Ezekiel 1 (BOLCB2)

1 Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe. 2 Kaka na mokolo ya mitano ya sanza ya mobu wana, elingi koloba mobu ya mitano ya bowumbu ya mokonzi Yeoyakini, 3 Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye. 4 Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto. 5 Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto. 6 Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei. 7 Makolo na yango ezalaki esembolama, matambe na yango ezalaki lokola matambe ya mwana ngombe ya mobali mpe ezalaki kongenga lokola bronze oyo bapetola na moto. 8 Na se ya mapapu na yango, na bangambo na yango minei, ezalaki na maboko minei lokola maboko ya bato ; mpe bikelamu nyonso minei ya bomoi ezalaki na bilongi mpe na mapapu na yango. 9 Mapapu na yango ezalaki kotutana moko na mosusu. Ekelamu moko na moko ezalaki kokende etala kaka na liboso mpe ezalaki kotala na sima te. 10 Tala ndenge bilongi na yango ezalaki : ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso) : elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima). 11 Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo ; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale : lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu ; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango. 12 Moko na moko ezalaki kokende kaka liboso ; ezalaki kokende bisika nyonso oyo Molimo azalaki kokamba yango mpe ezalaki kokende epai mosusu te. 13 Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango. 14 Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali. 15 Tango nazalaki kotala bikelamu yango, namonaki pine moko na mabele, pembeni ya ekelamu ya bomoi moko na moko, liboso ya bilongi na yango minei. 16 Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango : ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana ; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu. 17 Tango ekelamu moko na moko ezalaki kotambola, ezalaki kokende na ngambo oyo moko ya bilongi na yango ekotala, kati na bangambo na yango minei ; ezalaki kobaluka na ngambo mosusu te mpe bapine na yango ezalaki kotengama te soki bikelamu yango ezali kotambola. 18 Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo : nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango. 19 Tango bikelamu ya bomoi ezalaki kotambola, bapine mpe ezalaki kotambola pembeni na yango ; kasi soki epumbwe longwa na se, bapine mpe ezalaki kopumbwa. 20 Esika nyonso Molimo azalaki kokende, bikelamu yango mpe ezalaki kokende ; bongo bapine mpe ezalaki komata elongo na yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine. 21 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, yango mpe ezalaki kotambola ; soki etelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki epumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bikelamu yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine. 22 Likolo ya mito ya bikelamu yango ya bomoi ezalaki na eloko moko lokola mapata ya likolo, oyo ezalaki kongenga makasi lokola libanga ya talo oyo ya krisitali. 23 Na se ya mapata yango, mapapu na yango ezalaki esembolama mpe etutana na mapapu ya baninga na yango ; mpe moko na moko kati na bikelamu yango ezalaki na mapapu mibale oyo ezalaki kobomba nzoto na yango. 24 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango. 25 Na likolo ya mito na yango, mongongo moko ezalaki koyokana wuta na likolo ya mapata oyo ezalaki ; tango ezalaki kotelema, ezalaki mpe kokitisa mapapu na yango. 26 Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri ; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto. 27 Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto ; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango. 28 Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.

In Other Versions

Ezekiel 1 in the ANGEFD

Ezekiel 1 in the ANTPNG2D

Ezekiel 1 in the AS21

Ezekiel 1 in the BAGH

Ezekiel 1 in the BBPNG

Ezekiel 1 in the BBT1E

Ezekiel 1 in the BDS

Ezekiel 1 in the BEV

Ezekiel 1 in the BHAD

Ezekiel 1 in the BIB

Ezekiel 1 in the BLPT

Ezekiel 1 in the BNT

Ezekiel 1 in the BNTABOOT

Ezekiel 1 in the BNTLV

Ezekiel 1 in the BOATCB

Ezekiel 1 in the BOATCB2

Ezekiel 1 in the BOBCV

Ezekiel 1 in the BOCNT

Ezekiel 1 in the BOECS

Ezekiel 1 in the BOGWICC

Ezekiel 1 in the BOHCB

Ezekiel 1 in the BOHCV

Ezekiel 1 in the BOHLNT

Ezekiel 1 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 1 in the BOICB

Ezekiel 1 in the BOILNTAP

Ezekiel 1 in the BOITCV

Ezekiel 1 in the BOKCV

Ezekiel 1 in the BOKCV2

Ezekiel 1 in the BOKHWOG

Ezekiel 1 in the BOKSSV

Ezekiel 1 in the BOLCB

Ezekiel 1 in the BOMCV

Ezekiel 1 in the BONAV

Ezekiel 1 in the BONCB

Ezekiel 1 in the BONLT

Ezekiel 1 in the BONUT2

Ezekiel 1 in the BOPLNT

Ezekiel 1 in the BOSCB

Ezekiel 1 in the BOSNC

Ezekiel 1 in the BOTLNT

Ezekiel 1 in the BOVCB

Ezekiel 1 in the BOYCB

Ezekiel 1 in the BPBB

Ezekiel 1 in the BPH

Ezekiel 1 in the BSB

Ezekiel 1 in the CCB

Ezekiel 1 in the CUV

Ezekiel 1 in the CUVS

Ezekiel 1 in the DBT

Ezekiel 1 in the DGDNT

Ezekiel 1 in the DHNT

Ezekiel 1 in the DNT

Ezekiel 1 in the ELBE

Ezekiel 1 in the EMTV

Ezekiel 1 in the ESV

Ezekiel 1 in the FBV

Ezekiel 1 in the FEB

Ezekiel 1 in the GGMNT

Ezekiel 1 in the GNT

Ezekiel 1 in the HARY

Ezekiel 1 in the HNT

Ezekiel 1 in the IRVA

Ezekiel 1 in the IRVB

Ezekiel 1 in the IRVG

Ezekiel 1 in the IRVH

Ezekiel 1 in the IRVK

Ezekiel 1 in the IRVM

Ezekiel 1 in the IRVM2

Ezekiel 1 in the IRVO

Ezekiel 1 in the IRVP

Ezekiel 1 in the IRVT

Ezekiel 1 in the IRVT2

Ezekiel 1 in the IRVU

Ezekiel 1 in the ISVN

Ezekiel 1 in the JSNT

Ezekiel 1 in the KAPI

Ezekiel 1 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 1 in the KBV

Ezekiel 1 in the KJV

Ezekiel 1 in the KNFD

Ezekiel 1 in the LBA

Ezekiel 1 in the LBLA

Ezekiel 1 in the LNT

Ezekiel 1 in the LSV

Ezekiel 1 in the MAAL

Ezekiel 1 in the MBV

Ezekiel 1 in the MBV2

Ezekiel 1 in the MHNT

Ezekiel 1 in the MKNFD

Ezekiel 1 in the MNG

Ezekiel 1 in the MNT

Ezekiel 1 in the MNT2

Ezekiel 1 in the MRS1T

Ezekiel 1 in the NAA

Ezekiel 1 in the NASB

Ezekiel 1 in the NBLA

Ezekiel 1 in the NBS

Ezekiel 1 in the NBVTP

Ezekiel 1 in the NET2

Ezekiel 1 in the NIV11

Ezekiel 1 in the NNT

Ezekiel 1 in the NNT2

Ezekiel 1 in the NNT3

Ezekiel 1 in the PDDPT

Ezekiel 1 in the PFNT

Ezekiel 1 in the RMNT

Ezekiel 1 in the SBIAS

Ezekiel 1 in the SBIBS

Ezekiel 1 in the SBIBS2

Ezekiel 1 in the SBICS

Ezekiel 1 in the SBIDS

Ezekiel 1 in the SBIGS

Ezekiel 1 in the SBIHS

Ezekiel 1 in the SBIIS

Ezekiel 1 in the SBIIS2

Ezekiel 1 in the SBIIS3

Ezekiel 1 in the SBIKS

Ezekiel 1 in the SBIKS2

Ezekiel 1 in the SBIMS

Ezekiel 1 in the SBIOS

Ezekiel 1 in the SBIPS

Ezekiel 1 in the SBISS

Ezekiel 1 in the SBITS

Ezekiel 1 in the SBITS2

Ezekiel 1 in the SBITS3

Ezekiel 1 in the SBITS4

Ezekiel 1 in the SBIUS

Ezekiel 1 in the SBIVS

Ezekiel 1 in the SBT

Ezekiel 1 in the SBT1E

Ezekiel 1 in the SCHL

Ezekiel 1 in the SNT

Ezekiel 1 in the SUSU

Ezekiel 1 in the SUSU2

Ezekiel 1 in the SYNO

Ezekiel 1 in the TBIAOTANT

Ezekiel 1 in the TBT1E

Ezekiel 1 in the TBT1E2

Ezekiel 1 in the TFTIP

Ezekiel 1 in the TFTU

Ezekiel 1 in the TGNTATF3T

Ezekiel 1 in the THAI

Ezekiel 1 in the TNFD

Ezekiel 1 in the TNT

Ezekiel 1 in the TNTIK

Ezekiel 1 in the TNTIL

Ezekiel 1 in the TNTIN

Ezekiel 1 in the TNTIP

Ezekiel 1 in the TNTIZ

Ezekiel 1 in the TOMA

Ezekiel 1 in the TTENT

Ezekiel 1 in the UBG

Ezekiel 1 in the UGV

Ezekiel 1 in the UGV2

Ezekiel 1 in the UGV3

Ezekiel 1 in the VBL

Ezekiel 1 in the VDCC

Ezekiel 1 in the YALU

Ezekiel 1 in the YAPE

Ezekiel 1 in the YBVTP

Ezekiel 1 in the ZBP