2 Samuel 5 (BOLCB2)

1 Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko. 2 Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › » 3 Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. 4 Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei : 5 mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron ; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi. 6 Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. »Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te. 7 Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi. 8 Na mokolo wana, Davidi alobaki : « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka : « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. » 9 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati. 10 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye. 11 Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako. 12 Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye. 13 Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 14 Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo, 15 Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia, 16 Elishama, Eliyada mpe Elifeleti. 17 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi. 18 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi. 19 Davidi atunaki Yawe :— Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ?Yawe azongiselaki ye :— Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo. 20 Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki : « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. »Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi. 21 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango. 22 Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi. 23 Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie. 24 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. » 25 Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri.

In Other Versions

2 Samuel 5 in the ANGEFD

2 Samuel 5 in the ANTPNG2D

2 Samuel 5 in the AS21

2 Samuel 5 in the BAGH

2 Samuel 5 in the BBPNG

2 Samuel 5 in the BBT1E

2 Samuel 5 in the BDS

2 Samuel 5 in the BEV

2 Samuel 5 in the BHAD

2 Samuel 5 in the BIB

2 Samuel 5 in the BLPT

2 Samuel 5 in the BNT

2 Samuel 5 in the BNTABOOT

2 Samuel 5 in the BNTLV

2 Samuel 5 in the BOATCB

2 Samuel 5 in the BOATCB2

2 Samuel 5 in the BOBCV

2 Samuel 5 in the BOCNT

2 Samuel 5 in the BOECS

2 Samuel 5 in the BOGWICC

2 Samuel 5 in the BOHCB

2 Samuel 5 in the BOHCV

2 Samuel 5 in the BOHLNT

2 Samuel 5 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 5 in the BOICB

2 Samuel 5 in the BOILNTAP

2 Samuel 5 in the BOITCV

2 Samuel 5 in the BOKCV

2 Samuel 5 in the BOKCV2

2 Samuel 5 in the BOKHWOG

2 Samuel 5 in the BOKSSV

2 Samuel 5 in the BOLCB

2 Samuel 5 in the BOMCV

2 Samuel 5 in the BONAV

2 Samuel 5 in the BONCB

2 Samuel 5 in the BONLT

2 Samuel 5 in the BONUT2

2 Samuel 5 in the BOPLNT

2 Samuel 5 in the BOSCB

2 Samuel 5 in the BOSNC

2 Samuel 5 in the BOTLNT

2 Samuel 5 in the BOVCB

2 Samuel 5 in the BOYCB

2 Samuel 5 in the BPBB

2 Samuel 5 in the BPH

2 Samuel 5 in the BSB

2 Samuel 5 in the CCB

2 Samuel 5 in the CUV

2 Samuel 5 in the CUVS

2 Samuel 5 in the DBT

2 Samuel 5 in the DGDNT

2 Samuel 5 in the DHNT

2 Samuel 5 in the DNT

2 Samuel 5 in the ELBE

2 Samuel 5 in the EMTV

2 Samuel 5 in the ESV

2 Samuel 5 in the FBV

2 Samuel 5 in the FEB

2 Samuel 5 in the GGMNT

2 Samuel 5 in the GNT

2 Samuel 5 in the HARY

2 Samuel 5 in the HNT

2 Samuel 5 in the IRVA

2 Samuel 5 in the IRVB

2 Samuel 5 in the IRVG

2 Samuel 5 in the IRVH

2 Samuel 5 in the IRVK

2 Samuel 5 in the IRVM

2 Samuel 5 in the IRVM2

2 Samuel 5 in the IRVO

2 Samuel 5 in the IRVP

2 Samuel 5 in the IRVT

2 Samuel 5 in the IRVT2

2 Samuel 5 in the IRVU

2 Samuel 5 in the ISVN

2 Samuel 5 in the JSNT

2 Samuel 5 in the KAPI

2 Samuel 5 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 5 in the KBV

2 Samuel 5 in the KJV

2 Samuel 5 in the KNFD

2 Samuel 5 in the LBA

2 Samuel 5 in the LBLA

2 Samuel 5 in the LNT

2 Samuel 5 in the LSV

2 Samuel 5 in the MAAL

2 Samuel 5 in the MBV

2 Samuel 5 in the MBV2

2 Samuel 5 in the MHNT

2 Samuel 5 in the MKNFD

2 Samuel 5 in the MNG

2 Samuel 5 in the MNT

2 Samuel 5 in the MNT2

2 Samuel 5 in the MRS1T

2 Samuel 5 in the NAA

2 Samuel 5 in the NASB

2 Samuel 5 in the NBLA

2 Samuel 5 in the NBS

2 Samuel 5 in the NBVTP

2 Samuel 5 in the NET2

2 Samuel 5 in the NIV11

2 Samuel 5 in the NNT

2 Samuel 5 in the NNT2

2 Samuel 5 in the NNT3

2 Samuel 5 in the PDDPT

2 Samuel 5 in the PFNT

2 Samuel 5 in the RMNT

2 Samuel 5 in the SBIAS

2 Samuel 5 in the SBIBS

2 Samuel 5 in the SBIBS2

2 Samuel 5 in the SBICS

2 Samuel 5 in the SBIDS

2 Samuel 5 in the SBIGS

2 Samuel 5 in the SBIHS

2 Samuel 5 in the SBIIS

2 Samuel 5 in the SBIIS2

2 Samuel 5 in the SBIIS3

2 Samuel 5 in the SBIKS

2 Samuel 5 in the SBIKS2

2 Samuel 5 in the SBIMS

2 Samuel 5 in the SBIOS

2 Samuel 5 in the SBIPS

2 Samuel 5 in the SBISS

2 Samuel 5 in the SBITS

2 Samuel 5 in the SBITS2

2 Samuel 5 in the SBITS3

2 Samuel 5 in the SBITS4

2 Samuel 5 in the SBIUS

2 Samuel 5 in the SBIVS

2 Samuel 5 in the SBT

2 Samuel 5 in the SBT1E

2 Samuel 5 in the SCHL

2 Samuel 5 in the SNT

2 Samuel 5 in the SUSU

2 Samuel 5 in the SUSU2

2 Samuel 5 in the SYNO

2 Samuel 5 in the TBIAOTANT

2 Samuel 5 in the TBT1E

2 Samuel 5 in the TBT1E2

2 Samuel 5 in the TFTIP

2 Samuel 5 in the TFTU

2 Samuel 5 in the TGNTATF3T

2 Samuel 5 in the THAI

2 Samuel 5 in the TNFD

2 Samuel 5 in the TNT

2 Samuel 5 in the TNTIK

2 Samuel 5 in the TNTIL

2 Samuel 5 in the TNTIN

2 Samuel 5 in the TNTIP

2 Samuel 5 in the TNTIZ

2 Samuel 5 in the TOMA

2 Samuel 5 in the TTENT

2 Samuel 5 in the UBG

2 Samuel 5 in the UGV

2 Samuel 5 in the UGV2

2 Samuel 5 in the UGV3

2 Samuel 5 in the VBL

2 Samuel 5 in the VDCC

2 Samuel 5 in the YALU

2 Samuel 5 in the YAPE

2 Samuel 5 in the YBVTP

2 Samuel 5 in the ZBP