Ezekiel 10 (BOLCB2)
1 Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi. 2 Yawe alobaki na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Leka kati na bapine oyo ezali na se ya basheribe, tondisa maboko na yo na makala ya moto oyo okozwa kati na basheribe mpe panza yango na engumba. »Mpe asalaki bongo na miso na ngai. 3 Nzokande, basheribe bazalaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo tango moto wana akotaki, mpe lipata moko etondisaki lopango na yango ya kati. 4 Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe. 5 Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka. 6 Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko. 7 Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango ; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda. 8 Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto. 9 Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe : pine moko pembeni ya sheribe moko ; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite. 10 Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu. 11 Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala ; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te. 12 Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki. 13 Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. » 14 Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei : elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo. 15 Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. 16 Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango. 17 Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango. 18 Nkembo ya Yawe elongwaki na ekotelo ya Tempelo mpe ekendeki kotelema na likolo ya basheribe. 19 Wana nazalaki kotala, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapumbwaki longwa na se ; mpe tango bazalaki kokende, bapine yango mpe ezalaki kokende elongo na bango. Batelemaki na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya este ya Tempelo ya Yawe, bongo nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki likolo na bango. 20 Ezalaki nde bikelamu ya bomoi oyo namonaki na se ya Nzambe ya Isalaele pembeni ya Kebari ; mpe nasosolaki ete ezali basheribe. 21 Moko na moko kati na bango azalaki na bilongi minei mpe mapapu minei ; bongo na se ya mapapu na bango, ezalaki na elilingi moko lokola maboko ya moto. 22 Bilongi na bango ezalaki ndenge moko na oyo namonaki pene ya Kebari. Moko na moko azalaki kotambola kaka liboso.
In Other Versions
Ezekiel 10 in the ANGEFD
Ezekiel 10 in the ANTPNG2D
Ezekiel 10 in the AS21
Ezekiel 10 in the BAGH
Ezekiel 10 in the BBPNG
Ezekiel 10 in the BBT1E
Ezekiel 10 in the BDS
Ezekiel 10 in the BEV
Ezekiel 10 in the BHAD
Ezekiel 10 in the BIB
Ezekiel 10 in the BLPT
Ezekiel 10 in the BNT
Ezekiel 10 in the BNTABOOT
Ezekiel 10 in the BNTLV
Ezekiel 10 in the BOATCB
Ezekiel 10 in the BOATCB2
Ezekiel 10 in the BOBCV
Ezekiel 10 in the BOCNT
Ezekiel 10 in the BOECS
Ezekiel 10 in the BOGWICC
Ezekiel 10 in the BOHCB
Ezekiel 10 in the BOHCV
Ezekiel 10 in the BOHLNT
Ezekiel 10 in the BOHNTLTAL
Ezekiel 10 in the BOICB
Ezekiel 10 in the BOILNTAP
Ezekiel 10 in the BOITCV
Ezekiel 10 in the BOKCV
Ezekiel 10 in the BOKCV2
Ezekiel 10 in the BOKHWOG
Ezekiel 10 in the BOKSSV
Ezekiel 10 in the BOLCB
Ezekiel 10 in the BOMCV
Ezekiel 10 in the BONAV
Ezekiel 10 in the BONCB
Ezekiel 10 in the BONLT
Ezekiel 10 in the BONUT2
Ezekiel 10 in the BOPLNT
Ezekiel 10 in the BOSCB
Ezekiel 10 in the BOSNC
Ezekiel 10 in the BOTLNT
Ezekiel 10 in the BOVCB
Ezekiel 10 in the BOYCB
Ezekiel 10 in the BPBB
Ezekiel 10 in the BPH
Ezekiel 10 in the BSB
Ezekiel 10 in the CCB
Ezekiel 10 in the CUV
Ezekiel 10 in the CUVS
Ezekiel 10 in the DBT
Ezekiel 10 in the DGDNT
Ezekiel 10 in the DHNT
Ezekiel 10 in the DNT
Ezekiel 10 in the ELBE
Ezekiel 10 in the EMTV
Ezekiel 10 in the ESV
Ezekiel 10 in the FBV
Ezekiel 10 in the FEB
Ezekiel 10 in the GGMNT
Ezekiel 10 in the GNT
Ezekiel 10 in the HARY
Ezekiel 10 in the HNT
Ezekiel 10 in the IRVA
Ezekiel 10 in the IRVB
Ezekiel 10 in the IRVG
Ezekiel 10 in the IRVH
Ezekiel 10 in the IRVK
Ezekiel 10 in the IRVM
Ezekiel 10 in the IRVM2
Ezekiel 10 in the IRVO
Ezekiel 10 in the IRVP
Ezekiel 10 in the IRVT
Ezekiel 10 in the IRVT2
Ezekiel 10 in the IRVU
Ezekiel 10 in the ISVN
Ezekiel 10 in the JSNT
Ezekiel 10 in the KAPI
Ezekiel 10 in the KBT1ETNIK
Ezekiel 10 in the KBV
Ezekiel 10 in the KJV
Ezekiel 10 in the KNFD
Ezekiel 10 in the LBA
Ezekiel 10 in the LBLA
Ezekiel 10 in the LNT
Ezekiel 10 in the LSV
Ezekiel 10 in the MAAL
Ezekiel 10 in the MBV
Ezekiel 10 in the MBV2
Ezekiel 10 in the MHNT
Ezekiel 10 in the MKNFD
Ezekiel 10 in the MNG
Ezekiel 10 in the MNT
Ezekiel 10 in the MNT2
Ezekiel 10 in the MRS1T
Ezekiel 10 in the NAA
Ezekiel 10 in the NASB
Ezekiel 10 in the NBLA
Ezekiel 10 in the NBS
Ezekiel 10 in the NBVTP
Ezekiel 10 in the NET2
Ezekiel 10 in the NIV11
Ezekiel 10 in the NNT
Ezekiel 10 in the NNT2
Ezekiel 10 in the NNT3
Ezekiel 10 in the PDDPT
Ezekiel 10 in the PFNT
Ezekiel 10 in the RMNT
Ezekiel 10 in the SBIAS
Ezekiel 10 in the SBIBS
Ezekiel 10 in the SBIBS2
Ezekiel 10 in the SBICS
Ezekiel 10 in the SBIDS
Ezekiel 10 in the SBIGS
Ezekiel 10 in the SBIHS
Ezekiel 10 in the SBIIS
Ezekiel 10 in the SBIIS2
Ezekiel 10 in the SBIIS3
Ezekiel 10 in the SBIKS
Ezekiel 10 in the SBIKS2
Ezekiel 10 in the SBIMS
Ezekiel 10 in the SBIOS
Ezekiel 10 in the SBIPS
Ezekiel 10 in the SBISS
Ezekiel 10 in the SBITS
Ezekiel 10 in the SBITS2
Ezekiel 10 in the SBITS3
Ezekiel 10 in the SBITS4
Ezekiel 10 in the SBIUS
Ezekiel 10 in the SBIVS
Ezekiel 10 in the SBT
Ezekiel 10 in the SBT1E
Ezekiel 10 in the SCHL
Ezekiel 10 in the SNT
Ezekiel 10 in the SUSU
Ezekiel 10 in the SUSU2
Ezekiel 10 in the SYNO
Ezekiel 10 in the TBIAOTANT
Ezekiel 10 in the TBT1E
Ezekiel 10 in the TBT1E2
Ezekiel 10 in the TFTIP
Ezekiel 10 in the TFTU
Ezekiel 10 in the TGNTATF3T
Ezekiel 10 in the THAI
Ezekiel 10 in the TNFD
Ezekiel 10 in the TNT
Ezekiel 10 in the TNTIK
Ezekiel 10 in the TNTIL
Ezekiel 10 in the TNTIN
Ezekiel 10 in the TNTIP
Ezekiel 10 in the TNTIZ
Ezekiel 10 in the TOMA
Ezekiel 10 in the TTENT
Ezekiel 10 in the UBG
Ezekiel 10 in the UGV
Ezekiel 10 in the UGV2
Ezekiel 10 in the UGV3
Ezekiel 10 in the VBL
Ezekiel 10 in the VDCC
Ezekiel 10 in the YALU
Ezekiel 10 in the YAPE
Ezekiel 10 in the YBVTP
Ezekiel 10 in the ZBP