Ezekiel 25 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango. 3 Yebisa bato ya Amoni : ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu, 4 nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino ; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino. 5 Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 6 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele, 7 nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba ; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › 8 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba : ‘ Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso. ’ 9 Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ; 10 nakokaba Moabi mpe bato ya Amoni na maboko ya Este lokola libula, mpo ete bakanisa lisusu bato ya Amoni te kati na molongo ya bikolo ; 11 nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › 12 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo ; 13 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani. 14 Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele : bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. › 15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Mpo ete bato ya Filisitia bazongisaki mabe na mabe, mpo ete bakokisaki makanisi mabe ya mitema na bango tango balukaki kobebisa mokili ya Yuda, mpo ete bayina bango wuta kala ; 16 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene. 17 Nakozongisela bango mabe na mabe mpe nakopesa bango etumbu na nzela ya kanda na Ngai. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakozongisela bango mabe na mabe. › »

In Other Versions

Ezekiel 25 in the ANGEFD

Ezekiel 25 in the ANTPNG2D

Ezekiel 25 in the AS21

Ezekiel 25 in the BAGH

Ezekiel 25 in the BBPNG

Ezekiel 25 in the BBT1E

Ezekiel 25 in the BDS

Ezekiel 25 in the BEV

Ezekiel 25 in the BHAD

Ezekiel 25 in the BIB

Ezekiel 25 in the BLPT

Ezekiel 25 in the BNT

Ezekiel 25 in the BNTABOOT

Ezekiel 25 in the BNTLV

Ezekiel 25 in the BOATCB

Ezekiel 25 in the BOATCB2

Ezekiel 25 in the BOBCV

Ezekiel 25 in the BOCNT

Ezekiel 25 in the BOECS

Ezekiel 25 in the BOGWICC

Ezekiel 25 in the BOHCB

Ezekiel 25 in the BOHCV

Ezekiel 25 in the BOHLNT

Ezekiel 25 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 25 in the BOICB

Ezekiel 25 in the BOILNTAP

Ezekiel 25 in the BOITCV

Ezekiel 25 in the BOKCV

Ezekiel 25 in the BOKCV2

Ezekiel 25 in the BOKHWOG

Ezekiel 25 in the BOKSSV

Ezekiel 25 in the BOLCB

Ezekiel 25 in the BOMCV

Ezekiel 25 in the BONAV

Ezekiel 25 in the BONCB

Ezekiel 25 in the BONLT

Ezekiel 25 in the BONUT2

Ezekiel 25 in the BOPLNT

Ezekiel 25 in the BOSCB

Ezekiel 25 in the BOSNC

Ezekiel 25 in the BOTLNT

Ezekiel 25 in the BOVCB

Ezekiel 25 in the BOYCB

Ezekiel 25 in the BPBB

Ezekiel 25 in the BPH

Ezekiel 25 in the BSB

Ezekiel 25 in the CCB

Ezekiel 25 in the CUV

Ezekiel 25 in the CUVS

Ezekiel 25 in the DBT

Ezekiel 25 in the DGDNT

Ezekiel 25 in the DHNT

Ezekiel 25 in the DNT

Ezekiel 25 in the ELBE

Ezekiel 25 in the EMTV

Ezekiel 25 in the ESV

Ezekiel 25 in the FBV

Ezekiel 25 in the FEB

Ezekiel 25 in the GGMNT

Ezekiel 25 in the GNT

Ezekiel 25 in the HARY

Ezekiel 25 in the HNT

Ezekiel 25 in the IRVA

Ezekiel 25 in the IRVB

Ezekiel 25 in the IRVG

Ezekiel 25 in the IRVH

Ezekiel 25 in the IRVK

Ezekiel 25 in the IRVM

Ezekiel 25 in the IRVM2

Ezekiel 25 in the IRVO

Ezekiel 25 in the IRVP

Ezekiel 25 in the IRVT

Ezekiel 25 in the IRVT2

Ezekiel 25 in the IRVU

Ezekiel 25 in the ISVN

Ezekiel 25 in the JSNT

Ezekiel 25 in the KAPI

Ezekiel 25 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 25 in the KBV

Ezekiel 25 in the KJV

Ezekiel 25 in the KNFD

Ezekiel 25 in the LBA

Ezekiel 25 in the LBLA

Ezekiel 25 in the LNT

Ezekiel 25 in the LSV

Ezekiel 25 in the MAAL

Ezekiel 25 in the MBV

Ezekiel 25 in the MBV2

Ezekiel 25 in the MHNT

Ezekiel 25 in the MKNFD

Ezekiel 25 in the MNG

Ezekiel 25 in the MNT

Ezekiel 25 in the MNT2

Ezekiel 25 in the MRS1T

Ezekiel 25 in the NAA

Ezekiel 25 in the NASB

Ezekiel 25 in the NBLA

Ezekiel 25 in the NBS

Ezekiel 25 in the NBVTP

Ezekiel 25 in the NET2

Ezekiel 25 in the NIV11

Ezekiel 25 in the NNT

Ezekiel 25 in the NNT2

Ezekiel 25 in the NNT3

Ezekiel 25 in the PDDPT

Ezekiel 25 in the PFNT

Ezekiel 25 in the RMNT

Ezekiel 25 in the SBIAS

Ezekiel 25 in the SBIBS

Ezekiel 25 in the SBIBS2

Ezekiel 25 in the SBICS

Ezekiel 25 in the SBIDS

Ezekiel 25 in the SBIGS

Ezekiel 25 in the SBIHS

Ezekiel 25 in the SBIIS

Ezekiel 25 in the SBIIS2

Ezekiel 25 in the SBIIS3

Ezekiel 25 in the SBIKS

Ezekiel 25 in the SBIKS2

Ezekiel 25 in the SBIMS

Ezekiel 25 in the SBIOS

Ezekiel 25 in the SBIPS

Ezekiel 25 in the SBISS

Ezekiel 25 in the SBITS

Ezekiel 25 in the SBITS2

Ezekiel 25 in the SBITS3

Ezekiel 25 in the SBITS4

Ezekiel 25 in the SBIUS

Ezekiel 25 in the SBIVS

Ezekiel 25 in the SBT

Ezekiel 25 in the SBT1E

Ezekiel 25 in the SCHL

Ezekiel 25 in the SNT

Ezekiel 25 in the SUSU

Ezekiel 25 in the SUSU2

Ezekiel 25 in the SYNO

Ezekiel 25 in the TBIAOTANT

Ezekiel 25 in the TBT1E

Ezekiel 25 in the TBT1E2

Ezekiel 25 in the TFTIP

Ezekiel 25 in the TFTU

Ezekiel 25 in the TGNTATF3T

Ezekiel 25 in the THAI

Ezekiel 25 in the TNFD

Ezekiel 25 in the TNT

Ezekiel 25 in the TNTIK

Ezekiel 25 in the TNTIL

Ezekiel 25 in the TNTIN

Ezekiel 25 in the TNTIP

Ezekiel 25 in the TNTIZ

Ezekiel 25 in the TOMA

Ezekiel 25 in the TTENT

Ezekiel 25 in the UBG

Ezekiel 25 in the UGV

Ezekiel 25 in the UGV2

Ezekiel 25 in the UGV3

Ezekiel 25 in the VBL

Ezekiel 25 in the VDCC

Ezekiel 25 in the YALU

Ezekiel 25 in the YAPE

Ezekiel 25 in the YBVTP

Ezekiel 25 in the ZBP