2 Kings 19 (BOLCB2)

1 Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe. 2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki. 3 Balobaki na ye :— Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana. 4 Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. » 5 Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi, 6 Ezayi alobaki na bango :— Boloba na nkolo na bino : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai. 7 Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › » 8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina. 9 Sima na Senakeribe koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo : 10 « Boloba na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‹ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri ! › 11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ? 12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ? 13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? » 14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe. 15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele. 16 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ! Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi. 17 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo oyo mpe mikili na bango, 18 bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te kasi banzete to mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato. 19 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! » 20 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nayoki losambo na yo na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri. 21 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye :‹ Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo ;Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo. 22 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ?Nani oyo omatiselaki mongongompe otalaki na miso ya lolendo ?Ngai, Mosantu ya Isalaele ! 23 Na nzela ya bantoma na yo,ofingaki Nkolo mpe olobaki :‘ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai,namataki kino na basonge ya bangomba,na basonge oyo eleki likolo kati na Libani,nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi,banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko,mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka,na zamba na yango oyo eleki kitoko, 24 natimolaki mabulu ya mayi kati na mikili ya bapayampe namelaki mayi kuna.Na matambe ya makolo na ngai,nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ’ 25 Oyoka nanu yango te ?Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala,nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ;sik’oyo nde nakokisi yango ;esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga. 26 Bato na yango bazangi makasi,balengi na somo mpe bakomi na soni,bakomi lokola matiti ya bilanga,lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu,lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako,ekawuka liboso ete ekola. 27 Nayebi esika nini ozalaka,tango nini obimaka, tango nini ozongaka,mpe tango nini otombokelaka Ngai. 28 Lokola otombokelaka Ngai,mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai,nakotia lopete na Ngai na zolo na yo,nakokanga yo singa na bibebundenge bakangaka mpunda monoko,mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki. › 29 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo :Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobimana nkona oyo ekweyaki na mabele ;na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko.Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma,bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango. 30 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala,bakozala lisusu lokola nzeteoyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabelempe eboti bambuma. 31 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ;mpe na Siona, mwa ndambo bakobika.Bolingo makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango. 32 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri :‹ Akokota na engumba oyo te,akobeta kuna ata mbanzi moko te,akobundisa yango na banguba tempe akomatisa ata mabele te liboso na yangompo na komibomba ; 33 akozongela na nzela oyo ayelakimpe akokota na engumba oyo te,elobi Yawe. 34 Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango,mpo na lokumu ya Kombo na Ngaimpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › » 35 Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe. 36 Boye Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna. 37 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri, babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.

In Other Versions

2 Kings 19 in the ANGEFD

2 Kings 19 in the ANTPNG2D

2 Kings 19 in the AS21

2 Kings 19 in the BAGH

2 Kings 19 in the BBPNG

2 Kings 19 in the BBT1E

2 Kings 19 in the BDS

2 Kings 19 in the BEV

2 Kings 19 in the BHAD

2 Kings 19 in the BIB

2 Kings 19 in the BLPT

2 Kings 19 in the BNT

2 Kings 19 in the BNTABOOT

2 Kings 19 in the BNTLV

2 Kings 19 in the BOATCB

2 Kings 19 in the BOATCB2

2 Kings 19 in the BOBCV

2 Kings 19 in the BOCNT

2 Kings 19 in the BOECS

2 Kings 19 in the BOGWICC

2 Kings 19 in the BOHCB

2 Kings 19 in the BOHCV

2 Kings 19 in the BOHLNT

2 Kings 19 in the BOHNTLTAL

2 Kings 19 in the BOICB

2 Kings 19 in the BOILNTAP

2 Kings 19 in the BOITCV

2 Kings 19 in the BOKCV

2 Kings 19 in the BOKCV2

2 Kings 19 in the BOKHWOG

2 Kings 19 in the BOKSSV

2 Kings 19 in the BOLCB

2 Kings 19 in the BOMCV

2 Kings 19 in the BONAV

2 Kings 19 in the BONCB

2 Kings 19 in the BONLT

2 Kings 19 in the BONUT2

2 Kings 19 in the BOPLNT

2 Kings 19 in the BOSCB

2 Kings 19 in the BOSNC

2 Kings 19 in the BOTLNT

2 Kings 19 in the BOVCB

2 Kings 19 in the BOYCB

2 Kings 19 in the BPBB

2 Kings 19 in the BPH

2 Kings 19 in the BSB

2 Kings 19 in the CCB

2 Kings 19 in the CUV

2 Kings 19 in the CUVS

2 Kings 19 in the DBT

2 Kings 19 in the DGDNT

2 Kings 19 in the DHNT

2 Kings 19 in the DNT

2 Kings 19 in the ELBE

2 Kings 19 in the EMTV

2 Kings 19 in the ESV

2 Kings 19 in the FBV

2 Kings 19 in the FEB

2 Kings 19 in the GGMNT

2 Kings 19 in the GNT

2 Kings 19 in the HARY

2 Kings 19 in the HNT

2 Kings 19 in the IRVA

2 Kings 19 in the IRVB

2 Kings 19 in the IRVG

2 Kings 19 in the IRVH

2 Kings 19 in the IRVK

2 Kings 19 in the IRVM

2 Kings 19 in the IRVM2

2 Kings 19 in the IRVO

2 Kings 19 in the IRVP

2 Kings 19 in the IRVT

2 Kings 19 in the IRVT2

2 Kings 19 in the IRVU

2 Kings 19 in the ISVN

2 Kings 19 in the JSNT

2 Kings 19 in the KAPI

2 Kings 19 in the KBT1ETNIK

2 Kings 19 in the KBV

2 Kings 19 in the KJV

2 Kings 19 in the KNFD

2 Kings 19 in the LBA

2 Kings 19 in the LBLA

2 Kings 19 in the LNT

2 Kings 19 in the LSV

2 Kings 19 in the MAAL

2 Kings 19 in the MBV

2 Kings 19 in the MBV2

2 Kings 19 in the MHNT

2 Kings 19 in the MKNFD

2 Kings 19 in the MNG

2 Kings 19 in the MNT

2 Kings 19 in the MNT2

2 Kings 19 in the MRS1T

2 Kings 19 in the NAA

2 Kings 19 in the NASB

2 Kings 19 in the NBLA

2 Kings 19 in the NBS

2 Kings 19 in the NBVTP

2 Kings 19 in the NET2

2 Kings 19 in the NIV11

2 Kings 19 in the NNT

2 Kings 19 in the NNT2

2 Kings 19 in the NNT3

2 Kings 19 in the PDDPT

2 Kings 19 in the PFNT

2 Kings 19 in the RMNT

2 Kings 19 in the SBIAS

2 Kings 19 in the SBIBS

2 Kings 19 in the SBIBS2

2 Kings 19 in the SBICS

2 Kings 19 in the SBIDS

2 Kings 19 in the SBIGS

2 Kings 19 in the SBIHS

2 Kings 19 in the SBIIS

2 Kings 19 in the SBIIS2

2 Kings 19 in the SBIIS3

2 Kings 19 in the SBIKS

2 Kings 19 in the SBIKS2

2 Kings 19 in the SBIMS

2 Kings 19 in the SBIOS

2 Kings 19 in the SBIPS

2 Kings 19 in the SBISS

2 Kings 19 in the SBITS

2 Kings 19 in the SBITS2

2 Kings 19 in the SBITS3

2 Kings 19 in the SBITS4

2 Kings 19 in the SBIUS

2 Kings 19 in the SBIVS

2 Kings 19 in the SBT

2 Kings 19 in the SBT1E

2 Kings 19 in the SCHL

2 Kings 19 in the SNT

2 Kings 19 in the SUSU

2 Kings 19 in the SUSU2

2 Kings 19 in the SYNO

2 Kings 19 in the TBIAOTANT

2 Kings 19 in the TBT1E

2 Kings 19 in the TBT1E2

2 Kings 19 in the TFTIP

2 Kings 19 in the TFTU

2 Kings 19 in the TGNTATF3T

2 Kings 19 in the THAI

2 Kings 19 in the TNFD

2 Kings 19 in the TNT

2 Kings 19 in the TNTIK

2 Kings 19 in the TNTIL

2 Kings 19 in the TNTIN

2 Kings 19 in the TNTIP

2 Kings 19 in the TNTIZ

2 Kings 19 in the TOMA

2 Kings 19 in the TTENT

2 Kings 19 in the UBG

2 Kings 19 in the UGV

2 Kings 19 in the UGV2

2 Kings 19 in the UGV3

2 Kings 19 in the VBL

2 Kings 19 in the VDCC

2 Kings 19 in the YALU

2 Kings 19 in the YAPE

2 Kings 19 in the YBVTP

2 Kings 19 in the ZBP