNIK

1 Kings 5 in the KBV

1 Kings 5 in the KJV

1 Kings 5 in the KNFD

1 Kings 5 in the LBA

1 Kings 5 in the LBLA

1 Kings 5 in the LNT

1 Kings 5 in the LSV

1 Kings 5 in the MAAL

1 Kings 5 in the MBV

1 Kings 5 in the MBV2

1 Kings 5 in the MHNT

1 Kings 5 in the MKNFD

1 Kings 5 in the MNG

1 Kings 5 in the MNT

1 Kings 5 in the MNT2

1 Kings 5 in the MRS1T

1 Kings 5 in the NAA

1 Kings 5 in the NASB

1 Kings 5 in the NBLA

1 Kings 5 in the NBS

1 Kings 5 in the NBVTP

1 Kings 5 in the NET2

1 Kings 5 in the NIV11

1 Kings 5 in the NNT

1 Kings 5 in the NNT2

1 Kings 5 in the NNT3

1 Kings 5 in the PDDPT

1 Kings 5 in the PFNT

1 Kings 5 in the RMNT

1 Kings 5 in the SBIAS

1 Kings 5 in the SBIBS

1 Kings 5 in the SBIBS2

1 Kings 5 in the SBICS

1 Kings 5 in the SBIDS

1 Kings 5 in the SBIGS

1 Kings 5 in the SBIHS

1 Kings 5 in the SBIIS

1 Kings 5 in the SBIIS2

1 Kings 5 in the SBIIS3

1 Kings 5 in the SBIKS

1 Kings 5 in the SBIKS2

1 Kings 5 in the SBIMS

1 Kings 5 in the SBIOS

1 Kings 5 in the SBIPS

1 Kings 5 in the SBISS

1 Kings 5 in the SBITS

1 Kings 5 in the SBITS2

1 Kings 5 in the SBITS3

1 Kings 5 in the SBITS4

1 Kings 5 in the SBIUS

1 Kings 5 in the SBIVS

1 Kings 5 in the SBT

1 Kings 5 in the SBT1E

1 Kings 5 in the SCHL

1 Kings 5 in the SNT

1 Kings 5 in the SUSU

1 Kings 5 in the SUSU2

1 Kings 5 in the SYNO

1 Kings 5 in the TBIAOTANT

1 Kings 5 in the TBT1E

1 Kings 5 in the TBT1E2

1 Kings 5 in the TFTIP

1 Kings 5 in the TFTU

1 Kings 5 in the TGNTATF3T

1 Kings 5 in the THAI

1 Kings 5 in the TNFD

1 Kings 5 in the TNT

1 Kings 5 in the TNTIK

1 Kings 5 in the TNTIL

1 Kings 5 in the TNTIN

1 Kings 5 in the TNTIP

1 Kings 5 in the TNTIZ

1 Kings 5 in the TOMA

1 Kings 5 in the TTENT

1 Kings 5 in the UBG

1 Kings 5 in the UGV

1 Kings 5 in the UGV2

1 Kings 5 in the UGV3

1 Kings 5 in the VBL

1 Kings 5 in the VDCC

1 Kings 5 in the YALU

1 Kings 5 in the YAPE

1 Kings 5 in the YBVTP

1 Kings 5 in the ZBP