Exodus 40 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 — Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ; 3 okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido. 4 Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango. 5 Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo. 6 Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, 7 mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango. 8 Okotonga lopango zingazinga na yango mpe okotia rido na ekotelo ya lopango. 9 Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule. 10 Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso ; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka. 11 Okopakola mafuta na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango, mpe okobulisa yango. 12 Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi. 13 Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe. 14 Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala. 15 Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe : epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango. 16 Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye. 17 Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale. 18 Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi ; 19 atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 20 Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango. 21 Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye. 22 Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido ; 23 mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 24 Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo. 25 Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 26 Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido, 27 mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 28 Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo. 29 Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 30 Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola. 31 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango. 32 Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. 33 Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala. 34 Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. 35 Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. 36 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango. 37 Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa. 38 Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.

In Other Versions

Exodus 40 in the ANGEFD

Exodus 40 in the ANTPNG2D

Exodus 40 in the AS21

Exodus 40 in the BAGH

Exodus 40 in the BBPNG

Exodus 40 in the BBT1E

Exodus 40 in the BDS

Exodus 40 in the BEV

Exodus 40 in the BHAD

Exodus 40 in the BIB

Exodus 40 in the BLPT

Exodus 40 in the BNT

Exodus 40 in the BNTABOOT

Exodus 40 in the BNTLV

Exodus 40 in the BOATCB

Exodus 40 in the BOATCB2

Exodus 40 in the BOBCV

Exodus 40 in the BOCNT

Exodus 40 in the BOECS

Exodus 40 in the BOGWICC

Exodus 40 in the BOHCB

Exodus 40 in the BOHCV

Exodus 40 in the BOHLNT

Exodus 40 in the BOHNTLTAL

Exodus 40 in the BOICB

Exodus 40 in the BOILNTAP

Exodus 40 in the BOITCV

Exodus 40 in the BOKCV

Exodus 40 in the BOKCV2

Exodus 40 in the BOKHWOG

Exodus 40 in the BOKSSV

Exodus 40 in the BOLCB

Exodus 40 in the BOMCV

Exodus 40 in the BONAV

Exodus 40 in the BONCB

Exodus 40 in the BONLT

Exodus 40 in the BONUT2

Exodus 40 in the BOPLNT

Exodus 40 in the BOSCB

Exodus 40 in the BOSNC

Exodus 40 in the BOTLNT

Exodus 40 in the BOVCB

Exodus 40 in the BOYCB

Exodus 40 in the BPBB

Exodus 40 in the BPH

Exodus 40 in the BSB

Exodus 40 in the CCB

Exodus 40 in the CUV

Exodus 40 in the CUVS

Exodus 40 in the DBT

Exodus 40 in the DGDNT

Exodus 40 in the DHNT

Exodus 40 in the DNT

Exodus 40 in the ELBE

Exodus 40 in the EMTV

Exodus 40 in the ESV

Exodus 40 in the FBV

Exodus 40 in the FEB

Exodus 40 in the GGMNT

Exodus 40 in the GNT

Exodus 40 in the HARY

Exodus 40 in the HNT

Exodus 40 in the IRVA

Exodus 40 in the IRVB

Exodus 40 in the IRVG

Exodus 40 in the IRVH

Exodus 40 in the IRVK

Exodus 40 in the IRVM

Exodus 40 in the IRVM2

Exodus 40 in the IRVO

Exodus 40 in the IRVP

Exodus 40 in the IRVT

Exodus 40 in the IRVT2

Exodus 40 in the IRVU

Exodus 40 in the ISVN

Exodus 40 in the JSNT

Exodus 40 in the KAPI

Exodus 40 in the KBT1ETNIK

Exodus 40 in the KBV

Exodus 40 in the KJV

Exodus 40 in the KNFD

Exodus 40 in the LBA

Exodus 40 in the LBLA

Exodus 40 in the LNT

Exodus 40 in the LSV

Exodus 40 in the MAAL

Exodus 40 in the MBV

Exodus 40 in the MBV2

Exodus 40 in the MHNT

Exodus 40 in the MKNFD

Exodus 40 in the MNG

Exodus 40 in the MNT

Exodus 40 in the MNT2

Exodus 40 in the MRS1T

Exodus 40 in the NAA

Exodus 40 in the NASB

Exodus 40 in the NBLA

Exodus 40 in the NBS

Exodus 40 in the NBVTP

Exodus 40 in the NET2

Exodus 40 in the NIV11

Exodus 40 in the NNT

Exodus 40 in the NNT2

Exodus 40 in the NNT3

Exodus 40 in the PDDPT

Exodus 40 in the PFNT

Exodus 40 in the RMNT

Exodus 40 in the SBIAS

Exodus 40 in the SBIBS

Exodus 40 in the SBIBS2

Exodus 40 in the SBICS

Exodus 40 in the SBIDS

Exodus 40 in the SBIGS

Exodus 40 in the SBIHS

Exodus 40 in the SBIIS

Exodus 40 in the SBIIS2

Exodus 40 in the SBIIS3

Exodus 40 in the SBIKS

Exodus 40 in the SBIKS2

Exodus 40 in the SBIMS

Exodus 40 in the SBIOS

Exodus 40 in the SBIPS

Exodus 40 in the SBISS

Exodus 40 in the SBITS

Exodus 40 in the SBITS2

Exodus 40 in the SBITS3

Exodus 40 in the SBITS4

Exodus 40 in the SBIUS

Exodus 40 in the SBIVS

Exodus 40 in the SBT

Exodus 40 in the SBT1E

Exodus 40 in the SCHL

Exodus 40 in the SNT

Exodus 40 in the SUSU

Exodus 40 in the SUSU2

Exodus 40 in the SYNO

Exodus 40 in the TBIAOTANT

Exodus 40 in the TBT1E

Exodus 40 in the TBT1E2

Exodus 40 in the TFTIP

Exodus 40 in the TFTU

Exodus 40 in the TGNTATF3T

Exodus 40 in the THAI

Exodus 40 in the TNFD

Exodus 40 in the TNT

Exodus 40 in the TNTIK

Exodus 40 in the TNTIL

Exodus 40 in the TNTIN

Exodus 40 in the TNTIP

Exodus 40 in the TNTIZ

Exodus 40 in the TOMA

Exodus 40 in the TTENT

Exodus 40 in the UBG

Exodus 40 in the UGV

Exodus 40 in the UGV2

Exodus 40 in the UGV3

Exodus 40 in the VBL

Exodus 40 in the VDCC

Exodus 40 in the YALU

Exodus 40 in the YAPE

Exodus 40 in the YBVTP

Exodus 40 in the ZBP