1 Samuel 10 (BOLCB2)

1 Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ? 2 Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › » 3 Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba ; mosusu, biteni misato ya mapa ; mpe mosusu, molangi ya vino. 4 Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango. 5 Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola. 6 Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu. 7 Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo. 8 Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo ; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala. 9 Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka. 10 Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango. 11 Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki : « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi ? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » 12 Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? »Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » 13 Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba. 14 Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye :— Bokendeki wapi ?Saulo azongisaki :— Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele. 15 Noko ya Saulo alobaki lisusu :— Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino. 16 Saulo azongiselaki noko na ye :— Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo.Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi. 17 Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe 18 mpe alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. › 19 Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. » 20 Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki. 21 Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te. 22 Boye, batunaki lisusu Yawe :— Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ?Yawe azongisaki :— Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko. 23 Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato ; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi. 24 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso :— Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye.Bato bazongisaki na koganga :— Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! 25 Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye. 26 Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye. 27 Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? »Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.

In Other Versions

1 Samuel 10 in the ANGEFD

1 Samuel 10 in the ANTPNG2D

1 Samuel 10 in the AS21

1 Samuel 10 in the BAGH

1 Samuel 10 in the BBPNG

1 Samuel 10 in the BBT1E

1 Samuel 10 in the BDS

1 Samuel 10 in the BEV

1 Samuel 10 in the BHAD

1 Samuel 10 in the BIB

1 Samuel 10 in the BLPT

1 Samuel 10 in the BNT

1 Samuel 10 in the BNTABOOT

1 Samuel 10 in the BNTLV

1 Samuel 10 in the BOATCB

1 Samuel 10 in the BOATCB2

1 Samuel 10 in the BOBCV

1 Samuel 10 in the BOCNT

1 Samuel 10 in the BOECS

1 Samuel 10 in the BOGWICC

1 Samuel 10 in the BOHCB

1 Samuel 10 in the BOHCV

1 Samuel 10 in the BOHLNT

1 Samuel 10 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 10 in the BOICB

1 Samuel 10 in the BOILNTAP

1 Samuel 10 in the BOITCV

1 Samuel 10 in the BOKCV

1 Samuel 10 in the BOKCV2

1 Samuel 10 in the BOKHWOG

1 Samuel 10 in the BOKSSV

1 Samuel 10 in the BOLCB

1 Samuel 10 in the BOMCV

1 Samuel 10 in the BONAV

1 Samuel 10 in the BONCB

1 Samuel 10 in the BONLT

1 Samuel 10 in the BONUT2

1 Samuel 10 in the BOPLNT

1 Samuel 10 in the BOSCB

1 Samuel 10 in the BOSNC

1 Samuel 10 in the BOTLNT

1 Samuel 10 in the BOVCB

1 Samuel 10 in the BOYCB

1 Samuel 10 in the BPBB

1 Samuel 10 in the BPH

1 Samuel 10 in the BSB

1 Samuel 10 in the CCB

1 Samuel 10 in the CUV

1 Samuel 10 in the CUVS

1 Samuel 10 in the DBT

1 Samuel 10 in the DGDNT

1 Samuel 10 in the DHNT

1 Samuel 10 in the DNT

1 Samuel 10 in the ELBE

1 Samuel 10 in the EMTV

1 Samuel 10 in the ESV

1 Samuel 10 in the FBV

1 Samuel 10 in the FEB

1 Samuel 10 in the GGMNT

1 Samuel 10 in the GNT

1 Samuel 10 in the HARY

1 Samuel 10 in the HNT

1 Samuel 10 in the IRVA

1 Samuel 10 in the IRVB

1 Samuel 10 in the IRVG

1 Samuel 10 in the IRVH

1 Samuel 10 in the IRVK

1 Samuel 10 in the IRVM

1 Samuel 10 in the IRVM2

1 Samuel 10 in the IRVO

1 Samuel 10 in the IRVP

1 Samuel 10 in the IRVT

1 Samuel 10 in the IRVT2

1 Samuel 10 in the IRVU

1 Samuel 10 in the ISVN

1 Samuel 10 in the JSNT

1 Samuel 10 in the KAPI

1 Samuel 10 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 10 in the KBV

1 Samuel 10 in the KJV

1 Samuel 10 in the KNFD

1 Samuel 10 in the LBA

1 Samuel 10 in the LBLA

1 Samuel 10 in the LNT

1 Samuel 10 in the LSV

1 Samuel 10 in the MAAL

1 Samuel 10 in the MBV

1 Samuel 10 in the MBV2

1 Samuel 10 in the MHNT

1 Samuel 10 in the MKNFD

1 Samuel 10 in the MNG

1 Samuel 10 in the MNT

1 Samuel 10 in the MNT2

1 Samuel 10 in the MRS1T

1 Samuel 10 in the NAA

1 Samuel 10 in the NASB

1 Samuel 10 in the NBLA

1 Samuel 10 in the NBS

1 Samuel 10 in the NBVTP

1 Samuel 10 in the NET2

1 Samuel 10 in the NIV11

1 Samuel 10 in the NNT

1 Samuel 10 in the NNT2

1 Samuel 10 in the NNT3

1 Samuel 10 in the PDDPT

1 Samuel 10 in the PFNT

1 Samuel 10 in the RMNT

1 Samuel 10 in the SBIAS

1 Samuel 10 in the SBIBS

1 Samuel 10 in the SBIBS2

1 Samuel 10 in the SBICS

1 Samuel 10 in the SBIDS

1 Samuel 10 in the SBIGS

1 Samuel 10 in the SBIHS

1 Samuel 10 in the SBIIS

1 Samuel 10 in the SBIIS2

1 Samuel 10 in the SBIIS3

1 Samuel 10 in the SBIKS

1 Samuel 10 in the SBIKS2

1 Samuel 10 in the SBIMS

1 Samuel 10 in the SBIOS

1 Samuel 10 in the SBIPS

1 Samuel 10 in the SBISS

1 Samuel 10 in the SBITS

1 Samuel 10 in the SBITS2

1 Samuel 10 in the SBITS3

1 Samuel 10 in the SBITS4

1 Samuel 10 in the SBIUS

1 Samuel 10 in the SBIVS

1 Samuel 10 in the SBT

1 Samuel 10 in the SBT1E

1 Samuel 10 in the SCHL

1 Samuel 10 in the SNT

1 Samuel 10 in the SUSU

1 Samuel 10 in the SUSU2

1 Samuel 10 in the SYNO

1 Samuel 10 in the TBIAOTANT

1 Samuel 10 in the TBT1E

1 Samuel 10 in the TBT1E2

1 Samuel 10 in the TFTIP

1 Samuel 10 in the TFTU

1 Samuel 10 in the TGNTATF3T

1 Samuel 10 in the THAI

1 Samuel 10 in the TNFD

1 Samuel 10 in the TNT

1 Samuel 10 in the TNTIK

1 Samuel 10 in the TNTIL

1 Samuel 10 in the TNTIN

1 Samuel 10 in the TNTIP

1 Samuel 10 in the TNTIZ

1 Samuel 10 in the TOMA

1 Samuel 10 in the TTENT

1 Samuel 10 in the UBG

1 Samuel 10 in the UGV

1 Samuel 10 in the UGV2

1 Samuel 10 in the UGV3

1 Samuel 10 in the VBL

1 Samuel 10 in the VDCC

1 Samuel 10 in the YALU

1 Samuel 10 in the YAPE

1 Samuel 10 in the YBVTP

1 Samuel 10 in the ZBP