2 Samuel 4 (BOLCB2)

1 Tango Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, ayokaki ete Abineri akufi na Ebron, alembaki nzoto, mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na somo makasi. 2 Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame, 3 pamba te bato ya Beyeroti bakimelaki na Gitayimi mpe bavandaki kuna lokola bapaya kino na mokolo ya lelo. 4 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. » 5 Rekabi mpe Baana, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, bakendeki na ndako ya Ishi-Bosheti mpe bakomaki kuna na ngonga ya midi, wana azalaki kolala mpo na kopema. 6 6-7 Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto ; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki. 8 Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi :— Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye. 9 Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti :— Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso 10 tango moto moko ayebisaki ngai ete Saulo akufi, wana akanisaki ete amemeli ngai sango malamu. Nakangaki ye mpe nabomaki ye, na Tsikilagi. Ezalaki lifuti oyo napesaki ye mpo na sango na ye. 11 Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili ? 12 Boye Davidi apesaki mitindo ; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron.

In Other Versions

2 Samuel 4 in the ANGEFD

2 Samuel 4 in the ANTPNG2D

2 Samuel 4 in the AS21

2 Samuel 4 in the BAGH

2 Samuel 4 in the BBPNG

2 Samuel 4 in the BBT1E

2 Samuel 4 in the BDS

2 Samuel 4 in the BEV

2 Samuel 4 in the BHAD

2 Samuel 4 in the BIB

2 Samuel 4 in the BLPT

2 Samuel 4 in the BNT

2 Samuel 4 in the BNTABOOT

2 Samuel 4 in the BNTLV

2 Samuel 4 in the BOATCB

2 Samuel 4 in the BOATCB2

2 Samuel 4 in the BOBCV

2 Samuel 4 in the BOCNT

2 Samuel 4 in the BOECS

2 Samuel 4 in the BOGWICC

2 Samuel 4 in the BOHCB

2 Samuel 4 in the BOHCV

2 Samuel 4 in the BOHLNT

2 Samuel 4 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 4 in the BOICB

2 Samuel 4 in the BOILNTAP

2 Samuel 4 in the BOITCV

2 Samuel 4 in the BOKCV

2 Samuel 4 in the BOKCV2

2 Samuel 4 in the BOKHWOG

2 Samuel 4 in the BOKSSV

2 Samuel 4 in the BOLCB

2 Samuel 4 in the BOMCV

2 Samuel 4 in the BONAV

2 Samuel 4 in the BONCB

2 Samuel 4 in the BONLT

2 Samuel 4 in the BONUT2

2 Samuel 4 in the BOPLNT

2 Samuel 4 in the BOSCB

2 Samuel 4 in the BOSNC

2 Samuel 4 in the BOTLNT

2 Samuel 4 in the BOVCB

2 Samuel 4 in the BOYCB

2 Samuel 4 in the BPBB

2 Samuel 4 in the BPH

2 Samuel 4 in the BSB

2 Samuel 4 in the CCB

2 Samuel 4 in the CUV

2 Samuel 4 in the CUVS

2 Samuel 4 in the DBT

2 Samuel 4 in the DGDNT

2 Samuel 4 in the DHNT

2 Samuel 4 in the DNT

2 Samuel 4 in the ELBE

2 Samuel 4 in the EMTV

2 Samuel 4 in the ESV

2 Samuel 4 in the FBV

2 Samuel 4 in the FEB

2 Samuel 4 in the GGMNT

2 Samuel 4 in the GNT

2 Samuel 4 in the HARY

2 Samuel 4 in the HNT

2 Samuel 4 in the IRVA

2 Samuel 4 in the IRVB

2 Samuel 4 in the IRVG

2 Samuel 4 in the IRVH

2 Samuel 4 in the IRVK

2 Samuel 4 in the IRVM

2 Samuel 4 in the IRVM2

2 Samuel 4 in the IRVO

2 Samuel 4 in the IRVP

2 Samuel 4 in the IRVT

2 Samuel 4 in the IRVT2

2 Samuel 4 in the IRVU

2 Samuel 4 in the ISVN

2 Samuel 4 in the JSNT

2 Samuel 4 in the KAPI

2 Samuel 4 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 4 in the KBV

2 Samuel 4 in the KJV

2 Samuel 4 in the KNFD

2 Samuel 4 in the LBA

2 Samuel 4 in the LBLA

2 Samuel 4 in the LNT

2 Samuel 4 in the LSV

2 Samuel 4 in the MAAL

2 Samuel 4 in the MBV

2 Samuel 4 in the MBV2

2 Samuel 4 in the MHNT

2 Samuel 4 in the MKNFD

2 Samuel 4 in the MNG

2 Samuel 4 in the MNT

2 Samuel 4 in the MNT2

2 Samuel 4 in the MRS1T

2 Samuel 4 in the NAA

2 Samuel 4 in the NASB

2 Samuel 4 in the NBLA

2 Samuel 4 in the NBS

2 Samuel 4 in the NBVTP

2 Samuel 4 in the NET2

2 Samuel 4 in the NIV11

2 Samuel 4 in the NNT

2 Samuel 4 in the NNT2

2 Samuel 4 in the NNT3

2 Samuel 4 in the PDDPT

2 Samuel 4 in the PFNT

2 Samuel 4 in the RMNT

2 Samuel 4 in the SBIAS

2 Samuel 4 in the SBIBS

2 Samuel 4 in the SBIBS2

2 Samuel 4 in the SBICS

2 Samuel 4 in the SBIDS

2 Samuel 4 in the SBIGS

2 Samuel 4 in the SBIHS

2 Samuel 4 in the SBIIS

2 Samuel 4 in the SBIIS2

2 Samuel 4 in the SBIIS3

2 Samuel 4 in the SBIKS

2 Samuel 4 in the SBIKS2

2 Samuel 4 in the SBIMS

2 Samuel 4 in the SBIOS

2 Samuel 4 in the SBIPS

2 Samuel 4 in the SBISS

2 Samuel 4 in the SBITS

2 Samuel 4 in the SBITS2

2 Samuel 4 in the SBITS3

2 Samuel 4 in the SBITS4

2 Samuel 4 in the SBIUS

2 Samuel 4 in the SBIVS

2 Samuel 4 in the SBT

2 Samuel 4 in the SBT1E

2 Samuel 4 in the SCHL

2 Samuel 4 in the SNT

2 Samuel 4 in the SUSU

2 Samuel 4 in the SUSU2

2 Samuel 4 in the SYNO

2 Samuel 4 in the TBIAOTANT

2 Samuel 4 in the TBT1E

2 Samuel 4 in the TBT1E2

2 Samuel 4 in the TFTIP

2 Samuel 4 in the TFTU

2 Samuel 4 in the TGNTATF3T

2 Samuel 4 in the THAI

2 Samuel 4 in the TNFD

2 Samuel 4 in the TNT

2 Samuel 4 in the TNTIK

2 Samuel 4 in the TNTIL

2 Samuel 4 in the TNTIN

2 Samuel 4 in the TNTIP

2 Samuel 4 in the TNTIZ

2 Samuel 4 in the TOMA

2 Samuel 4 in the TTENT

2 Samuel 4 in the UBG

2 Samuel 4 in the UGV

2 Samuel 4 in the UGV2

2 Samuel 4 in the UGV3

2 Samuel 4 in the VBL

2 Samuel 4 in the VDCC

2 Samuel 4 in the YALU

2 Samuel 4 in the YAPE

2 Samuel 4 in the YBVTP

2 Samuel 4 in the ZBP