2 Chronicles 36 (BOLCB2)

1 Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, mpe bakomisaki ye mokonzi, na Yelusalemi, mpo na kokitana na tata na ye. 2 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. 3 Mokonzi ya Ejipito alongolaki ye na bokonzi kati na Yelusalemi mpe asengaki na makasi ete mokili ya Yuda ekoma kofuta mpako mpo na mokonzi : bakilo nkoto misato na nkama minei ya palata mpe ya wolo. 4 Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito. 5 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye. 6 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni. 7 Nabukodonozori amemaki mpe na Babiloni ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya bokonzi. 8 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi, misala na ye ya nkele mpe makambo oyo ekweyelaki ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 9 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato mpe mikolo zomi na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. 10 Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi. 11 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. 12 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe. 13 Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga. 14 Bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bato bakomaki lisusu kosala mabe koleka, balandaki misala nyonso ya nkele ya bikolo ya bapaya mpe babebisaki bosantu ya Tempelo ya Yawe oyo Ye moko Yawe abulisaki na Yelusalemi. 15 Yawe, Nzambe ya batata na bango, atindelaki bango, mbala na mbala mpe na ngonga malamu, makebisi na nzela ya bamemi sango na Ye, pamba te azalaki na posa ya kobatela bato na Ye mpe Tempelo na Ye. 16 Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe. 17 Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori. 18 Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye. 19 Batumbaki na moto Tempelo ya Nzambe, babukaki mir ya Yelusalemi, batumbaki na moto bandako na yango ya kitoko mpe babebisaki biloko nyonso ya motuya. 20 Nabukodonozori amemaki na Babiloni bato oyo babikaki na mopanga, akomisaki bango bawumbu na ye mpe ya bana na ye ya mibali kino na tango mokili ya Persi ezwaki bokonzi. 21 Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. » 22 Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba : 23 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »

In Other Versions

2 Chronicles 36 in the ANGEFD

2 Chronicles 36 in the ANTPNG2D

2 Chronicles 36 in the AS21

2 Chronicles 36 in the BAGH

2 Chronicles 36 in the BBPNG

2 Chronicles 36 in the BBT1E

2 Chronicles 36 in the BDS

2 Chronicles 36 in the BEV

2 Chronicles 36 in the BHAD

2 Chronicles 36 in the BIB

2 Chronicles 36 in the BLPT

2 Chronicles 36 in the BNT

2 Chronicles 36 in the BNTABOOT

2 Chronicles 36 in the BNTLV

2 Chronicles 36 in the BOATCB

2 Chronicles 36 in the BOATCB2

2 Chronicles 36 in the BOBCV

2 Chronicles 36 in the BOCNT

2 Chronicles 36 in the BOECS

2 Chronicles 36 in the BOGWICC

2 Chronicles 36 in the BOHCB

2 Chronicles 36 in the BOHCV

2 Chronicles 36 in the BOHLNT

2 Chronicles 36 in the BOHNTLTAL

2 Chronicles 36 in the BOICB

2 Chronicles 36 in the BOILNTAP

2 Chronicles 36 in the BOITCV

2 Chronicles 36 in the BOKCV

2 Chronicles 36 in the BOKCV2

2 Chronicles 36 in the BOKHWOG

2 Chronicles 36 in the BOKSSV

2 Chronicles 36 in the BOLCB

2 Chronicles 36 in the BOMCV

2 Chronicles 36 in the BONAV

2 Chronicles 36 in the BONCB

2 Chronicles 36 in the BONLT

2 Chronicles 36 in the BONUT2

2 Chronicles 36 in the BOPLNT

2 Chronicles 36 in the BOSCB

2 Chronicles 36 in the BOSNC

2 Chronicles 36 in the BOTLNT

2 Chronicles 36 in the BOVCB

2 Chronicles 36 in the BOYCB

2 Chronicles 36 in the BPBB

2 Chronicles 36 in the BPH

2 Chronicles 36 in the BSB

2 Chronicles 36 in the CCB

2 Chronicles 36 in the CUV

2 Chronicles 36 in the CUVS

2 Chronicles 36 in the DBT

2 Chronicles 36 in the DGDNT

2 Chronicles 36 in the DHNT

2 Chronicles 36 in the DNT

2 Chronicles 36 in the ELBE

2 Chronicles 36 in the EMTV

2 Chronicles 36 in the ESV

2 Chronicles 36 in the FBV

2 Chronicles 36 in the FEB

2 Chronicles 36 in the GGMNT

2 Chronicles 36 in the GNT

2 Chronicles 36 in the HARY

2 Chronicles 36 in the HNT

2 Chronicles 36 in the IRVA

2 Chronicles 36 in the IRVB

2 Chronicles 36 in the IRVG

2 Chronicles 36 in the IRVH

2 Chronicles 36 in the IRVK

2 Chronicles 36 in the IRVM

2 Chronicles 36 in the IRVM2

2 Chronicles 36 in the IRVO

2 Chronicles 36 in the IRVP

2 Chronicles 36 in the IRVT

2 Chronicles 36 in the IRVT2

2 Chronicles 36 in the IRVU

2 Chronicles 36 in the ISVN

2 Chronicles 36 in the JSNT

2 Chronicles 36 in the KAPI

2 Chronicles 36 in the KBT1ETNIK

2 Chronicles 36 in the KBV

2 Chronicles 36 in the KJV

2 Chronicles 36 in the KNFD

2 Chronicles 36 in the LBA

2 Chronicles 36 in the LBLA

2 Chronicles 36 in the LNT

2 Chronicles 36 in the LSV

2 Chronicles 36 in the MAAL

2 Chronicles 36 in the MBV

2 Chronicles 36 in the MBV2

2 Chronicles 36 in the MHNT

2 Chronicles 36 in the MKNFD

2 Chronicles 36 in the MNG

2 Chronicles 36 in the MNT

2 Chronicles 36 in the MNT2

2 Chronicles 36 in the MRS1T

2 Chronicles 36 in the NAA

2 Chronicles 36 in the NASB

2 Chronicles 36 in the NBLA

2 Chronicles 36 in the NBS

2 Chronicles 36 in the NBVTP

2 Chronicles 36 in the NET2

2 Chronicles 36 in the NIV11

2 Chronicles 36 in the NNT

2 Chronicles 36 in the NNT2

2 Chronicles 36 in the NNT3

2 Chronicles 36 in the PDDPT

2 Chronicles 36 in the PFNT

2 Chronicles 36 in the RMNT

2 Chronicles 36 in the SBIAS

2 Chronicles 36 in the SBIBS

2 Chronicles 36 in the SBIBS2

2 Chronicles 36 in the SBICS

2 Chronicles 36 in the SBIDS

2 Chronicles 36 in the SBIGS

2 Chronicles 36 in the SBIHS

2 Chronicles 36 in the SBIIS

2 Chronicles 36 in the SBIIS2

2 Chronicles 36 in the SBIIS3

2 Chronicles 36 in the SBIKS

2 Chronicles 36 in the SBIKS2

2 Chronicles 36 in the SBIMS

2 Chronicles 36 in the SBIOS

2 Chronicles 36 in the SBIPS

2 Chronicles 36 in the SBISS

2 Chronicles 36 in the SBITS

2 Chronicles 36 in the SBITS2

2 Chronicles 36 in the SBITS3

2 Chronicles 36 in the SBITS4

2 Chronicles 36 in the SBIUS

2 Chronicles 36 in the SBIVS

2 Chronicles 36 in the SBT

2 Chronicles 36 in the SBT1E

2 Chronicles 36 in the SCHL

2 Chronicles 36 in the SNT

2 Chronicles 36 in the SUSU

2 Chronicles 36 in the SUSU2

2 Chronicles 36 in the SYNO

2 Chronicles 36 in the TBIAOTANT

2 Chronicles 36 in the TBT1E

2 Chronicles 36 in the TBT1E2

2 Chronicles 36 in the TFTIP

2 Chronicles 36 in the TFTU

2 Chronicles 36 in the TGNTATF3T

2 Chronicles 36 in the THAI

2 Chronicles 36 in the TNFD

2 Chronicles 36 in the TNT

2 Chronicles 36 in the TNTIK

2 Chronicles 36 in the TNTIL

2 Chronicles 36 in the TNTIN

2 Chronicles 36 in the TNTIP

2 Chronicles 36 in the TNTIZ

2 Chronicles 36 in the TOMA

2 Chronicles 36 in the TTENT

2 Chronicles 36 in the UBG

2 Chronicles 36 in the UGV

2 Chronicles 36 in the UGV2

2 Chronicles 36 in the UGV3

2 Chronicles 36 in the VBL

2 Chronicles 36 in the VDCC

2 Chronicles 36 in the YALU

2 Chronicles 36 in the YAPE

2 Chronicles 36 in the YBVTP

2 Chronicles 36 in the ZBP