Deuteronomy 13 (BOLCB2)
1 Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te. 2 Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa, 3 mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te, 4 bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. 5 Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino ; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye. 6 Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino. 7 Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te, 8 banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu), 9 koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te. 10 Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso. 11 Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu. 12 Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo. 13 Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda 14 ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te, 15 wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo, 16 osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso : bato na yango mpe bibwele na yango. 17 Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te. 18 Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi, 19 soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye.
In Other Versions
Deuteronomy 13 in the ANGEFD
Deuteronomy 13 in the ANTPNG2D
Deuteronomy 13 in the AS21
Deuteronomy 13 in the BAGH
Deuteronomy 13 in the BBPNG
Deuteronomy 13 in the BBT1E
Deuteronomy 13 in the BDS
Deuteronomy 13 in the BEV
Deuteronomy 13 in the BHAD
Deuteronomy 13 in the BIB
Deuteronomy 13 in the BLPT
Deuteronomy 13 in the BNT
Deuteronomy 13 in the BNTABOOT
Deuteronomy 13 in the BNTLV
Deuteronomy 13 in the BOATCB
Deuteronomy 13 in the BOATCB2
Deuteronomy 13 in the BOBCV
Deuteronomy 13 in the BOCNT
Deuteronomy 13 in the BOECS
Deuteronomy 13 in the BOGWICC
Deuteronomy 13 in the BOHCB
Deuteronomy 13 in the BOHCV
Deuteronomy 13 in the BOHLNT
Deuteronomy 13 in the BOHNTLTAL
Deuteronomy 13 in the BOICB
Deuteronomy 13 in the BOILNTAP
Deuteronomy 13 in the BOITCV
Deuteronomy 13 in the BOKCV
Deuteronomy 13 in the BOKCV2
Deuteronomy 13 in the BOKHWOG
Deuteronomy 13 in the BOKSSV
Deuteronomy 13 in the BOLCB
Deuteronomy 13 in the BOMCV
Deuteronomy 13 in the BONAV
Deuteronomy 13 in the BONCB
Deuteronomy 13 in the BONLT
Deuteronomy 13 in the BONUT2
Deuteronomy 13 in the BOPLNT
Deuteronomy 13 in the BOSCB
Deuteronomy 13 in the BOSNC
Deuteronomy 13 in the BOTLNT
Deuteronomy 13 in the BOVCB
Deuteronomy 13 in the BOYCB
Deuteronomy 13 in the BPBB
Deuteronomy 13 in the BPH
Deuteronomy 13 in the BSB
Deuteronomy 13 in the CCB
Deuteronomy 13 in the CUV
Deuteronomy 13 in the CUVS
Deuteronomy 13 in the DBT
Deuteronomy 13 in the DGDNT
Deuteronomy 13 in the DHNT
Deuteronomy 13 in the DNT
Deuteronomy 13 in the ELBE
Deuteronomy 13 in the EMTV
Deuteronomy 13 in the ESV
Deuteronomy 13 in the FBV
Deuteronomy 13 in the FEB
Deuteronomy 13 in the GGMNT
Deuteronomy 13 in the GNT
Deuteronomy 13 in the HARY
Deuteronomy 13 in the HNT
Deuteronomy 13 in the IRVA
Deuteronomy 13 in the IRVB
Deuteronomy 13 in the IRVG
Deuteronomy 13 in the IRVH
Deuteronomy 13 in the IRVK
Deuteronomy 13 in the IRVM
Deuteronomy 13 in the IRVM2
Deuteronomy 13 in the IRVO
Deuteronomy 13 in the IRVP
Deuteronomy 13 in the IRVT
Deuteronomy 13 in the IRVT2
Deuteronomy 13 in the IRVU
Deuteronomy 13 in the ISVN
Deuteronomy 13 in the JSNT
Deuteronomy 13 in the KAPI
Deuteronomy 13 in the KBT1ETNIK
Deuteronomy 13 in the KBV
Deuteronomy 13 in the KJV
Deuteronomy 13 in the KNFD
Deuteronomy 13 in the LBA
Deuteronomy 13 in the LBLA
Deuteronomy 13 in the LNT
Deuteronomy 13 in the LSV
Deuteronomy 13 in the MAAL
Deuteronomy 13 in the MBV
Deuteronomy 13 in the MBV2
Deuteronomy 13 in the MHNT
Deuteronomy 13 in the MKNFD
Deuteronomy 13 in the MNG
Deuteronomy 13 in the MNT
Deuteronomy 13 in the MNT2
Deuteronomy 13 in the MRS1T
Deuteronomy 13 in the NAA
Deuteronomy 13 in the NASB
Deuteronomy 13 in the NBLA
Deuteronomy 13 in the NBS
Deuteronomy 13 in the NBVTP
Deuteronomy 13 in the NET2
Deuteronomy 13 in the NIV11
Deuteronomy 13 in the NNT
Deuteronomy 13 in the NNT2
Deuteronomy 13 in the NNT3
Deuteronomy 13 in the PDDPT
Deuteronomy 13 in the PFNT
Deuteronomy 13 in the RMNT
Deuteronomy 13 in the SBIAS
Deuteronomy 13 in the SBIBS
Deuteronomy 13 in the SBIBS2
Deuteronomy 13 in the SBICS
Deuteronomy 13 in the SBIDS
Deuteronomy 13 in the SBIGS
Deuteronomy 13 in the SBIHS
Deuteronomy 13 in the SBIIS
Deuteronomy 13 in the SBIIS2
Deuteronomy 13 in the SBIIS3
Deuteronomy 13 in the SBIKS
Deuteronomy 13 in the SBIKS2
Deuteronomy 13 in the SBIMS
Deuteronomy 13 in the SBIOS
Deuteronomy 13 in the SBIPS
Deuteronomy 13 in the SBISS
Deuteronomy 13 in the SBITS
Deuteronomy 13 in the SBITS2
Deuteronomy 13 in the SBITS3
Deuteronomy 13 in the SBITS4
Deuteronomy 13 in the SBIUS
Deuteronomy 13 in the SBIVS
Deuteronomy 13 in the SBT
Deuteronomy 13 in the SBT1E
Deuteronomy 13 in the SCHL
Deuteronomy 13 in the SNT
Deuteronomy 13 in the SUSU
Deuteronomy 13 in the SUSU2
Deuteronomy 13 in the SYNO
Deuteronomy 13 in the TBIAOTANT
Deuteronomy 13 in the TBT1E
Deuteronomy 13 in the TBT1E2
Deuteronomy 13 in the TFTIP
Deuteronomy 13 in the TFTU
Deuteronomy 13 in the TGNTATF3T
Deuteronomy 13 in the THAI
Deuteronomy 13 in the TNFD
Deuteronomy 13 in the TNT
Deuteronomy 13 in the TNTIK
Deuteronomy 13 in the TNTIL
Deuteronomy 13 in the TNTIN
Deuteronomy 13 in the TNTIP
Deuteronomy 13 in the TNTIZ
Deuteronomy 13 in the TOMA
Deuteronomy 13 in the TTENT
Deuteronomy 13 in the UBG
Deuteronomy 13 in the UGV
Deuteronomy 13 in the UGV2
Deuteronomy 13 in the UGV3
Deuteronomy 13 in the VBL
Deuteronomy 13 in the VDCC
Deuteronomy 13 in the YALU
Deuteronomy 13 in the YAPE
Deuteronomy 13 in the YBVTP
Deuteronomy 13 in the ZBP