Esther 5 (BOLCB2)
1 Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela. 2 Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi. 3 Mokonzi atunaki ye :— Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai ! 4 Ester azongisaki :— Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye. 5 Mokonzi alobaki :— Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester.Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki. 6 Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester :— Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai. 7 Ester azongisaki :— Posa mpe bosenga na ngai ezali boye : 8 Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi. 9 Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi. 10 Kasi atako bongo, Amani akangaki motema mpe azongaki epai na ye ; abengisaki balingami na ye mpe Zereshi, mwasi na ye. 11 Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu. 12 Amani abakisaki :— Esuki kaka wana te ! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi. 13 Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi. 14 Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye :— Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi.Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.
In Other Versions
Esther 5 in the ANGEFD
Esther 5 in the ANTPNG2D
Esther 5 in the AS21
Esther 5 in the BAGH
Esther 5 in the BBPNG
Esther 5 in the BBT1E
Esther 5 in the BDS
Esther 5 in the BEV
Esther 5 in the BHAD
Esther 5 in the BIB
Esther 5 in the BLPT
Esther 5 in the BNT
Esther 5 in the BNTABOOT
Esther 5 in the BNTLV
Esther 5 in the BOATCB
Esther 5 in the BOATCB2
Esther 5 in the BOBCV
Esther 5 in the BOCNT
Esther 5 in the BOECS
Esther 5 in the BOGWICC
Esther 5 in the BOHCB
Esther 5 in the BOHCV
Esther 5 in the BOHLNT
Esther 5 in the BOHNTLTAL
Esther 5 in the BOICB
Esther 5 in the BOILNTAP
Esther 5 in the BOITCV
Esther 5 in the BOKCV
Esther 5 in the BOKCV2
Esther 5 in the BOKHWOG
Esther 5 in the BOKSSV
Esther 5 in the BOLCB
Esther 5 in the BOMCV
Esther 5 in the BONAV
Esther 5 in the BONCB
Esther 5 in the BONLT
Esther 5 in the BONUT2
Esther 5 in the BOPLNT
Esther 5 in the BOSCB
Esther 5 in the BOSNC
Esther 5 in the BOTLNT
Esther 5 in the BOVCB
Esther 5 in the BOYCB
Esther 5 in the BPBB
Esther 5 in the BPH
Esther 5 in the BSB
Esther 5 in the CCB
Esther 5 in the CUV
Esther 5 in the CUVS
Esther 5 in the DBT
Esther 5 in the DGDNT
Esther 5 in the DHNT
Esther 5 in the DNT
Esther 5 in the ELBE
Esther 5 in the EMTV
Esther 5 in the ESV
Esther 5 in the FBV
Esther 5 in the FEB
Esther 5 in the GGMNT
Esther 5 in the GNT
Esther 5 in the HARY
Esther 5 in the HNT
Esther 5 in the IRVA
Esther 5 in the IRVB
Esther 5 in the IRVG
Esther 5 in the IRVH
Esther 5 in the IRVK
Esther 5 in the IRVM
Esther 5 in the IRVM2
Esther 5 in the IRVO
Esther 5 in the IRVP
Esther 5 in the IRVT
Esther 5 in the IRVT2
Esther 5 in the IRVU
Esther 5 in the ISVN
Esther 5 in the JSNT
Esther 5 in the KAPI
Esther 5 in the KBT1ETNIK
Esther 5 in the KBV
Esther 5 in the KJV
Esther 5 in the KNFD
Esther 5 in the LBA
Esther 5 in the LBLA
Esther 5 in the LNT
Esther 5 in the LSV
Esther 5 in the MAAL
Esther 5 in the MBV
Esther 5 in the MBV2
Esther 5 in the MHNT
Esther 5 in the MKNFD
Esther 5 in the MNG
Esther 5 in the MNT
Esther 5 in the MNT2
Esther 5 in the MRS1T
Esther 5 in the NAA
Esther 5 in the NASB
Esther 5 in the NBLA
Esther 5 in the NBS
Esther 5 in the NBVTP
Esther 5 in the NET2
Esther 5 in the NIV11
Esther 5 in the NNT
Esther 5 in the NNT2
Esther 5 in the NNT3
Esther 5 in the PDDPT
Esther 5 in the PFNT
Esther 5 in the RMNT
Esther 5 in the SBIAS
Esther 5 in the SBIBS
Esther 5 in the SBIBS2
Esther 5 in the SBICS
Esther 5 in the SBIDS
Esther 5 in the SBIGS
Esther 5 in the SBIHS
Esther 5 in the SBIIS
Esther 5 in the SBIIS2
Esther 5 in the SBIIS3
Esther 5 in the SBIKS
Esther 5 in the SBIKS2
Esther 5 in the SBIMS
Esther 5 in the SBIOS
Esther 5 in the SBIPS
Esther 5 in the SBISS
Esther 5 in the SBITS
Esther 5 in the SBITS2
Esther 5 in the SBITS3
Esther 5 in the SBITS4
Esther 5 in the SBIUS
Esther 5 in the SBIVS
Esther 5 in the SBT
Esther 5 in the SBT1E
Esther 5 in the SCHL
Esther 5 in the SNT
Esther 5 in the SUSU
Esther 5 in the SUSU2
Esther 5 in the SYNO
Esther 5 in the TBIAOTANT
Esther 5 in the TBT1E
Esther 5 in the TBT1E2
Esther 5 in the TFTIP
Esther 5 in the TFTU
Esther 5 in the TGNTATF3T
Esther 5 in the THAI
Esther 5 in the TNFD
Esther 5 in the TNT
Esther 5 in the TNTIK
Esther 5 in the TNTIL
Esther 5 in the TNTIN
Esther 5 in the TNTIP
Esther 5 in the TNTIZ
Esther 5 in the TOMA
Esther 5 in the TTENT
Esther 5 in the UBG
Esther 5 in the UGV
Esther 5 in the UGV2
Esther 5 in the UGV3
Esther 5 in the VBL
Esther 5 in the VDCC
Esther 5 in the YALU
Esther 5 in the YAPE
Esther 5 in the YBVTP
Esther 5 in the ZBP