Galatians 1 (BOLCB2)
1 Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi, 2 mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai ; Epai ya Mangomba ya Galatia : 3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! 4 Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe. 5 Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela ! Amen ! 6 Nazali kokamwa ete bozali kosundola noki Ye oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto mpe bozali kolanda sango malamu mosusu 7 oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto. 8 Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe ! 9 Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo : soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe ! 10 Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te. 11 Bandeko na ngai, nalingi boyeba malamu ete Sango Malamu oyo nateyaki bino ezalaki mbuma ya makanisi ya bomoto te. 12 Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te ; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli. 13 Solo, boyokaki sango ya bizaleli na ngai ya kala tango nazalaki nanu mondimi kati na lingomba ya Bayuda ; boyebi mpe ndenge nini nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpo na kopanza yango. 14 Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama ; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai. 15 Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki 16 kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te. 17 Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi. 18 Ezali sima na mibu misato nde nakendeki na Yelusalemi mpo na koyeba Petelo, mpe navandaki epai na ye mikolo zomi na mitano. 19 Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo. 20 Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te. 21 Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi. 22 Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te, 23 bayokaki kaka sango : « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. » 24 Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.
In Other Versions
Galatians 1 in the ANGEFD
Galatians 1 in the ANTPNG2D
Galatians 1 in the AS21
Galatians 1 in the BAGH
Galatians 1 in the BBPNG
Galatians 1 in the BBT1E
Galatians 1 in the BDS
Galatians 1 in the BEV
Galatians 1 in the BHAD
Galatians 1 in the BIB
Galatians 1 in the BLPT
Galatians 1 in the BNT
Galatians 1 in the BNTABOOT
Galatians 1 in the BNTLV
Galatians 1 in the BOATCB
Galatians 1 in the BOATCB2
Galatians 1 in the BOBCV
Galatians 1 in the BOCNT
Galatians 1 in the BOECS
Galatians 1 in the BOGWICC
Galatians 1 in the BOHCB
Galatians 1 in the BOHCV
Galatians 1 in the BOHLNT
Galatians 1 in the BOHNTLTAL
Galatians 1 in the BOICB
Galatians 1 in the BOILNTAP
Galatians 1 in the BOITCV
Galatians 1 in the BOKCV
Galatians 1 in the BOKCV2
Galatians 1 in the BOKHWOG
Galatians 1 in the BOKSSV
Galatians 1 in the BOLCB
Galatians 1 in the BOMCV
Galatians 1 in the BONAV
Galatians 1 in the BONCB
Galatians 1 in the BONLT
Galatians 1 in the BONUT2
Galatians 1 in the BOPLNT
Galatians 1 in the BOSCB
Galatians 1 in the BOSNC
Galatians 1 in the BOTLNT
Galatians 1 in the BOVCB
Galatians 1 in the BOYCB
Galatians 1 in the BPBB
Galatians 1 in the BPH
Galatians 1 in the BSB
Galatians 1 in the CCB
Galatians 1 in the CUV
Galatians 1 in the CUVS
Galatians 1 in the DBT
Galatians 1 in the DGDNT
Galatians 1 in the DHNT
Galatians 1 in the DNT
Galatians 1 in the ELBE
Galatians 1 in the EMTV
Galatians 1 in the ESV
Galatians 1 in the FBV
Galatians 1 in the FEB
Galatians 1 in the GGMNT
Galatians 1 in the GNT
Galatians 1 in the HARY
Galatians 1 in the HNT
Galatians 1 in the IRVA
Galatians 1 in the IRVB
Galatians 1 in the IRVG
Galatians 1 in the IRVH
Galatians 1 in the IRVK
Galatians 1 in the IRVM
Galatians 1 in the IRVM2
Galatians 1 in the IRVO
Galatians 1 in the IRVP
Galatians 1 in the IRVT
Galatians 1 in the IRVT2
Galatians 1 in the IRVU
Galatians 1 in the ISVN
Galatians 1 in the JSNT
Galatians 1 in the KAPI
Galatians 1 in the KBT1ETNIK
Galatians 1 in the KBV
Galatians 1 in the KJV
Galatians 1 in the KNFD
Galatians 1 in the LBA
Galatians 1 in the LBLA
Galatians 1 in the LNT
Galatians 1 in the LSV
Galatians 1 in the MAAL
Galatians 1 in the MBV
Galatians 1 in the MBV2
Galatians 1 in the MHNT
Galatians 1 in the MKNFD
Galatians 1 in the MNG
Galatians 1 in the MNT
Galatians 1 in the MNT2
Galatians 1 in the MRS1T
Galatians 1 in the NAA
Galatians 1 in the NASB
Galatians 1 in the NBLA
Galatians 1 in the NBS
Galatians 1 in the NBVTP
Galatians 1 in the NET2
Galatians 1 in the NIV11
Galatians 1 in the NNT
Galatians 1 in the NNT2
Galatians 1 in the NNT3
Galatians 1 in the PDDPT
Galatians 1 in the PFNT
Galatians 1 in the RMNT
Galatians 1 in the SBIAS
Galatians 1 in the SBIBS
Galatians 1 in the SBIBS2
Galatians 1 in the SBICS
Galatians 1 in the SBIDS
Galatians 1 in the SBIGS
Galatians 1 in the SBIHS
Galatians 1 in the SBIIS
Galatians 1 in the SBIIS2
Galatians 1 in the SBIIS3
Galatians 1 in the SBIKS
Galatians 1 in the SBIKS2
Galatians 1 in the SBIMS
Galatians 1 in the SBIOS
Galatians 1 in the SBIPS
Galatians 1 in the SBISS
Galatians 1 in the SBITS
Galatians 1 in the SBITS2
Galatians 1 in the SBITS3
Galatians 1 in the SBITS4
Galatians 1 in the SBIUS
Galatians 1 in the SBIVS
Galatians 1 in the SBT
Galatians 1 in the SBT1E
Galatians 1 in the SCHL
Galatians 1 in the SNT
Galatians 1 in the SUSU
Galatians 1 in the SUSU2
Galatians 1 in the SYNO
Galatians 1 in the TBIAOTANT
Galatians 1 in the TBT1E
Galatians 1 in the TBT1E2
Galatians 1 in the TFTIP
Galatians 1 in the TFTU
Galatians 1 in the TGNTATF3T
Galatians 1 in the THAI
Galatians 1 in the TNFD
Galatians 1 in the TNT
Galatians 1 in the TNTIK
Galatians 1 in the TNTIL
Galatians 1 in the TNTIN
Galatians 1 in the TNTIP
Galatians 1 in the TNTIZ
Galatians 1 in the TOMA
Galatians 1 in the TTENT
Galatians 1 in the UBG
Galatians 1 in the UGV
Galatians 1 in the UGV2
Galatians 1 in the UGV3
Galatians 1 in the VBL
Galatians 1 in the VDCC
Galatians 1 in the YALU
Galatians 1 in the YAPE
Galatians 1 in the YBVTP
Galatians 1 in the ZBP