Ezekiel 22 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, okosambisa yango solo ? Okosambisa solo engumba oyo esopaka makila ? Lakisa yango misala na yango nyonso ya mbindo 3 mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba oyo emibendelaka bololo na nzela ya kosopa makila na kati-kati na yango mpe emikomisaka mbindo na nzela ya komisalela bikeko, 4 ozali na ngambo mpo na makila oyo osopaki mpe okomi mbindo mpo na bikeko oyo osalaki ! Okomisi bomoi na yo mokuse mpe okomi na suka ya mibu ya bomoi na yo ! Yango wana, nakokomisa yo eloko ya kotiola liboso ya bikolo mpe eloko ya maseki liboso ya mikili nyonso. 5 Yo, engumba ya mbindo, etonda na mobulu, bato oyo bazali pene mpe ba-oyo bazali mosika bakoseka yo ! 6 Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila. 7 Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali. 8 Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. 9 Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele. 10 Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo. 11 Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye. 12 Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe. 13 Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino. 14 Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai ? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango. 15 Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino. 16 Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » 17 Yawe alobaki na ngai : 18 « Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai ; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata. 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bino nyonso bokomi kaka lokola bosoto, nakosangisa bino na Yelusalemi. 20 Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino. 21 Nakosangisa bino mpe nakofula bino mopepe ya moto ya kanda na Ngai ; bongo nakozikisa bino kati na Yelusalemi. 22 Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › » 23 Yawe alobaki na ngai lisusu : 24 « Mwana na moto, loba na Yelusalemi : ‹ Ozali mabele oyo epetolamaki te mpe enokelaki mvula te na mokolo ya kanda na Ngai ya makasi. › 25 Basakoli na yo bazali kosala likita ; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali. 26 Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango. 27 Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe. 28 Basakoli na yango bazali kopakola misala na bango ya mabe potopoto ya pembe na nzela ya bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ; bazali koloba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi, › na tango Yawe alobi na Ye eloko moko te. 29 Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo. 30 Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te. 31 Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 22 in the ANGEFD

Ezekiel 22 in the ANTPNG2D

Ezekiel 22 in the AS21

Ezekiel 22 in the BAGH

Ezekiel 22 in the BBPNG

Ezekiel 22 in the BBT1E

Ezekiel 22 in the BDS

Ezekiel 22 in the BEV

Ezekiel 22 in the BHAD

Ezekiel 22 in the BIB

Ezekiel 22 in the BLPT

Ezekiel 22 in the BNT

Ezekiel 22 in the BNTABOOT

Ezekiel 22 in the BNTLV

Ezekiel 22 in the BOATCB

Ezekiel 22 in the BOATCB2

Ezekiel 22 in the BOBCV

Ezekiel 22 in the BOCNT

Ezekiel 22 in the BOECS

Ezekiel 22 in the BOGWICC

Ezekiel 22 in the BOHCB

Ezekiel 22 in the BOHCV

Ezekiel 22 in the BOHLNT

Ezekiel 22 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 22 in the BOICB

Ezekiel 22 in the BOILNTAP

Ezekiel 22 in the BOITCV

Ezekiel 22 in the BOKCV

Ezekiel 22 in the BOKCV2

Ezekiel 22 in the BOKHWOG

Ezekiel 22 in the BOKSSV

Ezekiel 22 in the BOLCB

Ezekiel 22 in the BOMCV

Ezekiel 22 in the BONAV

Ezekiel 22 in the BONCB

Ezekiel 22 in the BONLT

Ezekiel 22 in the BONUT2

Ezekiel 22 in the BOPLNT

Ezekiel 22 in the BOSCB

Ezekiel 22 in the BOSNC

Ezekiel 22 in the BOTLNT

Ezekiel 22 in the BOVCB

Ezekiel 22 in the BOYCB

Ezekiel 22 in the BPBB

Ezekiel 22 in the BPH

Ezekiel 22 in the BSB

Ezekiel 22 in the CCB

Ezekiel 22 in the CUV

Ezekiel 22 in the CUVS

Ezekiel 22 in the DBT

Ezekiel 22 in the DGDNT

Ezekiel 22 in the DHNT

Ezekiel 22 in the DNT

Ezekiel 22 in the ELBE

Ezekiel 22 in the EMTV

Ezekiel 22 in the ESV

Ezekiel 22 in the FBV

Ezekiel 22 in the FEB

Ezekiel 22 in the GGMNT

Ezekiel 22 in the GNT

Ezekiel 22 in the HARY

Ezekiel 22 in the HNT

Ezekiel 22 in the IRVA

Ezekiel 22 in the IRVB

Ezekiel 22 in the IRVG

Ezekiel 22 in the IRVH

Ezekiel 22 in the IRVK

Ezekiel 22 in the IRVM

Ezekiel 22 in the IRVM2

Ezekiel 22 in the IRVO

Ezekiel 22 in the IRVP

Ezekiel 22 in the IRVT

Ezekiel 22 in the IRVT2

Ezekiel 22 in the IRVU

Ezekiel 22 in the ISVN

Ezekiel 22 in the JSNT

Ezekiel 22 in the KAPI

Ezekiel 22 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 22 in the KBV

Ezekiel 22 in the KJV

Ezekiel 22 in the KNFD

Ezekiel 22 in the LBA

Ezekiel 22 in the LBLA

Ezekiel 22 in the LNT

Ezekiel 22 in the LSV

Ezekiel 22 in the MAAL

Ezekiel 22 in the MBV

Ezekiel 22 in the MBV2

Ezekiel 22 in the MHNT

Ezekiel 22 in the MKNFD

Ezekiel 22 in the MNG

Ezekiel 22 in the MNT

Ezekiel 22 in the MNT2

Ezekiel 22 in the MRS1T

Ezekiel 22 in the NAA

Ezekiel 22 in the NASB

Ezekiel 22 in the NBLA

Ezekiel 22 in the NBS

Ezekiel 22 in the NBVTP

Ezekiel 22 in the NET2

Ezekiel 22 in the NIV11

Ezekiel 22 in the NNT

Ezekiel 22 in the NNT2

Ezekiel 22 in the NNT3

Ezekiel 22 in the PDDPT

Ezekiel 22 in the PFNT

Ezekiel 22 in the RMNT

Ezekiel 22 in the SBIAS

Ezekiel 22 in the SBIBS

Ezekiel 22 in the SBIBS2

Ezekiel 22 in the SBICS

Ezekiel 22 in the SBIDS

Ezekiel 22 in the SBIGS

Ezekiel 22 in the SBIHS

Ezekiel 22 in the SBIIS

Ezekiel 22 in the SBIIS2

Ezekiel 22 in the SBIIS3

Ezekiel 22 in the SBIKS

Ezekiel 22 in the SBIKS2

Ezekiel 22 in the SBIMS

Ezekiel 22 in the SBIOS

Ezekiel 22 in the SBIPS

Ezekiel 22 in the SBISS

Ezekiel 22 in the SBITS

Ezekiel 22 in the SBITS2

Ezekiel 22 in the SBITS3

Ezekiel 22 in the SBITS4

Ezekiel 22 in the SBIUS

Ezekiel 22 in the SBIVS

Ezekiel 22 in the SBT

Ezekiel 22 in the SBT1E

Ezekiel 22 in the SCHL

Ezekiel 22 in the SNT

Ezekiel 22 in the SUSU

Ezekiel 22 in the SUSU2

Ezekiel 22 in the SYNO

Ezekiel 22 in the TBIAOTANT

Ezekiel 22 in the TBT1E

Ezekiel 22 in the TBT1E2

Ezekiel 22 in the TFTIP

Ezekiel 22 in the TFTU

Ezekiel 22 in the TGNTATF3T

Ezekiel 22 in the THAI

Ezekiel 22 in the TNFD

Ezekiel 22 in the TNT

Ezekiel 22 in the TNTIK

Ezekiel 22 in the TNTIL

Ezekiel 22 in the TNTIN

Ezekiel 22 in the TNTIP

Ezekiel 22 in the TNTIZ

Ezekiel 22 in the TOMA

Ezekiel 22 in the TTENT

Ezekiel 22 in the UBG

Ezekiel 22 in the UGV

Ezekiel 22 in the UGV2

Ezekiel 22 in the UGV3

Ezekiel 22 in the VBL

Ezekiel 22 in the VDCC

Ezekiel 22 in the YALU

Ezekiel 22 in the YAPE

Ezekiel 22 in the YBVTP

Ezekiel 22 in the ZBP