Daniel 8 (BOLCB2)

1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya mokonzi Balitazari, ngai, Daniele, nazwaki emoniseli moko ya sika, sima na oyo nazwaki liboso. 2 Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi. 3 Natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki, liboso na ngai, meme moko ya mobali etelemi pembeni ya moluka ; ezalaki na maseke mibale ya milayi makasi, kasi moko kati na maseke yango, oyo ebotaki sima, elekaki mosusu na molayi. 4 Bongo, namonaki meme ya mobali ezali kobeta na ngambo ya weste, ya nor mpe na sude. Nyama moko te ekokaki kobundisa yango mpe moto moko te akokaki kokangola soki ekangi yango. Ezalaki kosala nyonso oyo yango elingi mpe ezalaki kokola. 5 Wana nazalaki kokanisa na tina na yango, ntaba moko ya mobali eyaki wuta na ngambo ya weste ; ezalaki kotambola mabele mobimba na kozanga konyata yango. Ntaba yango ya mobali ezalaki na liseke moko ya monene na kati-kati ya miso na yango ; 6 eyaki kino epai ya meme ya mobali oyo namonaki etelemi pembeni ya moluka mpe ezalaki na maseke mibale ; ebetaki yango makasi, na maseki te. 7 Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale ; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango ; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana. 8 Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo. 9 Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko. 10 Ekolaki lisusu kino na mampinga ya likolo, ebwakaki na mabele ndambo ya mampinga yango mpe ndambo ya minzoto, mpe enyataki yango. 11 Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango. 12 Likolo ya botomboki ya bato liboso ya Nzambe, mampinga ya likolo ekomaki na se ya bokonzi ya liseke elongo na mbeka ya mokolo na mokolo. Liseke yango ezalaki kolonga na makambo nyonso oyo ezalaki kosala mpe ebwakaki solo na mabele. 13 Nayokaki mosantu moko koloba, mpe mosantu mosusu kotuna ye :— Makambo oyo etalisami na emoniseli ekosala mikolo boni ? Mbeka ya mokolo na mokolo ekopesama lisusu te mikolo boni ? Botomboki oyo ememaka pasi ekosala mikolo boni ? Mikolo boni Esika ya bule mpe mampinga ekotiama na se ya matambe ? 14 Alobaki na ngai :— Ekosalema bapokwa nkoto moko na nkama moko na tuku mitano mpe batongo nkoto moko na nkama moko na tuku mitano ; sima na yango nde Esika ya bule ekobulisama lisusu mpo na losambo. 15 Wana ngai, Daniele, nazalaki komona emoniseli yango na makanisi mpe koluka kososola yango, namonaki lokola moto moko atelemi liboso na ngai. 16 Nayokaki mongongo moko lokola ya moto wuta na kati-kati ya moluka Ulayi ; ezalaki kobelela :— Gabrieli, limbolela moto oyo emoniseli. 17 Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai :— Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango. 18 Wana azalaki koloba na ngai, nakomaki na pongi moko ya makasi, mpe nakweyaki elongi kino na mabele ; kasi asimbaki ngai mpe atelemisaki ngai, kaka na esika oyo nazalaki. 19 Bongo, alobaki na ngai :— Nakoyebisa yo makambo oyo ekosalema na sima na tango ya kanda ya Nzambe, pamba te emoniseli oyo etali tango oyo ekatama mpo na mikolo ya suka. 20 Maseke mibale ya meme ya mobali oyo omonaki ezali kolakisa bakonzi ya Medi mpe ya Persi. 21 Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso. 22 Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango : ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te. 23 Na suka ya bokonzi na yango, tango batomboki bakokolisa mabe na bango kino na suka, mokonzi moko ya motema makasi mpe ya mayele mabe akobima ; 24 akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala ; akoboma bato ya makasi mpe basantu. 25 Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu ; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te. 26 Emoniseli ya bapokwa mpe ya batongo oyo epesamelaki yo ezali ya solo, kasi bomba yango malamu, pamba te etali makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. 27 Ngai, Daniele, nalembaki penza nzoto mpe nabelaki mikolo ebele. Sima na yango, natelemaki mpe nazongelaki kolandela misala ya mokonzi. Emoniseli oyo nazwaki ekamwisaki ngai mpe nazalaki kososola yango te.

In Other Versions

Daniel 8 in the ANGEFD

Daniel 8 in the ANTPNG2D

Daniel 8 in the AS21

Daniel 8 in the BAGH

Daniel 8 in the BBPNG

Daniel 8 in the BBT1E

Daniel 8 in the BDS

Daniel 8 in the BEV

Daniel 8 in the BHAD

Daniel 8 in the BIB

Daniel 8 in the BLPT

Daniel 8 in the BNT

Daniel 8 in the BNTABOOT

Daniel 8 in the BNTLV

Daniel 8 in the BOATCB

Daniel 8 in the BOATCB2

Daniel 8 in the BOBCV

Daniel 8 in the BOCNT

Daniel 8 in the BOECS

Daniel 8 in the BOGWICC

Daniel 8 in the BOHCB

Daniel 8 in the BOHCV

Daniel 8 in the BOHLNT

Daniel 8 in the BOHNTLTAL

Daniel 8 in the BOICB

Daniel 8 in the BOILNTAP

Daniel 8 in the BOITCV

Daniel 8 in the BOKCV

Daniel 8 in the BOKCV2

Daniel 8 in the BOKHWOG

Daniel 8 in the BOKSSV

Daniel 8 in the BOLCB

Daniel 8 in the BOMCV

Daniel 8 in the BONAV

Daniel 8 in the BONCB

Daniel 8 in the BONLT

Daniel 8 in the BONUT2

Daniel 8 in the BOPLNT

Daniel 8 in the BOSCB

Daniel 8 in the BOSNC

Daniel 8 in the BOTLNT

Daniel 8 in the BOVCB

Daniel 8 in the BOYCB

Daniel 8 in the BPBB

Daniel 8 in the BPH

Daniel 8 in the BSB

Daniel 8 in the CCB

Daniel 8 in the CUV

Daniel 8 in the CUVS

Daniel 8 in the DBT

Daniel 8 in the DGDNT

Daniel 8 in the DHNT

Daniel 8 in the DNT

Daniel 8 in the ELBE

Daniel 8 in the EMTV

Daniel 8 in the ESV

Daniel 8 in the FBV

Daniel 8 in the FEB

Daniel 8 in the GGMNT

Daniel 8 in the GNT

Daniel 8 in the HARY

Daniel 8 in the HNT

Daniel 8 in the IRVA

Daniel 8 in the IRVB

Daniel 8 in the IRVG

Daniel 8 in the IRVH

Daniel 8 in the IRVK

Daniel 8 in the IRVM

Daniel 8 in the IRVM2

Daniel 8 in the IRVO

Daniel 8 in the IRVP

Daniel 8 in the IRVT

Daniel 8 in the IRVT2

Daniel 8 in the IRVU

Daniel 8 in the ISVN

Daniel 8 in the JSNT

Daniel 8 in the KAPI

Daniel 8 in the KBT1ETNIK

Daniel 8 in the KBV

Daniel 8 in the KJV

Daniel 8 in the KNFD

Daniel 8 in the LBA

Daniel 8 in the LBLA

Daniel 8 in the LNT

Daniel 8 in the LSV

Daniel 8 in the MAAL

Daniel 8 in the MBV

Daniel 8 in the MBV2

Daniel 8 in the MHNT

Daniel 8 in the MKNFD

Daniel 8 in the MNG

Daniel 8 in the MNT

Daniel 8 in the MNT2

Daniel 8 in the MRS1T

Daniel 8 in the NAA

Daniel 8 in the NASB

Daniel 8 in the NBLA

Daniel 8 in the NBS

Daniel 8 in the NBVTP

Daniel 8 in the NET2

Daniel 8 in the NIV11

Daniel 8 in the NNT

Daniel 8 in the NNT2

Daniel 8 in the NNT3

Daniel 8 in the PDDPT

Daniel 8 in the PFNT

Daniel 8 in the RMNT

Daniel 8 in the SBIAS

Daniel 8 in the SBIBS

Daniel 8 in the SBIBS2

Daniel 8 in the SBICS

Daniel 8 in the SBIDS

Daniel 8 in the SBIGS

Daniel 8 in the SBIHS

Daniel 8 in the SBIIS

Daniel 8 in the SBIIS2

Daniel 8 in the SBIIS3

Daniel 8 in the SBIKS

Daniel 8 in the SBIKS2

Daniel 8 in the SBIMS

Daniel 8 in the SBIOS

Daniel 8 in the SBIPS

Daniel 8 in the SBISS

Daniel 8 in the SBITS

Daniel 8 in the SBITS2

Daniel 8 in the SBITS3

Daniel 8 in the SBITS4

Daniel 8 in the SBIUS

Daniel 8 in the SBIVS

Daniel 8 in the SBT

Daniel 8 in the SBT1E

Daniel 8 in the SCHL

Daniel 8 in the SNT

Daniel 8 in the SUSU

Daniel 8 in the SUSU2

Daniel 8 in the SYNO

Daniel 8 in the TBIAOTANT

Daniel 8 in the TBT1E

Daniel 8 in the TBT1E2

Daniel 8 in the TFTIP

Daniel 8 in the TFTU

Daniel 8 in the TGNTATF3T

Daniel 8 in the THAI

Daniel 8 in the TNFD

Daniel 8 in the TNT

Daniel 8 in the TNTIK

Daniel 8 in the TNTIL

Daniel 8 in the TNTIN

Daniel 8 in the TNTIP

Daniel 8 in the TNTIZ

Daniel 8 in the TOMA

Daniel 8 in the TTENT

Daniel 8 in the UBG

Daniel 8 in the UGV

Daniel 8 in the UGV2

Daniel 8 in the UGV3

Daniel 8 in the VBL

Daniel 8 in the VDCC

Daniel 8 in the YALU

Daniel 8 in the YAPE

Daniel 8 in the YBVTP

Daniel 8 in the ZBP