1 Samuel 28 (BOLCB2)

1 Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi :— Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai. 2 Davidi azongiselaki Akishi :— Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala.Akishi alobaki na Davidi :— Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai. 3 Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. 4 Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa. 5 Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye. 6 Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli. 7 Bongo, Saulo alobaki na basali na ye :— Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye.Basali na ye bazongisaki :— Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori. 8 Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki :— Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye. 9 Kasi mwasi yango alobaki na ye :— Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ? 10 Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki : « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. » 11 Bongo mwasi yango atunaki :— Nabimisela yo nani ?Saulo azongisaki :— Bimisela ngai Samuele. 12 Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo :— Mpo na nini okosi ngai ? Ozali Saulo ! 13 Mokonzi alobaki na ye :— Kobanga te, omoni nini ?Mwasi alobaki na Saulo :— Namoni nzambe moko kobima na mabele. 14 Saulo atunaki ye :— Azali ndenge nini ?Mwasi azongisaki :— Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka.Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele. 15 Samuele alobaki na Saulo :— Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ?Saulo alobaki :— Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala. 16 Samuele alobaki :— Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo ? 17 Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai : Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi, 18 pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo. 19 Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia. 20 Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba. 21 Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye :— Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai. 22 Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo : yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo. 23 Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki :— Nakolia te.Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto. 24 Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire. 25 Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.

In Other Versions

1 Samuel 28 in the ANGEFD

1 Samuel 28 in the ANTPNG2D

1 Samuel 28 in the AS21

1 Samuel 28 in the BAGH

1 Samuel 28 in the BBPNG

1 Samuel 28 in the BBT1E

1 Samuel 28 in the BDS

1 Samuel 28 in the BEV

1 Samuel 28 in the BHAD

1 Samuel 28 in the BIB

1 Samuel 28 in the BLPT

1 Samuel 28 in the BNT

1 Samuel 28 in the BNTABOOT

1 Samuel 28 in the BNTLV

1 Samuel 28 in the BOATCB

1 Samuel 28 in the BOATCB2

1 Samuel 28 in the BOBCV

1 Samuel 28 in the BOCNT

1 Samuel 28 in the BOECS

1 Samuel 28 in the BOGWICC

1 Samuel 28 in the BOHCB

1 Samuel 28 in the BOHCV

1 Samuel 28 in the BOHLNT

1 Samuel 28 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 28 in the BOICB

1 Samuel 28 in the BOILNTAP

1 Samuel 28 in the BOITCV

1 Samuel 28 in the BOKCV

1 Samuel 28 in the BOKCV2

1 Samuel 28 in the BOKHWOG

1 Samuel 28 in the BOKSSV

1 Samuel 28 in the BOLCB

1 Samuel 28 in the BOMCV

1 Samuel 28 in the BONAV

1 Samuel 28 in the BONCB

1 Samuel 28 in the BONLT

1 Samuel 28 in the BONUT2

1 Samuel 28 in the BOPLNT

1 Samuel 28 in the BOSCB

1 Samuel 28 in the BOSNC

1 Samuel 28 in the BOTLNT

1 Samuel 28 in the BOVCB

1 Samuel 28 in the BOYCB

1 Samuel 28 in the BPBB

1 Samuel 28 in the BPH

1 Samuel 28 in the BSB

1 Samuel 28 in the CCB

1 Samuel 28 in the CUV

1 Samuel 28 in the CUVS

1 Samuel 28 in the DBT

1 Samuel 28 in the DGDNT

1 Samuel 28 in the DHNT

1 Samuel 28 in the DNT

1 Samuel 28 in the ELBE

1 Samuel 28 in the EMTV

1 Samuel 28 in the ESV

1 Samuel 28 in the FBV

1 Samuel 28 in the FEB

1 Samuel 28 in the GGMNT

1 Samuel 28 in the GNT

1 Samuel 28 in the HARY

1 Samuel 28 in the HNT

1 Samuel 28 in the IRVA

1 Samuel 28 in the IRVB

1 Samuel 28 in the IRVG

1 Samuel 28 in the IRVH

1 Samuel 28 in the IRVK

1 Samuel 28 in the IRVM

1 Samuel 28 in the IRVM2

1 Samuel 28 in the IRVO

1 Samuel 28 in the IRVP

1 Samuel 28 in the IRVT

1 Samuel 28 in the IRVT2

1 Samuel 28 in the IRVU

1 Samuel 28 in the ISVN

1 Samuel 28 in the JSNT

1 Samuel 28 in the KAPI

1 Samuel 28 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 28 in the KBV

1 Samuel 28 in the KJV

1 Samuel 28 in the KNFD

1 Samuel 28 in the LBA

1 Samuel 28 in the LBLA

1 Samuel 28 in the LNT

1 Samuel 28 in the LSV

1 Samuel 28 in the MAAL

1 Samuel 28 in the MBV

1 Samuel 28 in the MBV2

1 Samuel 28 in the MHNT

1 Samuel 28 in the MKNFD

1 Samuel 28 in the MNG

1 Samuel 28 in the MNT

1 Samuel 28 in the MNT2

1 Samuel 28 in the MRS1T

1 Samuel 28 in the NAA

1 Samuel 28 in the NASB

1 Samuel 28 in the NBLA

1 Samuel 28 in the NBS

1 Samuel 28 in the NBVTP

1 Samuel 28 in the NET2

1 Samuel 28 in the NIV11

1 Samuel 28 in the NNT

1 Samuel 28 in the NNT2

1 Samuel 28 in the NNT3

1 Samuel 28 in the PDDPT

1 Samuel 28 in the PFNT

1 Samuel 28 in the RMNT

1 Samuel 28 in the SBIAS

1 Samuel 28 in the SBIBS

1 Samuel 28 in the SBIBS2

1 Samuel 28 in the SBICS

1 Samuel 28 in the SBIDS

1 Samuel 28 in the SBIGS

1 Samuel 28 in the SBIHS

1 Samuel 28 in the SBIIS

1 Samuel 28 in the SBIIS2

1 Samuel 28 in the SBIIS3

1 Samuel 28 in the SBIKS

1 Samuel 28 in the SBIKS2

1 Samuel 28 in the SBIMS

1 Samuel 28 in the SBIOS

1 Samuel 28 in the SBIPS

1 Samuel 28 in the SBISS

1 Samuel 28 in the SBITS

1 Samuel 28 in the SBITS2

1 Samuel 28 in the SBITS3

1 Samuel 28 in the SBITS4

1 Samuel 28 in the SBIUS

1 Samuel 28 in the SBIVS

1 Samuel 28 in the SBT

1 Samuel 28 in the SBT1E

1 Samuel 28 in the SCHL

1 Samuel 28 in the SNT

1 Samuel 28 in the SUSU

1 Samuel 28 in the SUSU2

1 Samuel 28 in the SYNO

1 Samuel 28 in the TBIAOTANT

1 Samuel 28 in the TBT1E

1 Samuel 28 in the TBT1E2

1 Samuel 28 in the TFTIP

1 Samuel 28 in the TFTU

1 Samuel 28 in the TGNTATF3T

1 Samuel 28 in the THAI

1 Samuel 28 in the TNFD

1 Samuel 28 in the TNT

1 Samuel 28 in the TNTIK

1 Samuel 28 in the TNTIL

1 Samuel 28 in the TNTIN

1 Samuel 28 in the TNTIP

1 Samuel 28 in the TNTIZ

1 Samuel 28 in the TOMA

1 Samuel 28 in the TTENT

1 Samuel 28 in the UBG

1 Samuel 28 in the UGV

1 Samuel 28 in the UGV2

1 Samuel 28 in the UGV3

1 Samuel 28 in the VBL

1 Samuel 28 in the VDCC

1 Samuel 28 in the YALU

1 Samuel 28 in the YAPE

1 Samuel 28 in the YBVTP

1 Samuel 28 in the ZBP