Ezekiel 37 (BOLCB2)

1 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai ; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa. 2 Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango : namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango. 3 Atunaki ngai :— Mwana na moto, mikuwa oyo ekoki lisusu kozala na bomoi ?Nazongisaki :— Oh Nkolo Yawe, Yo kaka nde oyebi ! 4 Bongo alobaki na ngai :— Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango : « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe ! 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi. 6 Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » 7 Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu. 8 Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te. 9 Yawe alobaki na ngai :— Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! » 10 Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai ; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene. 11 Alobaki na ngai :— Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! » 12 Yango wana, sakola mpe loba na bango : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bato na Ngai, nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, bongo nakozongisa bino na mabele ya Isalaele. 13 Mpe bino, bato na Ngai, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna ! 14 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi ; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. » 15 Yawe alobaki na ngai : 16 « Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. › 17 Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo. 18 Soki bandeko na yo batuni yo : ‹ Olingi koloba na biso nini ? Makambo oyo elingi kolakisa nini ? › 19 Okozongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye ; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. › 20 Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki ; 21 mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango. 22 Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango ; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te. 23 Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. 24 Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai. 25 Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela. 26 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. 27 Nakotia ndako na Ngai kati na bango ; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai. 28 Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »

In Other Versions

Ezekiel 37 in the ANGEFD

Ezekiel 37 in the ANTPNG2D

Ezekiel 37 in the AS21

Ezekiel 37 in the BAGH

Ezekiel 37 in the BBPNG

Ezekiel 37 in the BBT1E

Ezekiel 37 in the BDS

Ezekiel 37 in the BEV

Ezekiel 37 in the BHAD

Ezekiel 37 in the BIB

Ezekiel 37 in the BLPT

Ezekiel 37 in the BNT

Ezekiel 37 in the BNTABOOT

Ezekiel 37 in the BNTLV

Ezekiel 37 in the BOATCB

Ezekiel 37 in the BOATCB2

Ezekiel 37 in the BOBCV

Ezekiel 37 in the BOCNT

Ezekiel 37 in the BOECS

Ezekiel 37 in the BOGWICC

Ezekiel 37 in the BOHCB

Ezekiel 37 in the BOHCV

Ezekiel 37 in the BOHLNT

Ezekiel 37 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 37 in the BOICB

Ezekiel 37 in the BOILNTAP

Ezekiel 37 in the BOITCV

Ezekiel 37 in the BOKCV

Ezekiel 37 in the BOKCV2

Ezekiel 37 in the BOKHWOG

Ezekiel 37 in the BOKSSV

Ezekiel 37 in the BOLCB

Ezekiel 37 in the BOMCV

Ezekiel 37 in the BONAV

Ezekiel 37 in the BONCB

Ezekiel 37 in the BONLT

Ezekiel 37 in the BONUT2

Ezekiel 37 in the BOPLNT

Ezekiel 37 in the BOSCB

Ezekiel 37 in the BOSNC

Ezekiel 37 in the BOTLNT

Ezekiel 37 in the BOVCB

Ezekiel 37 in the BOYCB

Ezekiel 37 in the BPBB

Ezekiel 37 in the BPH

Ezekiel 37 in the BSB

Ezekiel 37 in the CCB

Ezekiel 37 in the CUV

Ezekiel 37 in the CUVS

Ezekiel 37 in the DBT

Ezekiel 37 in the DGDNT

Ezekiel 37 in the DHNT

Ezekiel 37 in the DNT

Ezekiel 37 in the ELBE

Ezekiel 37 in the EMTV

Ezekiel 37 in the ESV

Ezekiel 37 in the FBV

Ezekiel 37 in the FEB

Ezekiel 37 in the GGMNT

Ezekiel 37 in the GNT

Ezekiel 37 in the HARY

Ezekiel 37 in the HNT

Ezekiel 37 in the IRVA

Ezekiel 37 in the IRVB

Ezekiel 37 in the IRVG

Ezekiel 37 in the IRVH

Ezekiel 37 in the IRVK

Ezekiel 37 in the IRVM

Ezekiel 37 in the IRVM2

Ezekiel 37 in the IRVO

Ezekiel 37 in the IRVP

Ezekiel 37 in the IRVT

Ezekiel 37 in the IRVT2

Ezekiel 37 in the IRVU

Ezekiel 37 in the ISVN

Ezekiel 37 in the JSNT

Ezekiel 37 in the KAPI

Ezekiel 37 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 37 in the KBV

Ezekiel 37 in the KJV

Ezekiel 37 in the KNFD

Ezekiel 37 in the LBA

Ezekiel 37 in the LBLA

Ezekiel 37 in the LNT

Ezekiel 37 in the LSV

Ezekiel 37 in the MAAL

Ezekiel 37 in the MBV

Ezekiel 37 in the MBV2

Ezekiel 37 in the MHNT

Ezekiel 37 in the MKNFD

Ezekiel 37 in the MNG

Ezekiel 37 in the MNT

Ezekiel 37 in the MNT2

Ezekiel 37 in the MRS1T

Ezekiel 37 in the NAA

Ezekiel 37 in the NASB

Ezekiel 37 in the NBLA

Ezekiel 37 in the NBS

Ezekiel 37 in the NBVTP

Ezekiel 37 in the NET2

Ezekiel 37 in the NIV11

Ezekiel 37 in the NNT

Ezekiel 37 in the NNT2

Ezekiel 37 in the NNT3

Ezekiel 37 in the PDDPT

Ezekiel 37 in the PFNT

Ezekiel 37 in the RMNT

Ezekiel 37 in the SBIAS

Ezekiel 37 in the SBIBS

Ezekiel 37 in the SBIBS2

Ezekiel 37 in the SBICS

Ezekiel 37 in the SBIDS

Ezekiel 37 in the SBIGS

Ezekiel 37 in the SBIHS

Ezekiel 37 in the SBIIS

Ezekiel 37 in the SBIIS2

Ezekiel 37 in the SBIIS3

Ezekiel 37 in the SBIKS

Ezekiel 37 in the SBIKS2

Ezekiel 37 in the SBIMS

Ezekiel 37 in the SBIOS

Ezekiel 37 in the SBIPS

Ezekiel 37 in the SBISS

Ezekiel 37 in the SBITS

Ezekiel 37 in the SBITS2

Ezekiel 37 in the SBITS3

Ezekiel 37 in the SBITS4

Ezekiel 37 in the SBIUS

Ezekiel 37 in the SBIVS

Ezekiel 37 in the SBT

Ezekiel 37 in the SBT1E

Ezekiel 37 in the SCHL

Ezekiel 37 in the SNT

Ezekiel 37 in the SUSU

Ezekiel 37 in the SUSU2

Ezekiel 37 in the SYNO

Ezekiel 37 in the TBIAOTANT

Ezekiel 37 in the TBT1E

Ezekiel 37 in the TBT1E2

Ezekiel 37 in the TFTIP

Ezekiel 37 in the TFTU

Ezekiel 37 in the TGNTATF3T

Ezekiel 37 in the THAI

Ezekiel 37 in the TNFD

Ezekiel 37 in the TNT

Ezekiel 37 in the TNTIK

Ezekiel 37 in the TNTIL

Ezekiel 37 in the TNTIN

Ezekiel 37 in the TNTIP

Ezekiel 37 in the TNTIZ

Ezekiel 37 in the TOMA

Ezekiel 37 in the TTENT

Ezekiel 37 in the UBG

Ezekiel 37 in the UGV

Ezekiel 37 in the UGV2

Ezekiel 37 in the UGV3

Ezekiel 37 in the VBL

Ezekiel 37 in the VDCC

Ezekiel 37 in the YALU

Ezekiel 37 in the YAPE

Ezekiel 37 in the YBVTP

Ezekiel 37 in the ZBP