2 Corinthians 7 (BOLCB2)

1 Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe. 2 Bopesa biso esika kati na mitema na bino ! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko. 3 Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino. 4 Nalobaki na tina na bino na bosembo monene, mpe namikumisaka makasi na tina na bino. Kati na pasi na biso nyonso, nalendisamaki makasi, mpe natondi na esengo. 5 Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso : bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso. 6 Kasi Nzambe oyo abondisaka mitema ya bato oyo batutami alendisaki biso na nzela ya boyei ya Tito. 7 Tolendisamaki na nzela ya boyei ya Tito kaka te, kasi mpe na nzela ya kobondisama oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa makasi oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino, mpe komipesa na bino mpo na ngai. Mpe nyonso wana esalaki ete esengo na ngai ebakisama lisusu makasi. 8 Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na nzela ya mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi te kati na motema na ngai. Solo, esalaki ngai nanu pasi na motema, na kotala ndenge eyokisaki bino mawa mpo na mwa tango moke. 9 Kasi sik’oyo, nazali kosepela : ezali te mpo boyokaki mawa, kasi mpo ete mawa yango ememaki bino na kobongola mitema. Pamba te mawa na bino ezalaki malamu na miso ya Nzambe ; mpe na bongo, tosalaki bino mabe te. 10 Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa. 11 Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino : bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo. 12 Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te likolo na moto oyo asalaki mabe to likolo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete bolingo na bino mpo na biso etalisama kati na bino liboso ya Nzambe. 13 Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema. 14 Namikumisaki epai na ye na tina na bino mpe nakoyokela yango soni te, pamba te ndenge kaka makambo nyonso oyo tolobaki na bino ezali ya solo, ndenge mpe kaka lokumu oyo totombolaki na tina na bino epai ya Tito ezali penza ya solo. 15 Mpe bolingo na ye mpo na bino nyonso ekomaka lisusu monene tango akanisaka botosi na bino nyonso mpe ndenge boyambaki ye na kobanga mpe na kolenga. 16 Nazali na esengo ya kotiela bino motema na makambo nyonso.

In Other Versions

2 Corinthians 7 in the ANGEFD

2 Corinthians 7 in the ANTPNG2D

2 Corinthians 7 in the AS21

2 Corinthians 7 in the BAGH

2 Corinthians 7 in the BBPNG

2 Corinthians 7 in the BBT1E

2 Corinthians 7 in the BDS

2 Corinthians 7 in the BEV

2 Corinthians 7 in the BHAD

2 Corinthians 7 in the BIB

2 Corinthians 7 in the BLPT

2 Corinthians 7 in the BNT

2 Corinthians 7 in the BNTABOOT

2 Corinthians 7 in the BNTLV

2 Corinthians 7 in the BOATCB

2 Corinthians 7 in the BOATCB2

2 Corinthians 7 in the BOBCV

2 Corinthians 7 in the BOCNT

2 Corinthians 7 in the BOECS

2 Corinthians 7 in the BOGWICC

2 Corinthians 7 in the BOHCB

2 Corinthians 7 in the BOHCV

2 Corinthians 7 in the BOHLNT

2 Corinthians 7 in the BOHNTLTAL

2 Corinthians 7 in the BOICB

2 Corinthians 7 in the BOILNTAP

2 Corinthians 7 in the BOITCV

2 Corinthians 7 in the BOKCV

2 Corinthians 7 in the BOKCV2

2 Corinthians 7 in the BOKHWOG

2 Corinthians 7 in the BOKSSV

2 Corinthians 7 in the BOLCB

2 Corinthians 7 in the BOMCV

2 Corinthians 7 in the BONAV

2 Corinthians 7 in the BONCB

2 Corinthians 7 in the BONLT

2 Corinthians 7 in the BONUT2

2 Corinthians 7 in the BOPLNT

2 Corinthians 7 in the BOSCB

2 Corinthians 7 in the BOSNC

2 Corinthians 7 in the BOTLNT

2 Corinthians 7 in the BOVCB

2 Corinthians 7 in the BOYCB

2 Corinthians 7 in the BPBB

2 Corinthians 7 in the BPH

2 Corinthians 7 in the BSB

2 Corinthians 7 in the CCB

2 Corinthians 7 in the CUV

2 Corinthians 7 in the CUVS

2 Corinthians 7 in the DBT

2 Corinthians 7 in the DGDNT

2 Corinthians 7 in the DHNT

2 Corinthians 7 in the DNT

2 Corinthians 7 in the ELBE

2 Corinthians 7 in the EMTV

2 Corinthians 7 in the ESV

2 Corinthians 7 in the FBV

2 Corinthians 7 in the FEB

2 Corinthians 7 in the GGMNT

2 Corinthians 7 in the GNT

2 Corinthians 7 in the HARY

2 Corinthians 7 in the HNT

2 Corinthians 7 in the IRVA

2 Corinthians 7 in the IRVB

2 Corinthians 7 in the IRVG

2 Corinthians 7 in the IRVH

2 Corinthians 7 in the IRVK

2 Corinthians 7 in the IRVM

2 Corinthians 7 in the IRVM2

2 Corinthians 7 in the IRVO

2 Corinthians 7 in the IRVP

2 Corinthians 7 in the IRVT

2 Corinthians 7 in the IRVT2

2 Corinthians 7 in the IRVU

2 Corinthians 7 in the ISVN

2 Corinthians 7 in the JSNT

2 Corinthians 7 in the KAPI

2 Corinthians 7 in the KBT1ETNIK

2 Corinthians 7 in the KBV

2 Corinthians 7 in the KJV

2 Corinthians 7 in the KNFD

2 Corinthians 7 in the LBA

2 Corinthians 7 in the LBLA

2 Corinthians 7 in the LNT

2 Corinthians 7 in the LSV

2 Corinthians 7 in the MAAL

2 Corinthians 7 in the MBV

2 Corinthians 7 in the MBV2

2 Corinthians 7 in the MHNT

2 Corinthians 7 in the MKNFD

2 Corinthians 7 in the MNG

2 Corinthians 7 in the MNT

2 Corinthians 7 in the MNT2

2 Corinthians 7 in the MRS1T

2 Corinthians 7 in the NAA

2 Corinthians 7 in the NASB

2 Corinthians 7 in the NBLA

2 Corinthians 7 in the NBS

2 Corinthians 7 in the NBVTP

2 Corinthians 7 in the NET2

2 Corinthians 7 in the NIV11

2 Corinthians 7 in the NNT

2 Corinthians 7 in the NNT2

2 Corinthians 7 in the NNT3

2 Corinthians 7 in the PDDPT

2 Corinthians 7 in the PFNT

2 Corinthians 7 in the RMNT

2 Corinthians 7 in the SBIAS

2 Corinthians 7 in the SBIBS

2 Corinthians 7 in the SBIBS2

2 Corinthians 7 in the SBICS

2 Corinthians 7 in the SBIDS

2 Corinthians 7 in the SBIGS

2 Corinthians 7 in the SBIHS

2 Corinthians 7 in the SBIIS

2 Corinthians 7 in the SBIIS2

2 Corinthians 7 in the SBIIS3

2 Corinthians 7 in the SBIKS

2 Corinthians 7 in the SBIKS2

2 Corinthians 7 in the SBIMS

2 Corinthians 7 in the SBIOS

2 Corinthians 7 in the SBIPS

2 Corinthians 7 in the SBISS

2 Corinthians 7 in the SBITS

2 Corinthians 7 in the SBITS2

2 Corinthians 7 in the SBITS3

2 Corinthians 7 in the SBITS4

2 Corinthians 7 in the SBIUS

2 Corinthians 7 in the SBIVS

2 Corinthians 7 in the SBT

2 Corinthians 7 in the SBT1E

2 Corinthians 7 in the SCHL

2 Corinthians 7 in the SNT

2 Corinthians 7 in the SUSU

2 Corinthians 7 in the SUSU2

2 Corinthians 7 in the SYNO

2 Corinthians 7 in the TBIAOTANT

2 Corinthians 7 in the TBT1E

2 Corinthians 7 in the TBT1E2

2 Corinthians 7 in the TFTIP

2 Corinthians 7 in the TFTU

2 Corinthians 7 in the TGNTATF3T

2 Corinthians 7 in the THAI

2 Corinthians 7 in the TNFD

2 Corinthians 7 in the TNT

2 Corinthians 7 in the TNTIK

2 Corinthians 7 in the TNTIL

2 Corinthians 7 in the TNTIN

2 Corinthians 7 in the TNTIP

2 Corinthians 7 in the TNTIZ

2 Corinthians 7 in the TOMA

2 Corinthians 7 in the TTENT

2 Corinthians 7 in the UBG

2 Corinthians 7 in the UGV

2 Corinthians 7 in the UGV2

2 Corinthians 7 in the UGV3

2 Corinthians 7 in the VBL

2 Corinthians 7 in the VDCC

2 Corinthians 7 in the YALU

2 Corinthians 7 in the YAPE

2 Corinthians 7 in the YBVTP

2 Corinthians 7 in the ZBP