2 Kings 20 (BOLCB2)
1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki :— Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. » 2 Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe : 3 — Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo.Mpe Ezekiasi alelaki mingi. 4 Liboso ete Ezayi akoma na lopango ya monene, Yawe alobaki na ye : 5 — Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe. 6 Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › » 7 Ezayi alobaki :— Bozwa liboke ya figi.Bazwaki yango, batiaki yango na pota oyo ezalaki kokawuka te, mpe mokonzi abikaki. 8 Ezekiasi atunaki Ezayi :— Elembo nini ekolakisa ngai ete Yawe akobikisa ngai, mpe ete nakokende na Tempelo ya Yawe sima na lobi ? 9 Ezayi azongisaki :— Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ? 10 Ezekiasi azongisaki :— Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi ; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi. 11 Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi. 12 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki. 13 Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango. 14 Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye :— Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ?Ezekiasi azongisaki :— Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni. 15 Ezayi atunaki :— Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi ?Ezekiasi azongisaki :— Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango. 16 Ezayi alobaki na Ezekiasi :— Yoka liloba oyo Yawe alobi : 17 « Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe. 18 Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. » 19 Ezekiasi azongiselaki Ezayi :— Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu.Pamba te azalaki komilobela : « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai ? » 20 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 21 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
In Other Versions
2 Kings 20 in the ANGEFD
2 Kings 20 in the ANTPNG2D
2 Kings 20 in the AS21
2 Kings 20 in the BAGH
2 Kings 20 in the BBPNG
2 Kings 20 in the BBT1E
2 Kings 20 in the BDS
2 Kings 20 in the BEV
2 Kings 20 in the BHAD
2 Kings 20 in the BIB
2 Kings 20 in the BLPT
2 Kings 20 in the BNT
2 Kings 20 in the BNTABOOT
2 Kings 20 in the BNTLV
2 Kings 20 in the BOATCB
2 Kings 20 in the BOATCB2
2 Kings 20 in the BOBCV
2 Kings 20 in the BOCNT
2 Kings 20 in the BOECS
2 Kings 20 in the BOGWICC
2 Kings 20 in the BOHCB
2 Kings 20 in the BOHCV
2 Kings 20 in the BOHLNT
2 Kings 20 in the BOHNTLTAL
2 Kings 20 in the BOICB
2 Kings 20 in the BOILNTAP
2 Kings 20 in the BOITCV
2 Kings 20 in the BOKCV
2 Kings 20 in the BOKCV2
2 Kings 20 in the BOKHWOG
2 Kings 20 in the BOKSSV
2 Kings 20 in the BOLCB
2 Kings 20 in the BOMCV
2 Kings 20 in the BONAV
2 Kings 20 in the BONCB
2 Kings 20 in the BONLT
2 Kings 20 in the BONUT2
2 Kings 20 in the BOPLNT
2 Kings 20 in the BOSCB
2 Kings 20 in the BOSNC
2 Kings 20 in the BOTLNT
2 Kings 20 in the BOVCB
2 Kings 20 in the BOYCB
2 Kings 20 in the BPBB
2 Kings 20 in the BPH
2 Kings 20 in the BSB
2 Kings 20 in the CCB
2 Kings 20 in the CUV
2 Kings 20 in the CUVS
2 Kings 20 in the DBT
2 Kings 20 in the DGDNT
2 Kings 20 in the DHNT
2 Kings 20 in the DNT
2 Kings 20 in the ELBE
2 Kings 20 in the EMTV
2 Kings 20 in the ESV
2 Kings 20 in the FBV
2 Kings 20 in the FEB
2 Kings 20 in the GGMNT
2 Kings 20 in the GNT
2 Kings 20 in the HARY
2 Kings 20 in the HNT
2 Kings 20 in the IRVA
2 Kings 20 in the IRVB
2 Kings 20 in the IRVG
2 Kings 20 in the IRVH
2 Kings 20 in the IRVK
2 Kings 20 in the IRVM
2 Kings 20 in the IRVM2
2 Kings 20 in the IRVO
2 Kings 20 in the IRVP
2 Kings 20 in the IRVT
2 Kings 20 in the IRVT2
2 Kings 20 in the IRVU
2 Kings 20 in the ISVN
2 Kings 20 in the JSNT
2 Kings 20 in the KAPI
2 Kings 20 in the KBT1ETNIK
2 Kings 20 in the KBV
2 Kings 20 in the KJV
2 Kings 20 in the KNFD
2 Kings 20 in the LBA
2 Kings 20 in the LBLA
2 Kings 20 in the LNT
2 Kings 20 in the LSV
2 Kings 20 in the MAAL
2 Kings 20 in the MBV
2 Kings 20 in the MBV2
2 Kings 20 in the MHNT
2 Kings 20 in the MKNFD
2 Kings 20 in the MNG
2 Kings 20 in the MNT
2 Kings 20 in the MNT2
2 Kings 20 in the MRS1T
2 Kings 20 in the NAA
2 Kings 20 in the NASB
2 Kings 20 in the NBLA
2 Kings 20 in the NBS
2 Kings 20 in the NBVTP
2 Kings 20 in the NET2
2 Kings 20 in the NIV11
2 Kings 20 in the NNT
2 Kings 20 in the NNT2
2 Kings 20 in the NNT3
2 Kings 20 in the PDDPT
2 Kings 20 in the PFNT
2 Kings 20 in the RMNT
2 Kings 20 in the SBIAS
2 Kings 20 in the SBIBS
2 Kings 20 in the SBIBS2
2 Kings 20 in the SBICS
2 Kings 20 in the SBIDS
2 Kings 20 in the SBIGS
2 Kings 20 in the SBIHS
2 Kings 20 in the SBIIS
2 Kings 20 in the SBIIS2
2 Kings 20 in the SBIIS3
2 Kings 20 in the SBIKS
2 Kings 20 in the SBIKS2
2 Kings 20 in the SBIMS
2 Kings 20 in the SBIOS
2 Kings 20 in the SBIPS
2 Kings 20 in the SBISS
2 Kings 20 in the SBITS
2 Kings 20 in the SBITS2
2 Kings 20 in the SBITS3
2 Kings 20 in the SBITS4
2 Kings 20 in the SBIUS
2 Kings 20 in the SBIVS
2 Kings 20 in the SBT
2 Kings 20 in the SBT1E
2 Kings 20 in the SCHL
2 Kings 20 in the SNT
2 Kings 20 in the SUSU
2 Kings 20 in the SUSU2
2 Kings 20 in the SYNO
2 Kings 20 in the TBIAOTANT
2 Kings 20 in the TBT1E
2 Kings 20 in the TBT1E2
2 Kings 20 in the TFTIP
2 Kings 20 in the TFTU
2 Kings 20 in the TGNTATF3T
2 Kings 20 in the THAI
2 Kings 20 in the TNFD
2 Kings 20 in the TNT
2 Kings 20 in the TNTIK
2 Kings 20 in the TNTIL
2 Kings 20 in the TNTIN
2 Kings 20 in the TNTIP
2 Kings 20 in the TNTIZ
2 Kings 20 in the TOMA
2 Kings 20 in the TTENT
2 Kings 20 in the UBG
2 Kings 20 in the UGV
2 Kings 20 in the UGV2
2 Kings 20 in the UGV3
2 Kings 20 in the VBL
2 Kings 20 in the VDCC
2 Kings 20 in the YALU
2 Kings 20 in the YAPE
2 Kings 20 in the YBVTP
2 Kings 20 in the ZBP