2 Kings 22 (BOLCB2)

1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati. 2 Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. 3 Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye : 4 — Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki. 5 Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango : 6 basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe. 7 Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene. 8 Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda :— Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe.Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango. 9 Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye :— Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango, 10 mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko.Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi. 11 Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye 12 mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi : 13 — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango. 14 Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo, 15 Ulida alobaki na bango :— Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai : 16 « Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga. 17 Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. » 18 Boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki : 19 Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe. 20 Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. »Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.

In Other Versions

2 Kings 22 in the ANGEFD

2 Kings 22 in the ANTPNG2D

2 Kings 22 in the AS21

2 Kings 22 in the BAGH

2 Kings 22 in the BBPNG

2 Kings 22 in the BBT1E

2 Kings 22 in the BDS

2 Kings 22 in the BEV

2 Kings 22 in the BHAD

2 Kings 22 in the BIB

2 Kings 22 in the BLPT

2 Kings 22 in the BNT

2 Kings 22 in the BNTABOOT

2 Kings 22 in the BNTLV

2 Kings 22 in the BOATCB

2 Kings 22 in the BOATCB2

2 Kings 22 in the BOBCV

2 Kings 22 in the BOCNT

2 Kings 22 in the BOECS

2 Kings 22 in the BOGWICC

2 Kings 22 in the BOHCB

2 Kings 22 in the BOHCV

2 Kings 22 in the BOHLNT

2 Kings 22 in the BOHNTLTAL

2 Kings 22 in the BOICB

2 Kings 22 in the BOILNTAP

2 Kings 22 in the BOITCV

2 Kings 22 in the BOKCV

2 Kings 22 in the BOKCV2

2 Kings 22 in the BOKHWOG

2 Kings 22 in the BOKSSV

2 Kings 22 in the BOLCB

2 Kings 22 in the BOMCV

2 Kings 22 in the BONAV

2 Kings 22 in the BONCB

2 Kings 22 in the BONLT

2 Kings 22 in the BONUT2

2 Kings 22 in the BOPLNT

2 Kings 22 in the BOSCB

2 Kings 22 in the BOSNC

2 Kings 22 in the BOTLNT

2 Kings 22 in the BOVCB

2 Kings 22 in the BOYCB

2 Kings 22 in the BPBB

2 Kings 22 in the BPH

2 Kings 22 in the BSB

2 Kings 22 in the CCB

2 Kings 22 in the CUV

2 Kings 22 in the CUVS

2 Kings 22 in the DBT

2 Kings 22 in the DGDNT

2 Kings 22 in the DHNT

2 Kings 22 in the DNT

2 Kings 22 in the ELBE

2 Kings 22 in the EMTV

2 Kings 22 in the ESV

2 Kings 22 in the FBV

2 Kings 22 in the FEB

2 Kings 22 in the GGMNT

2 Kings 22 in the GNT

2 Kings 22 in the HARY

2 Kings 22 in the HNT

2 Kings 22 in the IRVA

2 Kings 22 in the IRVB

2 Kings 22 in the IRVG

2 Kings 22 in the IRVH

2 Kings 22 in the IRVK

2 Kings 22 in the IRVM

2 Kings 22 in the IRVM2

2 Kings 22 in the IRVO

2 Kings 22 in the IRVP

2 Kings 22 in the IRVT

2 Kings 22 in the IRVT2

2 Kings 22 in the IRVU

2 Kings 22 in the ISVN

2 Kings 22 in the JSNT

2 Kings 22 in the KAPI

2 Kings 22 in the KBT1ETNIK

2 Kings 22 in the KBV

2 Kings 22 in the KJV

2 Kings 22 in the KNFD

2 Kings 22 in the LBA

2 Kings 22 in the LBLA

2 Kings 22 in the LNT

2 Kings 22 in the LSV

2 Kings 22 in the MAAL

2 Kings 22 in the MBV

2 Kings 22 in the MBV2

2 Kings 22 in the MHNT

2 Kings 22 in the MKNFD

2 Kings 22 in the MNG

2 Kings 22 in the MNT

2 Kings 22 in the MNT2

2 Kings 22 in the MRS1T

2 Kings 22 in the NAA

2 Kings 22 in the NASB

2 Kings 22 in the NBLA

2 Kings 22 in the NBS

2 Kings 22 in the NBVTP

2 Kings 22 in the NET2

2 Kings 22 in the NIV11

2 Kings 22 in the NNT

2 Kings 22 in the NNT2

2 Kings 22 in the NNT3

2 Kings 22 in the PDDPT

2 Kings 22 in the PFNT

2 Kings 22 in the RMNT

2 Kings 22 in the SBIAS

2 Kings 22 in the SBIBS

2 Kings 22 in the SBIBS2

2 Kings 22 in the SBICS

2 Kings 22 in the SBIDS

2 Kings 22 in the SBIGS

2 Kings 22 in the SBIHS

2 Kings 22 in the SBIIS

2 Kings 22 in the SBIIS2

2 Kings 22 in the SBIIS3

2 Kings 22 in the SBIKS

2 Kings 22 in the SBIKS2

2 Kings 22 in the SBIMS

2 Kings 22 in the SBIOS

2 Kings 22 in the SBIPS

2 Kings 22 in the SBISS

2 Kings 22 in the SBITS

2 Kings 22 in the SBITS2

2 Kings 22 in the SBITS3

2 Kings 22 in the SBITS4

2 Kings 22 in the SBIUS

2 Kings 22 in the SBIVS

2 Kings 22 in the SBT

2 Kings 22 in the SBT1E

2 Kings 22 in the SCHL

2 Kings 22 in the SNT

2 Kings 22 in the SUSU

2 Kings 22 in the SUSU2

2 Kings 22 in the SYNO

2 Kings 22 in the TBIAOTANT

2 Kings 22 in the TBT1E

2 Kings 22 in the TBT1E2

2 Kings 22 in the TFTIP

2 Kings 22 in the TFTU

2 Kings 22 in the TGNTATF3T

2 Kings 22 in the THAI

2 Kings 22 in the TNFD

2 Kings 22 in the TNT

2 Kings 22 in the TNTIK

2 Kings 22 in the TNTIL

2 Kings 22 in the TNTIN

2 Kings 22 in the TNTIP

2 Kings 22 in the TNTIZ

2 Kings 22 in the TOMA

2 Kings 22 in the TTENT

2 Kings 22 in the UBG

2 Kings 22 in the UGV

2 Kings 22 in the UGV2

2 Kings 22 in the UGV3

2 Kings 22 in the VBL

2 Kings 22 in the VDCC

2 Kings 22 in the YALU

2 Kings 22 in the YAPE

2 Kings 22 in the YBVTP

2 Kings 22 in the ZBP