2 Chronicles 26 (BOLCB2)

1 Bato nyonso ya Yuda baponaki Oziasi oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya Amatsia, tata na ye. 2 Sima na kufa ya tata na ye, Amatsia, Oziasi atongaki lisusu engumba Eyiloti mpe azongisaki yango na se ya bokonzi ya Yuda. 3 Oziasi azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi. 4 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki. 5 Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye. 6 Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia. 7 Nzambe asungaki ye tango abundisaki bato ya Filisitia, ya Arabi oyo bazalaki kovanda na Guri-Bala, mpe tango abundisaki bato ya Maoni. 8 Bato ya Amoni bafutaki mpako ya mokonzi epai ya Oziasi, mpe kombo na ye ekendeki sango kino na bandelo ya Ejipito, pamba te akomaki na nguya makasi koleka. 9 Oziasi atongaki bandako milayi kati na Yelusalemi, na ekuke ya suka, na ekuke ya lubwaku mpe na suka ya mir ; mpe alendisaki yango makasi. 10 Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga. 11 Oziasi azalaki na basoda oyo baselingwa mpo na bitumba ; mpe babongisamaki na masanga kolanda motango na bango ndenge Yeyeli, mokomi mikanda, mpe kalaka Maaseya, na bokambami ya Anania, moko kati na bakonzi ya bakalaka ya mokonzi, bazwaki bango na mosala. 12 Motango nyonso ya bakambi ya mabota, oyo bazalaki kokamba basoda ya mpiko, ezalaki nkoto mibale na nkama motoba. 13 Bakonzi ya mabota bazalaki kokamba basoda nkoto nkama misato na sambo na nkama mitano oyo baselingwa mpo na bitumba mpe bazalaki basoda ya mpiko, mpo na kobundela mokonzi liboso ya banguna na ye. 14 Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga. 15 Asalisaki kati na Yelusalemi, epai ya bato ya mayele, bamashini mpo na kotia yango likolo ya bandako milayi mpe na suka ya bamir mpo na kobwaka makonga mpe mabanga minene. Kombo na ye ekendeki sango, pamba te asungamaki makasi kino kokoma moto na nguya. 16 Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi. 17 Nganga-Nzambe Azaria alandaki Oziasi na sima, elongo na Banganga-Nzambe mosusu ya Yawe, tuku mwambe, bango nyonso batonda na mpiko. 18 Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye : « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te ! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te ! » 19 Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe. 20 Tango Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe Banganga-Nzambe mosusu batalaki ye mpe bamonaki ete akomi na bokono ya maba na elongi, babenganaki ye na lombangu wana ye moko mpe azalaki kobima na lombangu, pamba te Yawe asambwisaki ye. 21 Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili. 22 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Oziasi mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ezali mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, nde akomaki yango. 23 Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba : « Abelaki bokono ya maba. »Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Chronicles 26 in the ANGEFD

2 Chronicles 26 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 26 in the AS21

2 Chronicles 26 in the BAGH

2 Chronicles 26 in the BBPNG

2 Chronicles 26 in the BBT1E

2 Chronicles 26 in the BDS

2 Chronicles 26 in the BEV

2 Chronicles 26 in the BHAD

2 Chronicles 26 in the BIB

2 Chronicles 26 in the BLPT

2 Chronicles 26 in the BNT

2 Chronicles 26 in the BNTABOOT

2 Chronicles 26 in the BNTLV

2 Chronicles 26 in the BOATCB

2 Chronicles 26 in the BOATCB2

2 Chronicles 26 in the BOBCV

2 Chronicles 26 in the BOCNT

2 Chronicles 26 in the BOECS

2 Chronicles 26 in the BOGWICC

2 Chronicles 26 in the BOHCB

2 Chronicles 26 in the BOHCV

2 Chronicles 26 in the BOHLNT

2 Chronicles 26 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 26 in the BOICB

2 Chronicles 26 in the BOILNTAP

2 Chronicles 26 in the BOITCV

2 Chronicles 26 in the BOKCV

2 Chronicles 26 in the BOKCV2

2 Chronicles 26 in the BOKHWOG

2 Chronicles 26 in the BOKSSV

2 Chronicles 26 in the BOLCB

2 Chronicles 26 in the BOMCV

2 Chronicles 26 in the BONAV

2 Chronicles 26 in the BONCB

2 Chronicles 26 in the BONLT

2 Chronicles 26 in the BONUT2

2 Chronicles 26 in the BOPLNT

2 Chronicles 26 in the BOSCB

2 Chronicles 26 in the BOSNC

2 Chronicles 26 in the BOTLNT

2 Chronicles 26 in the BOVCB

2 Chronicles 26 in the BOYCB

2 Chronicles 26 in the BPBB

2 Chronicles 26 in the BPH

2 Chronicles 26 in the BSB

2 Chronicles 26 in the CCB

2 Chronicles 26 in the CUV

2 Chronicles 26 in the CUVS

2 Chronicles 26 in the DBT

2 Chronicles 26 in the DGDNT

2 Chronicles 26 in the DHNT

2 Chronicles 26 in the DNT

2 Chronicles 26 in the ELBE

2 Chronicles 26 in the EMTV

2 Chronicles 26 in the ESV

2 Chronicles 26 in the FBV

2 Chronicles 26 in the FEB

2 Chronicles 26 in the GGMNT

2 Chronicles 26 in the GNT

2 Chronicles 26 in the HARY

2 Chronicles 26 in the HNT

2 Chronicles 26 in the IRVA

2 Chronicles 26 in the IRVB

2 Chronicles 26 in the IRVG

2 Chronicles 26 in the IRVH

2 Chronicles 26 in the IRVK

2 Chronicles 26 in the IRVM

2 Chronicles 26 in the IRVM2

2 Chronicles 26 in the IRVO

2 Chronicles 26 in the IRVP

2 Chronicles 26 in the IRVT

2 Chronicles 26 in the IRVT2

2 Chronicles 26 in the IRVU

2 Chronicles 26 in the ISVN

2 Chronicles 26 in the JSNT

2 Chronicles 26 in the KAPI

2 Chronicles 26 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 26 in the KBV

2 Chronicles 26 in the KJV

2 Chronicles 26 in the KNFD

2 Chronicles 26 in the LBA

2 Chronicles 26 in the LBLA

2 Chronicles 26 in the LNT

2 Chronicles 26 in the LSV

2 Chronicles 26 in the MAAL

2 Chronicles 26 in the MBV

2 Chronicles 26 in the MBV2

2 Chronicles 26 in the MHNT

2 Chronicles 26 in the MKNFD

2 Chronicles 26 in the MNG

2 Chronicles 26 in the MNT

2 Chronicles 26 in the MNT2

2 Chronicles 26 in the MRS1T

2 Chronicles 26 in the NAA

2 Chronicles 26 in the NASB

2 Chronicles 26 in the NBLA

2 Chronicles 26 in the NBS

2 Chronicles 26 in the NBVTP

2 Chronicles 26 in the NET2

2 Chronicles 26 in the NIV11

2 Chronicles 26 in the NNT

2 Chronicles 26 in the NNT2

2 Chronicles 26 in the NNT3

2 Chronicles 26 in the PDDPT

2 Chronicles 26 in the PFNT

2 Chronicles 26 in the RMNT

2 Chronicles 26 in the SBIAS

2 Chronicles 26 in the SBIBS

2 Chronicles 26 in the SBIBS2

2 Chronicles 26 in the SBICS

2 Chronicles 26 in the SBIDS

2 Chronicles 26 in the SBIGS

2 Chronicles 26 in the SBIHS

2 Chronicles 26 in the SBIIS

2 Chronicles 26 in the SBIIS2

2 Chronicles 26 in the SBIIS3

2 Chronicles 26 in the SBIKS

2 Chronicles 26 in the SBIKS2

2 Chronicles 26 in the SBIMS

2 Chronicles 26 in the SBIOS

2 Chronicles 26 in the SBIPS

2 Chronicles 26 in the SBISS

2 Chronicles 26 in the SBITS

2 Chronicles 26 in the SBITS2

2 Chronicles 26 in the SBITS3

2 Chronicles 26 in the SBITS4

2 Chronicles 26 in the SBIUS

2 Chronicles 26 in the SBIVS

2 Chronicles 26 in the SBT

2 Chronicles 26 in the SBT1E

2 Chronicles 26 in the SCHL

2 Chronicles 26 in the SNT

2 Chronicles 26 in the SUSU

2 Chronicles 26 in the SUSU2

2 Chronicles 26 in the SYNO

2 Chronicles 26 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 26 in the TBT1E

2 Chronicles 26 in the TBT1E2

2 Chronicles 26 in the TFTIP

2 Chronicles 26 in the TFTU

2 Chronicles 26 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 26 in the THAI

2 Chronicles 26 in the TNFD

2 Chronicles 26 in the TNT

2 Chronicles 26 in the TNTIK

2 Chronicles 26 in the TNTIL

2 Chronicles 26 in the TNTIN

2 Chronicles 26 in the TNTIP

2 Chronicles 26 in the TNTIZ

2 Chronicles 26 in the TOMA

2 Chronicles 26 in the TTENT

2 Chronicles 26 in the UBG

2 Chronicles 26 in the UGV

2 Chronicles 26 in the UGV2

2 Chronicles 26 in the UGV3

2 Chronicles 26 in the VBL

2 Chronicles 26 in the VDCC

2 Chronicles 26 in the YALU

2 Chronicles 26 in the YAPE

2 Chronicles 26 in the YBVTP

2 Chronicles 26 in the ZBP