1 Samuel 18 (BOLCB2)

1 Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko. 2 Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye. 3 Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko. 4 Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo. 5 Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye. 6 Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga. 7 Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye :« Saulo abomaki bankoto,mpe Davidi abomaki bankoto zomi. » 8 Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! » 9 Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe. 10 Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko. 11 Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba : « Nakobamba Davidi na mir. »Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale. 12 Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo. 13 Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango. 14 Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye. 15 Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye. 16 Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango. 17 Saulo alobaki na Davidi :— Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe.Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. » 18 Davidi azongiselaki Saulo :— Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ? 19 Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola. 20 Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi. 21 Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. »Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. » 22 Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › » 23 Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki : « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete ? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba ! » 24 Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi. 25 Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. »Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia. 26 Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka, 27 Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi. 28 Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi, 29 Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki. 30 Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.

In Other Versions

1 Samuel 18 in the ANGEFD

1 Samuel 18 in the ANTPNG2D

1 Samuel 18 in the AS21

1 Samuel 18 in the BAGH

1 Samuel 18 in the BBPNG

1 Samuel 18 in the BBT1E

1 Samuel 18 in the BDS

1 Samuel 18 in the BEV

1 Samuel 18 in the BHAD

1 Samuel 18 in the BIB

1 Samuel 18 in the BLPT

1 Samuel 18 in the BNT

1 Samuel 18 in the BNTABOOT

1 Samuel 18 in the BNTLV

1 Samuel 18 in the BOATCB

1 Samuel 18 in the BOATCB2

1 Samuel 18 in the BOBCV

1 Samuel 18 in the BOCNT

1 Samuel 18 in the BOECS

1 Samuel 18 in the BOGWICC

1 Samuel 18 in the BOHCB

1 Samuel 18 in the BOHCV

1 Samuel 18 in the BOHLNT

1 Samuel 18 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 18 in the BOICB

1 Samuel 18 in the BOILNTAP

1 Samuel 18 in the BOITCV

1 Samuel 18 in the BOKCV

1 Samuel 18 in the BOKCV2

1 Samuel 18 in the BOKHWOG

1 Samuel 18 in the BOKSSV

1 Samuel 18 in the BOLCB

1 Samuel 18 in the BOMCV

1 Samuel 18 in the BONAV

1 Samuel 18 in the BONCB

1 Samuel 18 in the BONLT

1 Samuel 18 in the BONUT2

1 Samuel 18 in the BOPLNT

1 Samuel 18 in the BOSCB

1 Samuel 18 in the BOSNC

1 Samuel 18 in the BOTLNT

1 Samuel 18 in the BOVCB

1 Samuel 18 in the BOYCB

1 Samuel 18 in the BPBB

1 Samuel 18 in the BPH

1 Samuel 18 in the BSB

1 Samuel 18 in the CCB

1 Samuel 18 in the CUV

1 Samuel 18 in the CUVS

1 Samuel 18 in the DBT

1 Samuel 18 in the DGDNT

1 Samuel 18 in the DHNT

1 Samuel 18 in the DNT

1 Samuel 18 in the ELBE

1 Samuel 18 in the EMTV

1 Samuel 18 in the ESV

1 Samuel 18 in the FBV

1 Samuel 18 in the FEB

1 Samuel 18 in the GGMNT

1 Samuel 18 in the GNT

1 Samuel 18 in the HARY

1 Samuel 18 in the HNT

1 Samuel 18 in the IRVA

1 Samuel 18 in the IRVB

1 Samuel 18 in the IRVG

1 Samuel 18 in the IRVH

1 Samuel 18 in the IRVK

1 Samuel 18 in the IRVM

1 Samuel 18 in the IRVM2

1 Samuel 18 in the IRVO

1 Samuel 18 in the IRVP

1 Samuel 18 in the IRVT

1 Samuel 18 in the IRVT2

1 Samuel 18 in the IRVU

1 Samuel 18 in the ISVN

1 Samuel 18 in the JSNT

1 Samuel 18 in the KAPI

1 Samuel 18 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 18 in the KBV

1 Samuel 18 in the KJV

1 Samuel 18 in the KNFD

1 Samuel 18 in the LBA

1 Samuel 18 in the LBLA

1 Samuel 18 in the LNT

1 Samuel 18 in the LSV

1 Samuel 18 in the MAAL

1 Samuel 18 in the MBV

1 Samuel 18 in the MBV2

1 Samuel 18 in the MHNT

1 Samuel 18 in the MKNFD

1 Samuel 18 in the MNG

1 Samuel 18 in the MNT

1 Samuel 18 in the MNT2

1 Samuel 18 in the MRS1T

1 Samuel 18 in the NAA

1 Samuel 18 in the NASB

1 Samuel 18 in the NBLA

1 Samuel 18 in the NBS

1 Samuel 18 in the NBVTP

1 Samuel 18 in the NET2

1 Samuel 18 in the NIV11

1 Samuel 18 in the NNT

1 Samuel 18 in the NNT2

1 Samuel 18 in the NNT3

1 Samuel 18 in the PDDPT

1 Samuel 18 in the PFNT

1 Samuel 18 in the RMNT

1 Samuel 18 in the SBIAS

1 Samuel 18 in the SBIBS

1 Samuel 18 in the SBIBS2

1 Samuel 18 in the SBICS

1 Samuel 18 in the SBIDS

1 Samuel 18 in the SBIGS

1 Samuel 18 in the SBIHS

1 Samuel 18 in the SBIIS

1 Samuel 18 in the SBIIS2

1 Samuel 18 in the SBIIS3

1 Samuel 18 in the SBIKS

1 Samuel 18 in the SBIKS2

1 Samuel 18 in the SBIMS

1 Samuel 18 in the SBIOS

1 Samuel 18 in the SBIPS

1 Samuel 18 in the SBISS

1 Samuel 18 in the SBITS

1 Samuel 18 in the SBITS2

1 Samuel 18 in the SBITS3

1 Samuel 18 in the SBITS4

1 Samuel 18 in the SBIUS

1 Samuel 18 in the SBIVS

1 Samuel 18 in the SBT

1 Samuel 18 in the SBT1E

1 Samuel 18 in the SCHL

1 Samuel 18 in the SNT

1 Samuel 18 in the SUSU

1 Samuel 18 in the SUSU2

1 Samuel 18 in the SYNO

1 Samuel 18 in the TBIAOTANT

1 Samuel 18 in the TBT1E

1 Samuel 18 in the TBT1E2

1 Samuel 18 in the TFTIP

1 Samuel 18 in the TFTU

1 Samuel 18 in the TGNTATF3T

1 Samuel 18 in the THAI

1 Samuel 18 in the TNFD

1 Samuel 18 in the TNT

1 Samuel 18 in the TNTIK

1 Samuel 18 in the TNTIL

1 Samuel 18 in the TNTIN

1 Samuel 18 in the TNTIP

1 Samuel 18 in the TNTIZ

1 Samuel 18 in the TOMA

1 Samuel 18 in the TTENT

1 Samuel 18 in the UBG

1 Samuel 18 in the UGV

1 Samuel 18 in the UGV2

1 Samuel 18 in the UGV3

1 Samuel 18 in the VBL

1 Samuel 18 in the VDCC

1 Samuel 18 in the YALU

1 Samuel 18 in the YAPE

1 Samuel 18 in the YBVTP

1 Samuel 18 in the ZBP