Exodus 25 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu. 3 Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango : wolo, palata mpe bronze, 4 bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi,lino ya kitoko, bapwale ya ntaba, 5 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale,banzete ya akasia, 6 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda,biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko~; 7 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. 8 Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango. 9 Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo. 10 Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano. 11 Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo. 12 Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. 13 Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo. 14 Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango. 15 Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te. 16 Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo. 17 Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 18 Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. 19 Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. 20 Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku. 21 Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku. 22 Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele. 23 Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 24 Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango. 25 Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango. 26 Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali. 27 Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku. 28 Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo. 29 Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga. 30 Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai. 31 Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko. 32 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu. 33 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 34 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. 35 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko ; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda. 36 Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto. 37 Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo. 38 Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu. 39 Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso. 40 Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.

In Other Versions

Exodus 25 in the ANGEFD

Exodus 25 in the ANTPNG2D

Exodus 25 in the AS21

Exodus 25 in the BAGH

Exodus 25 in the BBPNG

Exodus 25 in the BBT1E

Exodus 25 in the BDS

Exodus 25 in the BEV

Exodus 25 in the BHAD

Exodus 25 in the BIB

Exodus 25 in the BLPT

Exodus 25 in the BNT

Exodus 25 in the BNTABOOT

Exodus 25 in the BNTLV

Exodus 25 in the BOATCB

Exodus 25 in the BOATCB2

Exodus 25 in the BOBCV

Exodus 25 in the BOCNT

Exodus 25 in the BOECS

Exodus 25 in the BOGWICC

Exodus 25 in the BOHCB

Exodus 25 in the BOHCV

Exodus 25 in the BOHLNT

Exodus 25 in the BOHNTLTAL

Exodus 25 in the BOICB

Exodus 25 in the BOILNTAP

Exodus 25 in the BOITCV

Exodus 25 in the BOKCV

Exodus 25 in the BOKCV2

Exodus 25 in the BOKHWOG

Exodus 25 in the BOKSSV

Exodus 25 in the BOLCB

Exodus 25 in the BOMCV

Exodus 25 in the BONAV

Exodus 25 in the BONCB

Exodus 25 in the BONLT

Exodus 25 in the BONUT2

Exodus 25 in the BOPLNT

Exodus 25 in the BOSCB

Exodus 25 in the BOSNC

Exodus 25 in the BOTLNT

Exodus 25 in the BOVCB

Exodus 25 in the BOYCB

Exodus 25 in the BPBB

Exodus 25 in the BPH

Exodus 25 in the BSB

Exodus 25 in the CCB

Exodus 25 in the CUV

Exodus 25 in the CUVS

Exodus 25 in the DBT

Exodus 25 in the DGDNT

Exodus 25 in the DHNT

Exodus 25 in the DNT

Exodus 25 in the ELBE

Exodus 25 in the EMTV

Exodus 25 in the ESV

Exodus 25 in the FBV

Exodus 25 in the FEB

Exodus 25 in the GGMNT

Exodus 25 in the GNT

Exodus 25 in the HARY

Exodus 25 in the HNT

Exodus 25 in the IRVA

Exodus 25 in the IRVB

Exodus 25 in the IRVG

Exodus 25 in the IRVH

Exodus 25 in the IRVK

Exodus 25 in the IRVM

Exodus 25 in the IRVM2

Exodus 25 in the IRVO

Exodus 25 in the IRVP

Exodus 25 in the IRVT

Exodus 25 in the IRVT2

Exodus 25 in the IRVU

Exodus 25 in the ISVN

Exodus 25 in the JSNT

Exodus 25 in the KAPI

Exodus 25 in the KBT1ETNIK

Exodus 25 in the KBV

Exodus 25 in the KJV

Exodus 25 in the KNFD

Exodus 25 in the LBA

Exodus 25 in the LBLA

Exodus 25 in the LNT

Exodus 25 in the LSV

Exodus 25 in the MAAL

Exodus 25 in the MBV

Exodus 25 in the MBV2

Exodus 25 in the MHNT

Exodus 25 in the MKNFD

Exodus 25 in the MNG

Exodus 25 in the MNT

Exodus 25 in the MNT2

Exodus 25 in the MRS1T

Exodus 25 in the NAA

Exodus 25 in the NASB

Exodus 25 in the NBLA

Exodus 25 in the NBS

Exodus 25 in the NBVTP

Exodus 25 in the NET2

Exodus 25 in the NIV11

Exodus 25 in the NNT

Exodus 25 in the NNT2

Exodus 25 in the NNT3

Exodus 25 in the PDDPT

Exodus 25 in the PFNT

Exodus 25 in the RMNT

Exodus 25 in the SBIAS

Exodus 25 in the SBIBS

Exodus 25 in the SBIBS2

Exodus 25 in the SBICS

Exodus 25 in the SBIDS

Exodus 25 in the SBIGS

Exodus 25 in the SBIHS

Exodus 25 in the SBIIS

Exodus 25 in the SBIIS2

Exodus 25 in the SBIIS3

Exodus 25 in the SBIKS

Exodus 25 in the SBIKS2

Exodus 25 in the SBIMS

Exodus 25 in the SBIOS

Exodus 25 in the SBIPS

Exodus 25 in the SBISS

Exodus 25 in the SBITS

Exodus 25 in the SBITS2

Exodus 25 in the SBITS3

Exodus 25 in the SBITS4

Exodus 25 in the SBIUS

Exodus 25 in the SBIVS

Exodus 25 in the SBT

Exodus 25 in the SBT1E

Exodus 25 in the SCHL

Exodus 25 in the SNT

Exodus 25 in the SUSU

Exodus 25 in the SUSU2

Exodus 25 in the SYNO

Exodus 25 in the TBIAOTANT

Exodus 25 in the TBT1E

Exodus 25 in the TBT1E2

Exodus 25 in the TFTIP

Exodus 25 in the TFTU

Exodus 25 in the TGNTATF3T

Exodus 25 in the THAI

Exodus 25 in the TNFD

Exodus 25 in the TNT

Exodus 25 in the TNTIK

Exodus 25 in the TNTIL

Exodus 25 in the TNTIN

Exodus 25 in the TNTIP

Exodus 25 in the TNTIZ

Exodus 25 in the TOMA

Exodus 25 in the TTENT

Exodus 25 in the UBG

Exodus 25 in the UGV

Exodus 25 in the UGV2

Exodus 25 in the UGV3

Exodus 25 in the VBL

Exodus 25 in the VDCC

Exodus 25 in the YALU

Exodus 25 in the YAPE

Exodus 25 in the YBVTP

Exodus 25 in the ZBP