Ezekiel 39 (BOLCB2)

1 Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela Gogi ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali, natombokeli yo ! 2 Nakozongisa yo mpe nakotambolisa yo ; nakomema yo longwa na suka ya etuka ya ngambo ya nor mpe nakosala ete okoma na likolo ya bangomba ya Isalaele. 3 Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali. 4 Yo, mampinga na yo nyonso ya basoda mpe bato ya bikolo oyo bakosangana na yo, bokokweya na likolo ya bangomba ya Isalaele ; nakokaba yo lokola bilei epai ya bandeke nyonso oyo eliaka misuni mpe epai ya banyama ya zamba. 5 Okokweya solo na zamba, pamba te ezali Ngai nde nalobaki, elobi Nkolo Yawe. 6 Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 7 Nakosala ete bosantu ya Kombo na Ngai eyebana kati na bato na Ngai, Isalaele ; nakotika lisusu te ete bosantu ya Kombo na Ngai esambwa ; boye bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Mosantu kati na Isalaele. 8 Makambo wana nyonso ezali koya ! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki. 9 Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo. 10 Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli ; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe. 11 Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele : lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi. 12 Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili. 13 Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi ; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe. 14 Sima na basanza sambo, bakopona bato oyo mosala na bango ekozala : kotambola na mokili mpo na koluka bibembe oyo ekotikala na mabele mpe kokunda yango, na lisungi ya bato ya mobembo mpo na kopetola mokili. 15 Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi. 16 Engumba moko oyo ekobengama Amona ekotongama na esika yango. Ekozala ndenge wana nde bakopetola mokili. › 17 Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Loba na bandeke nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba : ‹ Boya kosangana, bino nyonso elongo, wuta na bisika nyonso, mpo na mbeka na Ngai, oyo nazali kobonza Ngai moko mpo na bino, mbeka monene na likolo ya bangomba ya Isalaele ! Kuna, bokolia misuni mpe bokomela makila. 18 Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali : nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani. 19 Na mbeka na Ngai, oyo nabongisi mpo na bino, bokolia mafuta kino bokotonda, mpe bokomela makila kino bokolangwa. 20 Na mesa na Ngai, bokolia mpe bokotonda misuni ya bampunda, ya batambolisi na yango, ya bilombe ya bitumba mpe ya basoda nyonso, › elobi Nkolo Yawe. 21 Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo ; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango. 22 Kobanda na mokolo wana kino na mikolo ekoya, libota ya Isalaele bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. 23 Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga. 24 Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai. 25 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai. 26 Boye wana bakovanda na kimia na mabele na bango mpe ekozala na moto moko te mpo na kobangisa bango, bakobanda koyoka soni mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mabe nyonso oyo basalaki liboso na Ngai Yawe. 27 Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele. 28 Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna. 29 Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 39 in the ANGEFD

Ezekiel 39 in the ANTPNG2D

Ezekiel 39 in the AS21

Ezekiel 39 in the BAGH

Ezekiel 39 in the BBPNG

Ezekiel 39 in the BBT1E

Ezekiel 39 in the BDS

Ezekiel 39 in the BEV

Ezekiel 39 in the BHAD

Ezekiel 39 in the BIB

Ezekiel 39 in the BLPT

Ezekiel 39 in the BNT

Ezekiel 39 in the BNTABOOT

Ezekiel 39 in the BNTLV

Ezekiel 39 in the BOATCB

Ezekiel 39 in the BOATCB2

Ezekiel 39 in the BOBCV

Ezekiel 39 in the BOCNT

Ezekiel 39 in the BOECS

Ezekiel 39 in the BOGWICC

Ezekiel 39 in the BOHCB

Ezekiel 39 in the BOHCV

Ezekiel 39 in the BOHLNT

Ezekiel 39 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 39 in the BOICB

Ezekiel 39 in the BOILNTAP

Ezekiel 39 in the BOITCV

Ezekiel 39 in the BOKCV

Ezekiel 39 in the BOKCV2

Ezekiel 39 in the BOKHWOG

Ezekiel 39 in the BOKSSV

Ezekiel 39 in the BOLCB

Ezekiel 39 in the BOMCV

Ezekiel 39 in the BONAV

Ezekiel 39 in the BONCB

Ezekiel 39 in the BONLT

Ezekiel 39 in the BONUT2

Ezekiel 39 in the BOPLNT

Ezekiel 39 in the BOSCB

Ezekiel 39 in the BOSNC

Ezekiel 39 in the BOTLNT

Ezekiel 39 in the BOVCB

Ezekiel 39 in the BOYCB

Ezekiel 39 in the BPBB

Ezekiel 39 in the BPH

Ezekiel 39 in the BSB

Ezekiel 39 in the CCB

Ezekiel 39 in the CUV

Ezekiel 39 in the CUVS

Ezekiel 39 in the DBT

Ezekiel 39 in the DGDNT

Ezekiel 39 in the DHNT

Ezekiel 39 in the DNT

Ezekiel 39 in the ELBE

Ezekiel 39 in the EMTV

Ezekiel 39 in the ESV

Ezekiel 39 in the FBV

Ezekiel 39 in the FEB

Ezekiel 39 in the GGMNT

Ezekiel 39 in the GNT

Ezekiel 39 in the HARY

Ezekiel 39 in the HNT

Ezekiel 39 in the IRVA

Ezekiel 39 in the IRVB

Ezekiel 39 in the IRVG

Ezekiel 39 in the IRVH

Ezekiel 39 in the IRVK

Ezekiel 39 in the IRVM

Ezekiel 39 in the IRVM2

Ezekiel 39 in the IRVO

Ezekiel 39 in the IRVP

Ezekiel 39 in the IRVT

Ezekiel 39 in the IRVT2

Ezekiel 39 in the IRVU

Ezekiel 39 in the ISVN

Ezekiel 39 in the JSNT

Ezekiel 39 in the KAPI

Ezekiel 39 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 39 in the KBV

Ezekiel 39 in the KJV

Ezekiel 39 in the KNFD

Ezekiel 39 in the LBA

Ezekiel 39 in the LBLA

Ezekiel 39 in the LNT

Ezekiel 39 in the LSV

Ezekiel 39 in the MAAL

Ezekiel 39 in the MBV

Ezekiel 39 in the MBV2

Ezekiel 39 in the MHNT

Ezekiel 39 in the MKNFD

Ezekiel 39 in the MNG

Ezekiel 39 in the MNT

Ezekiel 39 in the MNT2

Ezekiel 39 in the MRS1T

Ezekiel 39 in the NAA

Ezekiel 39 in the NASB

Ezekiel 39 in the NBLA

Ezekiel 39 in the NBS

Ezekiel 39 in the NBVTP

Ezekiel 39 in the NET2

Ezekiel 39 in the NIV11

Ezekiel 39 in the NNT

Ezekiel 39 in the NNT2

Ezekiel 39 in the NNT3

Ezekiel 39 in the PDDPT

Ezekiel 39 in the PFNT

Ezekiel 39 in the RMNT

Ezekiel 39 in the SBIAS

Ezekiel 39 in the SBIBS

Ezekiel 39 in the SBIBS2

Ezekiel 39 in the SBICS

Ezekiel 39 in the SBIDS

Ezekiel 39 in the SBIGS

Ezekiel 39 in the SBIHS

Ezekiel 39 in the SBIIS

Ezekiel 39 in the SBIIS2

Ezekiel 39 in the SBIIS3

Ezekiel 39 in the SBIKS

Ezekiel 39 in the SBIKS2

Ezekiel 39 in the SBIMS

Ezekiel 39 in the SBIOS

Ezekiel 39 in the SBIPS

Ezekiel 39 in the SBISS

Ezekiel 39 in the SBITS

Ezekiel 39 in the SBITS2

Ezekiel 39 in the SBITS3

Ezekiel 39 in the SBITS4

Ezekiel 39 in the SBIUS

Ezekiel 39 in the SBIVS

Ezekiel 39 in the SBT

Ezekiel 39 in the SBT1E

Ezekiel 39 in the SCHL

Ezekiel 39 in the SNT

Ezekiel 39 in the SUSU

Ezekiel 39 in the SUSU2

Ezekiel 39 in the SYNO

Ezekiel 39 in the TBIAOTANT

Ezekiel 39 in the TBT1E

Ezekiel 39 in the TBT1E2

Ezekiel 39 in the TFTIP

Ezekiel 39 in the TFTU

Ezekiel 39 in the TGNTATF3T

Ezekiel 39 in the THAI

Ezekiel 39 in the TNFD

Ezekiel 39 in the TNT

Ezekiel 39 in the TNTIK

Ezekiel 39 in the TNTIL

Ezekiel 39 in the TNTIN

Ezekiel 39 in the TNTIP

Ezekiel 39 in the TNTIZ

Ezekiel 39 in the TOMA

Ezekiel 39 in the TTENT

Ezekiel 39 in the UBG

Ezekiel 39 in the UGV

Ezekiel 39 in the UGV2

Ezekiel 39 in the UGV3

Ezekiel 39 in the VBL

Ezekiel 39 in the VDCC

Ezekiel 39 in the YALU

Ezekiel 39 in the YAPE

Ezekiel 39 in the YBVTP

Ezekiel 39 in the ZBP