2 Kings 15 (BOLCB2)

1 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi, Azaria, mwana mobali ya Amatsia, akomaki mokonzi ya Yuda. 2 Azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi. 3 Azaria asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki. 4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. 5 Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili. 6 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 7 Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi ; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 8 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari ; mpe akonzaki basanza motoba. 9 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 10 Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. 11 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zakari, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 12 Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. » 13 Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko. 14 Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari ; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. 15 Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 16 Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi. 17 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi. 18 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 19 Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye. 20 Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye. 21 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Menayeme mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 22 Menayeme akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Pekakia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 23 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale. 24 Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 25 Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi. 26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 27 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale. 28 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 29 Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri. 30 Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi. 31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Peka mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 32 Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. 33 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki. 34 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki. 35 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe. 36 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 37 Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda. 38 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Kings 15 in the ANGEFD

2 Kings 15 in the ANTPNG2D

2 Kings 15 in the AS21

2 Kings 15 in the BAGH

2 Kings 15 in the BBPNG

2 Kings 15 in the BBT1E

2 Kings 15 in the BDS

2 Kings 15 in the BEV

2 Kings 15 in the BHAD

2 Kings 15 in the BIB

2 Kings 15 in the BLPT

2 Kings 15 in the BNT

2 Kings 15 in the BNTABOOT

2 Kings 15 in the BNTLV

2 Kings 15 in the BOATCB

2 Kings 15 in the BOATCB2

2 Kings 15 in the BOBCV

2 Kings 15 in the BOCNT

2 Kings 15 in the BOECS

2 Kings 15 in the BOGWICC

2 Kings 15 in the BOHCB

2 Kings 15 in the BOHCV

2 Kings 15 in the BOHLNT

2 Kings 15 in the BOHNTLTAL

2 Kings 15 in the BOICB

2 Kings 15 in the BOILNTAP

2 Kings 15 in the BOITCV

2 Kings 15 in the BOKCV

2 Kings 15 in the BOKCV2

2 Kings 15 in the BOKHWOG

2 Kings 15 in the BOKSSV

2 Kings 15 in the BOLCB

2 Kings 15 in the BOMCV

2 Kings 15 in the BONAV

2 Kings 15 in the BONCB

2 Kings 15 in the BONLT

2 Kings 15 in the BONUT2

2 Kings 15 in the BOPLNT

2 Kings 15 in the BOSCB

2 Kings 15 in the BOSNC

2 Kings 15 in the BOTLNT

2 Kings 15 in the BOVCB

2 Kings 15 in the BOYCB

2 Kings 15 in the BPBB

2 Kings 15 in the BPH

2 Kings 15 in the BSB

2 Kings 15 in the CCB

2 Kings 15 in the CUV

2 Kings 15 in the CUVS

2 Kings 15 in the DBT

2 Kings 15 in the DGDNT

2 Kings 15 in the DHNT

2 Kings 15 in the DNT

2 Kings 15 in the ELBE

2 Kings 15 in the EMTV

2 Kings 15 in the ESV

2 Kings 15 in the FBV

2 Kings 15 in the FEB

2 Kings 15 in the GGMNT

2 Kings 15 in the GNT

2 Kings 15 in the HARY

2 Kings 15 in the HNT

2 Kings 15 in the IRVA

2 Kings 15 in the IRVB

2 Kings 15 in the IRVG

2 Kings 15 in the IRVH

2 Kings 15 in the IRVK

2 Kings 15 in the IRVM

2 Kings 15 in the IRVM2

2 Kings 15 in the IRVO

2 Kings 15 in the IRVP

2 Kings 15 in the IRVT

2 Kings 15 in the IRVT2

2 Kings 15 in the IRVU

2 Kings 15 in the ISVN

2 Kings 15 in the JSNT

2 Kings 15 in the KAPI

2 Kings 15 in the KBT1ETNIK

2 Kings 15 in the KBV

2 Kings 15 in the KJV

2 Kings 15 in the KNFD

2 Kings 15 in the LBA

2 Kings 15 in the LBLA

2 Kings 15 in the LNT

2 Kings 15 in the LSV

2 Kings 15 in the MAAL

2 Kings 15 in the MBV

2 Kings 15 in the MBV2

2 Kings 15 in the MHNT

2 Kings 15 in the MKNFD

2 Kings 15 in the MNG

2 Kings 15 in the MNT

2 Kings 15 in the MNT2

2 Kings 15 in the MRS1T

2 Kings 15 in the NAA

2 Kings 15 in the NASB

2 Kings 15 in the NBLA

2 Kings 15 in the NBS

2 Kings 15 in the NBVTP

2 Kings 15 in the NET2

2 Kings 15 in the NIV11

2 Kings 15 in the NNT

2 Kings 15 in the NNT2

2 Kings 15 in the NNT3

2 Kings 15 in the PDDPT

2 Kings 15 in the PFNT

2 Kings 15 in the RMNT

2 Kings 15 in the SBIAS

2 Kings 15 in the SBIBS

2 Kings 15 in the SBIBS2

2 Kings 15 in the SBICS

2 Kings 15 in the SBIDS

2 Kings 15 in the SBIGS

2 Kings 15 in the SBIHS

2 Kings 15 in the SBIIS

2 Kings 15 in the SBIIS2

2 Kings 15 in the SBIIS3

2 Kings 15 in the SBIKS

2 Kings 15 in the SBIKS2

2 Kings 15 in the SBIMS

2 Kings 15 in the SBIOS

2 Kings 15 in the SBIPS

2 Kings 15 in the SBISS

2 Kings 15 in the SBITS

2 Kings 15 in the SBITS2

2 Kings 15 in the SBITS3

2 Kings 15 in the SBITS4

2 Kings 15 in the SBIUS

2 Kings 15 in the SBIVS

2 Kings 15 in the SBT

2 Kings 15 in the SBT1E

2 Kings 15 in the SCHL

2 Kings 15 in the SNT

2 Kings 15 in the SUSU

2 Kings 15 in the SUSU2

2 Kings 15 in the SYNO

2 Kings 15 in the TBIAOTANT

2 Kings 15 in the TBT1E

2 Kings 15 in the TBT1E2

2 Kings 15 in the TFTIP

2 Kings 15 in the TFTU

2 Kings 15 in the TGNTATF3T

2 Kings 15 in the THAI

2 Kings 15 in the TNFD

2 Kings 15 in the TNT

2 Kings 15 in the TNTIK

2 Kings 15 in the TNTIL

2 Kings 15 in the TNTIN

2 Kings 15 in the TNTIP

2 Kings 15 in the TNTIZ

2 Kings 15 in the TOMA

2 Kings 15 in the TTENT

2 Kings 15 in the UBG

2 Kings 15 in the UGV

2 Kings 15 in the UGV2

2 Kings 15 in the UGV3

2 Kings 15 in the VBL

2 Kings 15 in the VDCC

2 Kings 15 in the YALU

2 Kings 15 in the YAPE

2 Kings 15 in the YBVTP

2 Kings 15 in the ZBP