Daniel 9 (BOLCB2)

1 Na mobu ya liboso ya Dariusi, mwana mobali ya Kizerisesi, moko kati na bakitani ya bato ya Medi, oyo akomaki mokonzi ya mokili ya bato ya Babiloni ; 2 na mobu ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Daniele, nasosolaki, na nzela ya mikanda, kolanda liloba oyo Yawe apesaki na mosakoli Jeremi, ete kobebisama ya engumba Yelusalemi esengeli kosala mibu tuku sambo. 3 Boye, nabalolaki elongi na ngai epai na Nkolo Nzambe mpo na kosambela mpe kobondela Ye, na kokila bilei, na kolata basaki mpe na komipakola putulu. 4 Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki : « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo ; 5 solo, tosalaki masumu mpe mabe na miso na Yo, totambolaki lokola bato mabe mpe batomboki, topesaki mibeko mpe mitindo na Yo mokongo. 6 Toyokelaki te basali na Yo, basakoli, oyo balobaki na Kombo na Yo epai ya bakonzi na biso, bakambi na biso, bakoko na biso mpe epai ya bato nyonso ya mokili. 7 Nkolo, ozali sembo ; kasi biso, lelo, tolatisami na soni : bato ya Yuda, bavandi ya Yelusalemi mpe bana nyonso ya Isalaele, ezala ba-oyo bazali pembeni to ba-oyo bazali mosika, kati na mikili nyonso epai wapi opanzaki biso mpo ete tozangaki boyengebene liboso na Yo ! 8 Yawe, biso, bakonzi na biso, bakambi na biso mpe bakoko na biso, tolatisami na soni mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo. 9 Kasi Yo Nkolo, Nzambe na biso, otonda na mawa mpe olimbisaka, atako biso, totombokelaki Yo. 10 Totosaki te Yawe, Nzambe na biso, to tobatelaki te mibeko oyo opesaki biso na nzela ya basali na Yo, basakoli. 11 Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo.Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo. 12 Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba. 13 Kolanda ndenge kaka ekomama kati na Mobeko ya Moyize, pasi yango nyonso ekomeli biso ; mpe tobondelaki te Yawe, Nzambe na biso ; totikaki te kosala masumu mpe tomipesaki te mpo na kososola bosolo na Yo. 14 Yango wana, Yawe, olandeli pasi yango kino okweyiseli biso yango ; pamba te Yawe, Nzambe na biso, ozali sembo kati na misala na Yo nyonso ; kasi biso, totosaki Yo te. 15 Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe ! 16 Nkolo, nabondeli Yo, kolanda makambo nyonso oyo osalaka mpo na bosembo, kanda mpe kotomboka na Yo ezali kolongwa kati na engumba na Yo, Yelusalemi, ngomba na Yo ya bule ! likolo ya masumu na biso mpe ya mabe ya bakoko na biso, Yelusalemi mpe bato na Yo bakomi eloko ya liseki na miso ya bato nyonso oyo bazingeli biso. 17 Sik’oyo, Nzambe na biso, yoka losambo mpe mabondeli na ngai, mosali na Yo ! Mpo na lokumu na Yo, Nkolo, tala na miso ya ngolu Esika na Yo ya bule oyo ebebi ! 18 Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo ! 19 Nkolo, yoka ! Nkolo, limbisa ! Nkolo, yoka na bokebi ! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai ! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo ! » 20 Wana nazalaki koloba mpe kosambela, kotubela masumu na ngai mpe ya bato na ngai, Isalaele, mpe kobondela Yawe, Nzambe na ngai, mpo na bolamu ya ngomba ya bule ya Nzambe na ngai ; 21 wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa. 22 Apesaki ngai malako, alobaki : « Daniele, nayei sik’oyo mpo na kopesa yo bososoli mpe mayele. 23 Tango kaka obandaki kobondela, liloba moko ebimaki ; mpe ngai, nayei koyebisa yo yango, pamba te ozali molingami ya Nzambe. Yamba liloba mpe sosola emoniseli : 24 Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu. 25 Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi. 26 Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama. 27 Na poso moko, akosala boyokani moko elenda elongo na bato ebele ; kasi na kati-kati ya poso yango, akosukisa bambeka mpe makabo. Likolo ya kobomba makambo ya nkele, mobebisi moko akobima kino tango libebi oyo ekatama mpo na mobebisi ekokokisama. »

In Other Versions

Daniel 9 in the ANGEFD

Daniel 9 in the ANTPNG2D

Daniel 9 in the AS21

Daniel 9 in the BAGH

Daniel 9 in the BBPNG

Daniel 9 in the BBT1E

Daniel 9 in the BDS

Daniel 9 in the BEV

Daniel 9 in the BHAD

Daniel 9 in the BIB

Daniel 9 in the BLPT

Daniel 9 in the BNT

Daniel 9 in the BNTABOOT

Daniel 9 in the BNTLV

Daniel 9 in the BOATCB

Daniel 9 in the BOATCB2

Daniel 9 in the BOBCV

Daniel 9 in the BOCNT

Daniel 9 in the BOECS

Daniel 9 in the BOGWICC

Daniel 9 in the BOHCB

Daniel 9 in the BOHCV

Daniel 9 in the BOHLNT

Daniel 9 in the BOHNTLTAL

Daniel 9 in the BOICB

Daniel 9 in the BOILNTAP

Daniel 9 in the BOITCV

Daniel 9 in the BOKCV

Daniel 9 in the BOKCV2

Daniel 9 in the BOKHWOG

Daniel 9 in the BOKSSV

Daniel 9 in the BOLCB

Daniel 9 in the BOMCV

Daniel 9 in the BONAV

Daniel 9 in the BONCB

Daniel 9 in the BONLT

Daniel 9 in the BONUT2

Daniel 9 in the BOPLNT

Daniel 9 in the BOSCB

Daniel 9 in the BOSNC

Daniel 9 in the BOTLNT

Daniel 9 in the BOVCB

Daniel 9 in the BOYCB

Daniel 9 in the BPBB

Daniel 9 in the BPH

Daniel 9 in the BSB

Daniel 9 in the CCB

Daniel 9 in the CUV

Daniel 9 in the CUVS

Daniel 9 in the DBT

Daniel 9 in the DGDNT

Daniel 9 in the DHNT

Daniel 9 in the DNT

Daniel 9 in the ELBE

Daniel 9 in the EMTV

Daniel 9 in the ESV

Daniel 9 in the FBV

Daniel 9 in the FEB

Daniel 9 in the GGMNT

Daniel 9 in the GNT

Daniel 9 in the HARY

Daniel 9 in the HNT

Daniel 9 in the IRVA

Daniel 9 in the IRVB

Daniel 9 in the IRVG

Daniel 9 in the IRVH

Daniel 9 in the IRVK

Daniel 9 in the IRVM

Daniel 9 in the IRVM2

Daniel 9 in the IRVO

Daniel 9 in the IRVP

Daniel 9 in the IRVT

Daniel 9 in the IRVT2

Daniel 9 in the IRVU

Daniel 9 in the ISVN

Daniel 9 in the JSNT

Daniel 9 in the KAPI

Daniel 9 in the KBT1ETNIK

Daniel 9 in the KBV

Daniel 9 in the KJV

Daniel 9 in the KNFD

Daniel 9 in the LBA

Daniel 9 in the LBLA

Daniel 9 in the LNT

Daniel 9 in the LSV

Daniel 9 in the MAAL

Daniel 9 in the MBV

Daniel 9 in the MBV2

Daniel 9 in the MHNT

Daniel 9 in the MKNFD

Daniel 9 in the MNG

Daniel 9 in the MNT

Daniel 9 in the MNT2

Daniel 9 in the MRS1T

Daniel 9 in the NAA

Daniel 9 in the NASB

Daniel 9 in the NBLA

Daniel 9 in the NBS

Daniel 9 in the NBVTP

Daniel 9 in the NET2

Daniel 9 in the NIV11

Daniel 9 in the NNT

Daniel 9 in the NNT2

Daniel 9 in the NNT3

Daniel 9 in the PDDPT

Daniel 9 in the PFNT

Daniel 9 in the RMNT

Daniel 9 in the SBIAS

Daniel 9 in the SBIBS

Daniel 9 in the SBIBS2

Daniel 9 in the SBICS

Daniel 9 in the SBIDS

Daniel 9 in the SBIGS

Daniel 9 in the SBIHS

Daniel 9 in the SBIIS

Daniel 9 in the SBIIS2

Daniel 9 in the SBIIS3

Daniel 9 in the SBIKS

Daniel 9 in the SBIKS2

Daniel 9 in the SBIMS

Daniel 9 in the SBIOS

Daniel 9 in the SBIPS

Daniel 9 in the SBISS

Daniel 9 in the SBITS

Daniel 9 in the SBITS2

Daniel 9 in the SBITS3

Daniel 9 in the SBITS4

Daniel 9 in the SBIUS

Daniel 9 in the SBIVS

Daniel 9 in the SBT

Daniel 9 in the SBT1E

Daniel 9 in the SCHL

Daniel 9 in the SNT

Daniel 9 in the SUSU

Daniel 9 in the SUSU2

Daniel 9 in the SYNO

Daniel 9 in the TBIAOTANT

Daniel 9 in the TBT1E

Daniel 9 in the TBT1E2

Daniel 9 in the TFTIP

Daniel 9 in the TFTU

Daniel 9 in the TGNTATF3T

Daniel 9 in the THAI

Daniel 9 in the TNFD

Daniel 9 in the TNT

Daniel 9 in the TNTIK

Daniel 9 in the TNTIL

Daniel 9 in the TNTIN

Daniel 9 in the TNTIP

Daniel 9 in the TNTIZ

Daniel 9 in the TOMA

Daniel 9 in the TTENT

Daniel 9 in the UBG

Daniel 9 in the UGV

Daniel 9 in the UGV2

Daniel 9 in the UGV3

Daniel 9 in the VBL

Daniel 9 in the VDCC

Daniel 9 in the YALU

Daniel 9 in the YAPE

Daniel 9 in the YBVTP

Daniel 9 in the ZBP