2 Chronicles 31 (BOLCB2)

1 Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango. 2 Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe. 3 Mokonzi azwaki ndambo ya bozwi na ye mpe apesaki mpo na bambeka ya kotumba : bambeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa, ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, kolanda ndenge ekomama kati na mibeko ya Yawe. 4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango. 5 Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso. 6 Bato ya Isalaele elongo na bato ya Yuda oyo bazalaki kovanda kati na bingumba ya Yuda bamemaki eteni na bango ya zomi ya bangombe, ya bameme, ya bantaba mpe ya makabo ya bule oyo ebulisamaki mpo na Yawe, Nzambe na bango, mpe batiaki yango na mipiku. 7 Babandaki kosala mipiku yango na sanza ya misato mpe basilisaki na sanza ya sambo. 8 Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye. 9 Ezekiasi atunaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na tina na mipiku yango. 10 Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, moto ya libota ya Tsadoki, azongisaki :— Wuta tango bato babandaki komema makabo na bango kati na Tempelo ya Yawe, toliaki, totondaki mpe totiki ebele, pamba te Yawe apambolaki bato na Ye. Mipiku ya biloko oyo ozali komona awa ezali nde oyo etikali. 11 Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe ; mpe esalemaki bongo. 12 Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye. 13 Kolandisama na mokano ya mokonzi Ezekiasi mpe ya Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe ya Tempelo ya Nzambe, Yeyeli, Azazia, Naati, Asaeli, Yerimoti, Yozabadi, Elieli, Yisimakia, Maati mpe Benaya bazalaki bakengeli ya misala na bokambami ya Konania mpe Shimei, ndeko na ye ya mobali. 14 Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule. 15 Kati na bingumba ya Banganga-Nzambe, Kore asungamaki na Edeni, Minyamini, Jozue, Shemaya, Amaria mpe Shekania, mpo na kokabola biloko na boyengebene epai ya bandeko na bango Banganga-Nzambe kolanda masanga na bango ; bazalaki kosala bokeseni te kati na bato minene mpe bato mike. 16 Bazalaki kopesa kaka te na mibali oyo bakombo na bango ekomamaki, kobanda na mibu misato ya mbotama mpe komata, kasi bazalaki mpe kopesa na bato nyonso oyo bazalaki kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kosala misala na bango ya mokolo na mokolo kolanda mikumba mpe masanga na bango. 17 Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango ; 18 bapesaki na bana mike nyonso, na basi, na bana mibali mpe na bana basi ya lisanga mobimba, ba-oyo bakombo na bango ekomamaki kati na buku ya milongo ya mbotama, pamba te bazalaki kokokisa na boyengebene mibeko ya libulisi mpo na kozala bule. 19 Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki. 20 Ezali boye nde Ezekiasi asalaki kati na mokili na ye mobimba ya Yuda. Asalaki makambo ya malamu, ya sembo mpe ya solo na miso ya Yawe, Nzambe na ye. 21 Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.

In Other Versions

2 Chronicles 31 in the ANGEFD

2 Chronicles 31 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 31 in the AS21

2 Chronicles 31 in the BAGH

2 Chronicles 31 in the BBPNG

2 Chronicles 31 in the BBT1E

2 Chronicles 31 in the BDS

2 Chronicles 31 in the BEV

2 Chronicles 31 in the BHAD

2 Chronicles 31 in the BIB

2 Chronicles 31 in the BLPT

2 Chronicles 31 in the BNT

2 Chronicles 31 in the BNTABOOT

2 Chronicles 31 in the BNTLV

2 Chronicles 31 in the BOATCB

2 Chronicles 31 in the BOATCB2

2 Chronicles 31 in the BOBCV

2 Chronicles 31 in the BOCNT

2 Chronicles 31 in the BOECS

2 Chronicles 31 in the BOGWICC

2 Chronicles 31 in the BOHCB

2 Chronicles 31 in the BOHCV

2 Chronicles 31 in the BOHLNT

2 Chronicles 31 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 31 in the BOICB

2 Chronicles 31 in the BOILNTAP

2 Chronicles 31 in the BOITCV

2 Chronicles 31 in the BOKCV

2 Chronicles 31 in the BOKCV2

2 Chronicles 31 in the BOKHWOG

2 Chronicles 31 in the BOKSSV

2 Chronicles 31 in the BOLCB

2 Chronicles 31 in the BOMCV

2 Chronicles 31 in the BONAV

2 Chronicles 31 in the BONCB

2 Chronicles 31 in the BONLT

2 Chronicles 31 in the BONUT2

2 Chronicles 31 in the BOPLNT

2 Chronicles 31 in the BOSCB

2 Chronicles 31 in the BOSNC

2 Chronicles 31 in the BOTLNT

2 Chronicles 31 in the BOVCB

2 Chronicles 31 in the BOYCB

2 Chronicles 31 in the BPBB

2 Chronicles 31 in the BPH

2 Chronicles 31 in the BSB

2 Chronicles 31 in the CCB

2 Chronicles 31 in the CUV

2 Chronicles 31 in the CUVS

2 Chronicles 31 in the DBT

2 Chronicles 31 in the DGDNT

2 Chronicles 31 in the DHNT

2 Chronicles 31 in the DNT

2 Chronicles 31 in the ELBE

2 Chronicles 31 in the EMTV

2 Chronicles 31 in the ESV

2 Chronicles 31 in the FBV

2 Chronicles 31 in the FEB

2 Chronicles 31 in the GGMNT

2 Chronicles 31 in the GNT

2 Chronicles 31 in the HARY

2 Chronicles 31 in the HNT

2 Chronicles 31 in the IRVA

2 Chronicles 31 in the IRVB

2 Chronicles 31 in the IRVG

2 Chronicles 31 in the IRVH

2 Chronicles 31 in the IRVK

2 Chronicles 31 in the IRVM

2 Chronicles 31 in the IRVM2

2 Chronicles 31 in the IRVO

2 Chronicles 31 in the IRVP

2 Chronicles 31 in the IRVT

2 Chronicles 31 in the IRVT2

2 Chronicles 31 in the IRVU

2 Chronicles 31 in the ISVN

2 Chronicles 31 in the JSNT

2 Chronicles 31 in the KAPI

2 Chronicles 31 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 31 in the KBV

2 Chronicles 31 in the KJV

2 Chronicles 31 in the KNFD

2 Chronicles 31 in the LBA

2 Chronicles 31 in the LBLA

2 Chronicles 31 in the LNT

2 Chronicles 31 in the LSV

2 Chronicles 31 in the MAAL

2 Chronicles 31 in the MBV

2 Chronicles 31 in the MBV2

2 Chronicles 31 in the MHNT

2 Chronicles 31 in the MKNFD

2 Chronicles 31 in the MNG

2 Chronicles 31 in the MNT

2 Chronicles 31 in the MNT2

2 Chronicles 31 in the MRS1T

2 Chronicles 31 in the NAA

2 Chronicles 31 in the NASB

2 Chronicles 31 in the NBLA

2 Chronicles 31 in the NBS

2 Chronicles 31 in the NBVTP

2 Chronicles 31 in the NET2

2 Chronicles 31 in the NIV11

2 Chronicles 31 in the NNT

2 Chronicles 31 in the NNT2

2 Chronicles 31 in the NNT3

2 Chronicles 31 in the PDDPT

2 Chronicles 31 in the PFNT

2 Chronicles 31 in the RMNT

2 Chronicles 31 in the SBIAS

2 Chronicles 31 in the SBIBS

2 Chronicles 31 in the SBIBS2

2 Chronicles 31 in the SBICS

2 Chronicles 31 in the SBIDS

2 Chronicles 31 in the SBIGS

2 Chronicles 31 in the SBIHS

2 Chronicles 31 in the SBIIS

2 Chronicles 31 in the SBIIS2

2 Chronicles 31 in the SBIIS3

2 Chronicles 31 in the SBIKS

2 Chronicles 31 in the SBIKS2

2 Chronicles 31 in the SBIMS

2 Chronicles 31 in the SBIOS

2 Chronicles 31 in the SBIPS

2 Chronicles 31 in the SBISS

2 Chronicles 31 in the SBITS

2 Chronicles 31 in the SBITS2

2 Chronicles 31 in the SBITS3

2 Chronicles 31 in the SBITS4

2 Chronicles 31 in the SBIUS

2 Chronicles 31 in the SBIVS

2 Chronicles 31 in the SBT

2 Chronicles 31 in the SBT1E

2 Chronicles 31 in the SCHL

2 Chronicles 31 in the SNT

2 Chronicles 31 in the SUSU

2 Chronicles 31 in the SUSU2

2 Chronicles 31 in the SYNO

2 Chronicles 31 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 31 in the TBT1E

2 Chronicles 31 in the TBT1E2

2 Chronicles 31 in the TFTIP

2 Chronicles 31 in the TFTU

2 Chronicles 31 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 31 in the THAI

2 Chronicles 31 in the TNFD

2 Chronicles 31 in the TNT

2 Chronicles 31 in the TNTIK

2 Chronicles 31 in the TNTIL

2 Chronicles 31 in the TNTIN

2 Chronicles 31 in the TNTIP

2 Chronicles 31 in the TNTIZ

2 Chronicles 31 in the TOMA

2 Chronicles 31 in the TTENT

2 Chronicles 31 in the UBG

2 Chronicles 31 in the UGV

2 Chronicles 31 in the UGV2

2 Chronicles 31 in the UGV3

2 Chronicles 31 in the VBL

2 Chronicles 31 in the VDCC

2 Chronicles 31 in the YALU

2 Chronicles 31 in the YAPE

2 Chronicles 31 in the YBVTP

2 Chronicles 31 in the ZBP