Genesis 22 (BOLCB2)

1 Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye :— Abrayami !Abrayami azongisaki :— Ngai oyo. 2 Nzambe alobaki na ye :— Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo. 3 Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye. 4 Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika. 5 Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. » 6 Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko. 7 Izaki atunaki Abrayami, tata na ye :— Tata na ngai !Abrayami azongisaki :— Ngai oyo !Izaki alobaki :— Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ? 8 Abrayami azongisaki :— Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba.Boye bango mibale bakendeki nzela moko. 9 Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni. 10 Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali. 11 Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo :— Abrayami ! Abrayami !Abrayami azongisaki :— Ngai oyo. 12 Anjelu alobaki :— Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko. 13 Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali. 14 Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. » 15 Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo 16 mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko, 17 nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango. 18 Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. » 19 Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda. 20 Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana : 21 Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ;Kemweli, tata ya Arami~; 22 Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli. 23 Betweli azalaki tata ya Rebeka.Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe. 24 Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana :Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.

In Other Versions

Genesis 22 in the ANGEFD

Genesis 22 in the ANTPNG2D

Genesis 22 in the AS21

Genesis 22 in the BAGH

Genesis 22 in the BBPNG

Genesis 22 in the BBT1E

Genesis 22 in the BDS

Genesis 22 in the BEV

Genesis 22 in the BHAD

Genesis 22 in the BIB

Genesis 22 in the BLPT

Genesis 22 in the BNT

Genesis 22 in the BNTABOOT

Genesis 22 in the BNTLV

Genesis 22 in the BOATCB

Genesis 22 in the BOATCB2

Genesis 22 in the BOBCV

Genesis 22 in the BOCNT

Genesis 22 in the BOECS

Genesis 22 in the BOGWICC

Genesis 22 in the BOHCB

Genesis 22 in the BOHCV

Genesis 22 in the BOHLNT

Genesis 22 in the BOHNTLTAL

Genesis 22 in the BOICB

Genesis 22 in the BOILNTAP

Genesis 22 in the BOITCV

Genesis 22 in the BOKCV

Genesis 22 in the BOKCV2

Genesis 22 in the BOKHWOG

Genesis 22 in the BOKSSV

Genesis 22 in the BOLCB

Genesis 22 in the BOMCV

Genesis 22 in the BONAV

Genesis 22 in the BONCB

Genesis 22 in the BONLT

Genesis 22 in the BONUT2

Genesis 22 in the BOPLNT

Genesis 22 in the BOSCB

Genesis 22 in the BOSNC

Genesis 22 in the BOTLNT

Genesis 22 in the BOVCB

Genesis 22 in the BOYCB

Genesis 22 in the BPBB

Genesis 22 in the BPH

Genesis 22 in the BSB

Genesis 22 in the CCB

Genesis 22 in the CUV

Genesis 22 in the CUVS

Genesis 22 in the DBT

Genesis 22 in the DGDNT

Genesis 22 in the DHNT

Genesis 22 in the DNT

Genesis 22 in the ELBE

Genesis 22 in the EMTV

Genesis 22 in the ESV

Genesis 22 in the FBV

Genesis 22 in the FEB

Genesis 22 in the GGMNT

Genesis 22 in the GNT

Genesis 22 in the HARY

Genesis 22 in the HNT

Genesis 22 in the IRVA

Genesis 22 in the IRVB

Genesis 22 in the IRVG

Genesis 22 in the IRVH

Genesis 22 in the IRVK

Genesis 22 in the IRVM

Genesis 22 in the IRVM2

Genesis 22 in the IRVO

Genesis 22 in the IRVP

Genesis 22 in the IRVT

Genesis 22 in the IRVT2

Genesis 22 in the IRVU

Genesis 22 in the ISVN

Genesis 22 in the JSNT

Genesis 22 in the KAPI

Genesis 22 in the KBT1ETNIK

Genesis 22 in the KBV

Genesis 22 in the KJV

Genesis 22 in the KNFD

Genesis 22 in the LBA

Genesis 22 in the LBLA

Genesis 22 in the LNT

Genesis 22 in the LSV

Genesis 22 in the MAAL

Genesis 22 in the MBV

Genesis 22 in the MBV2

Genesis 22 in the MHNT

Genesis 22 in the MKNFD

Genesis 22 in the MNG

Genesis 22 in the MNT

Genesis 22 in the MNT2

Genesis 22 in the MRS1T

Genesis 22 in the NAA

Genesis 22 in the NASB

Genesis 22 in the NBLA

Genesis 22 in the NBS

Genesis 22 in the NBVTP

Genesis 22 in the NET2

Genesis 22 in the NIV11

Genesis 22 in the NNT

Genesis 22 in the NNT2

Genesis 22 in the NNT3

Genesis 22 in the PDDPT

Genesis 22 in the PFNT

Genesis 22 in the RMNT

Genesis 22 in the SBIAS

Genesis 22 in the SBIBS

Genesis 22 in the SBIBS2

Genesis 22 in the SBICS

Genesis 22 in the SBIDS

Genesis 22 in the SBIGS

Genesis 22 in the SBIHS

Genesis 22 in the SBIIS

Genesis 22 in the SBIIS2

Genesis 22 in the SBIIS3

Genesis 22 in the SBIKS

Genesis 22 in the SBIKS2

Genesis 22 in the SBIMS

Genesis 22 in the SBIOS

Genesis 22 in the SBIPS

Genesis 22 in the SBISS

Genesis 22 in the SBITS

Genesis 22 in the SBITS2

Genesis 22 in the SBITS3

Genesis 22 in the SBITS4

Genesis 22 in the SBIUS

Genesis 22 in the SBIVS

Genesis 22 in the SBT

Genesis 22 in the SBT1E

Genesis 22 in the SCHL

Genesis 22 in the SNT

Genesis 22 in the SUSU

Genesis 22 in the SUSU2

Genesis 22 in the SYNO

Genesis 22 in the TBIAOTANT

Genesis 22 in the TBT1E

Genesis 22 in the TBT1E2

Genesis 22 in the TFTIP

Genesis 22 in the TFTU

Genesis 22 in the TGNTATF3T

Genesis 22 in the THAI

Genesis 22 in the TNFD

Genesis 22 in the TNT

Genesis 22 in the TNTIK

Genesis 22 in the TNTIL

Genesis 22 in the TNTIN

Genesis 22 in the TNTIP

Genesis 22 in the TNTIZ

Genesis 22 in the TOMA

Genesis 22 in the TTENT

Genesis 22 in the UBG

Genesis 22 in the UGV

Genesis 22 in the UGV2

Genesis 22 in the UGV3

Genesis 22 in the VBL

Genesis 22 in the VDCC

Genesis 22 in the YALU

Genesis 22 in the YAPE

Genesis 22 in the YBVTP

Genesis 22 in the ZBP